< Псалми 76 >
1 Зна се у Јудеји за Бога, у Израиља је велико име Његово.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba na lindanda. Nzembo ya Azafi. Nzambe ayebani kati na Yuda; Kombo na Ye ezali monene kati na Isalaele.
2 У Салиму је стан Његов и насеље Његово на Сиону.
Ndako na Ye ya kapo ezali na Salemi; mpe esika na Ye ya kovanda ezali na Siona.
3 Онде је поломио крилате стреле луку, штит и мач и рат.
Ezali kuna nde abukaki makonga ya makasi, banguba, mipanga mpe bibundeli nyonso ya bitumba.
4 Ти си светао; дивнији од гора хајдучких.
Ozali kongenga lokola mwinda, otonda na lokumu koleka bangomba ya babotoli bomengo ya bitumba.
5 Који су јуначког срца посташе плен, заспаше сном својим, и јунаци не нађоше руку својих.
Bilombe nyonso ya mpiko bakweyisamaki, balalaki pongi na bango ya suka; basoda nyonso bakokaki lisusu te kotombola maboko.
6 Од претње Твоје, Боже Јаковљев, дремљу кола и коњ.
Nzambe ya Jakobi, na kanda na Yo, bato oyo babundaka likolo ya bampunda elongo na bampunda bakweyi na somo.
7 Ти си страшан, и ко ће се одржати пред лицем Твојим кад се разгневиш?
Solo, ozali somo! Nani akokoka kotelema liboso na Yo soki osiliki?
8 С неба јављаш суд; земља се препада и ћути,
Wuta na likolo, osalaka ete mokano na Yo eyokana na matoyi ya bato; mokili ekomaka na kobanga mpe evandaka kimia
9 Кад Бог устаје на суд, да помогне свима који страдају на земљи.
tango, Yo Nzambe, otelemaka mpo na kosambisa mpe kobikisa banyokolami nyonso ya mokili.
10 И гнев људски обраћа се у славу Теби, кад се једном опашеш гневом.
Pamba te kanda makasi ya bato esanzolaka Yo, mpe olataka kanda ya batikali.
11 Полажите и извршујте завете Господу Богу свом; сви који сте око Њега, носите даре Страшноме.
Epai ya Yawe, Nzambe na bino, bopesa bilaka mpe bokokisa yango. Tika ete bato nyonso oyo bazingeli Ye bamemela Nzambe ya somo makabo!
12 Он укроћава дух кнезовима, Он је страшан царевима земаљским.
Abukaka lolendo ya bakambi, mpe bakonzi ya mokili babangaka Ye.