< Псалми 72 >
1 Боже, дај цару суд свој, и правду своју сину царевом:
Nzembo ya Salomo. Oh Nzambe, pesa na mokonzi mayele na Yo; mpe na mwana ya mokonzi, bosembo na Yo!
2 Он ће судити народу Твом по правди, и невољницима Твојим по правици.
Tika ete asambisa bato na Yo na bosembo; mpe babola na Yo, kolanda boyengebene.
3 Родиће народу горе миром, и хумови правдом.
Bangomba milayi ekomemela bato kimia; mpe bangomba mike, bosembo.
4 Он ће судити невољнима у народу, помоћи ће синовима ништега, и насилника ће оборити,
Akokota likambo ya babola kati na bato, akobikisa bana ya moto akelela mpe akobebisa monyokoli.
5 Бојаће се Тебе док је сунца и месеца, од колена до колена.
Bongo bakotosa Yo tango nyonso moyi ekongala, tango nyonso sanza ekongenga, na bikeke nyonso.
6 Сићи ће као дажд на покошену ливаду, као капље које порашају земљу.
Tika ete azala lokola mvula oyo ezali konoka na bilanga oyo balongoli matiti, lokola mamwe oyo ezali kopolisa mabele.
7 Процветаће у дане његове праведник и свуда мир докле тече месеца.
Na tango na ye, moto ya sembo akokende liboso, mpe kimia ekofuluka kino sanza ekongenga lisusu te.
8 Владаће од мора до мора, и од реке до крајева земаљских.
Tika ete akonza longwa na ebale moko ya monene kino na ebale mosusu ya monene, longwa na ebale Efrate kino na suka ya mokili.
9 Пред њим ће попадати дивљаци, и непријатељи његови прах ће лизати.
Bavandi ya esobe bakofukama liboso na ye, mpe banguna na ye bakolembola putulu.
10 Цареви тарсиски и острвљани донеће даре, цареви шавски и савски даће данак.
Bakonzi ya Tarsisi mpe ya bisanga bakomemela ye mpako ya mokonzi, bakonzi ya Saba mpe ya Seba bakopesa ye makabo.
11 Клањаће му се сви цареви, сви народи биће му покорни.
Bakonzi nyonso bakofukama liboso na ye, mpe bikolo nyonso ekosalela ye.
12 Јер ће избавити убогога који цвили и невољнога који нема помоћника.
Pamba te akokangola moto akelela oyo azali koganga mpo na kosenga lisungi, mpe mobola oyo azangi mosungi.
13 Биће милостив ништем и убогом, и душе ће јаднима спасти.
Akoyokela mobola mpe moto akelela mawa, mpe akobikisa moto akelela na kufa;
14 Од преваре и насиља искупиће душе њихове, и скупа ће бити крв њихова пред очима његовим.
akosikola bango na minyoko mpe na makambo na kanza, pamba te bomoi na bango ezali motuya na miso na ye.
15 Они ће добро живети, и донеће му злато из Шаве; и свагда ће се молити за њега, и сваки ће га дан благосиљати.
Akozala na bomoi, bakopesa ye wolo ya Saba. Bakobanda kosambela mpo na ye tango nyonso mpe kopambola ye mikolo nyonso.
16 Биће пшенице на земљи изобила; по врховима горским лелујаће се класје њено као ливанска шума, и по градовима цветаће људи као трава на земљи.
Tika ete ble etonda kati na mokili, mbuma na yango ebota ebele na likolo ya bangomba lokola Libani! Wuta na engumba, bato bakozala na bofuluki lokola matiti ya elanga.
17 Име ће његово бити увек; докле тече сунца, име ће његово расти. Благословиће се у њему, сви ће га народи звати блаженим.
Tika ete kombo na ye ewumela libela na libela, ewumela tango nyonso moyi ekozala, mpo ete bato bakoma kotangaka kombo na ye wana bakobanda kopambolanaka, mpe bikolo nyonso ekoma kobengaka ye: moto ya esengo.
18 Благословен Господ Бог, Бог Израиљев, који један чини чудеса!
Tika ete Yawe Nzambe oyo asalaka Ye moko bikamwa, Nzambe ya Isalaele, apambolama!
19 И благословено славно име Његово увек! Славе Његове напуниће се сва земља. Аман и амин.
Tika ete Kombo na Ye ya nkembo epambolama libela na libela! Tika ete mokili mobimba etonda na nkembo na Ye! Amen! Amen!
20 Свршише се молитве Давида, сина Јесејевог.
Mabondeli ya Davidi, mwana mobali ya Izayi, esuki awa.