< Псалми 68 >
1 Устаће Бог, и расуће се непријатељи Његови, и побећи ће од лица Његовог који мрзе на Њ.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Loyembo. Soki Nzambe atelemi, banguna na Ye bapalanganaka, mpe bayini na Ye bakimaka mosika na Ye.
2 Ти ћеш их разагнати као дим што се разгони; као што се восак топи од огња, тако ће безбожници изгинути од лица Божијег.
Liboso ya Nzambe, bato mabe bakufaka, ndenge milinga elimwaka, mpe mafuta enyangwamaka na moto.
3 А праведници ће се веселити, радоваће се пред Богом, и славити у радости.
Liboso ya Nzambe, bato ya sembo basepelaka, batondaka na esengo.
4 Појте Богу, попевајте имену Његовом; равните пут Ономе што иде преко пустиње; Господ Му је име, радујте Му се.
Boyembela Nzambe, boyemba banzembo mpo na lokumu ya Kombo na Ye. Bofungola nzela mpo na Ye oyo atambolisaka mampinga na Ye kati na esobe. Kombo na Ye ezali Yawe. Botonda na esengo liboso na Ye.
5 Отац је сиротама и судија удовицама Бог у светом стану свом.
Kati na Ndako na Ye ya bule, Nzambe azali Tata ya bana bitike, mpe molobeli ya basi bakufisa mibali.
6 Бог самцима даје задругу, сужње изводи на места обилна, а непокорни живе где је суша.
Nzambe apesaka libota epai ya bato oyo bavandaka bango moko, abimisaka bakangami wuta na minyololo; kasi batomboki batikalaka na mabele ekawuka.
7 Боже! Кад си ишао пред народом својим, кад си ишао преко пустиње,
Oh Nzambe, tango obimaki liboso ya bato na Yo, tango otambolaki na esobe,
8 Земља се тресаше, и небо се растапаше од лица Божијег, и овај Синај од лица Бога, Бога Израиљевог.
mabele eninganaki, likolo mpe esopaki mayi liboso ya Nzambe, Nzambe ya Sinai; liboso ya Nzambe, Nzambe ya Isalaele.
9 Благодатни си дажд изливао, Боже, и кад изнемагаше достојање Твоје, Ти си га крепио.
Nzambe, osopaki mvula ya mapamboli, olendisaki libula na Yo mpo ete elembaki.
10 Стадо Твоје живљаше онде; по доброти својој, Боже, Ти си готовио храну јадноме.
Oh Nzambe, bato na Yo bavandaka na mokili oyo obongisaki, na boboto na Yo, mpo na mobola.
11 Господ даје реч; гласника велико је мноштво.
Na liloba moko kowuta na Nkolo, basi oyo bamemaka sango basangani bato ebele,
12 Цареви над војскама беже, беже, а која седи дома, дели плен.
bakonzi ya mampinga bakimi, bapoti mbangu, mpe mwasi oyo atikali na ndako akaboli bomengo ya bitumba.
13 Смиривши се у својим крајевима, ви сте као голубица, којој су крила посребрена, а перје јој се златни.
Boni, bokokoba kolala pongi kati na bandako na bino? Mapapu ya ebenga ezipami na se ya palata, mpe bansala na yango ezipami na se ya wolo.
14 Кад је Свемогући расипао цареве на овој земљи, она се блисташе као снег на Селмону.
Tango Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abenganaki kuna bakonzi, anokisaki mvula ya pembe na ngomba Tsalimoni.
15 Гора је васанска гора Божија; гора је васанска гора хумовита.
Ngomba ya Bashani, ngomba ya Nzambe; ngomba ya Bashani, ngomba ya basonge ebele,
16 Зашто гледате завидљиво, горе хумовите? Ево гора, на којој омиле Богу живети, и на којој ће Господ живети довека.
mpo na nini ozali kosala zuwa, ngomba ya basonge ebele, ngomba oyo Nzambe asepelaka kovanda? Nzokande Yawe akovanda kuna libela na libela.
17 Кола Божијих има сила, хиљаде хиљада. Међу њима је Господ, Синај у светињи.
Motango ya bashar ya Nzambe ezali ebele, koleka minkoko; Nkolo azali kati na yango, kuna na Sinai, kati na Esika ya bule.
18 Ти си изашао на висину, довео си робље, примио дарове за људе, а и за оне који се противе да овде наставаш, Господе Боже!
Yawe Nzambe, tango omataki na likolo, omemaki bakangami, ozwaki makabo epai ya bato, ata epai ya batomboki, mpo ete okoma kovanda kuna.
19 Благословен Господ сваки дан! Ако нас ко претовара, Бог нам помаже.
Tika ete Nkolo akumisama, mokolo na mokolo! Nzambe Mobikisi na biso alataka makambo na biso.
20 Овај је Бог наш Бог Спаситељ, у власти су Господу врата смртна.
Mpo na biso, Nzambe yango azali Nzambe oyo abikisaka; mpe bikuke ya kufa ezali ya Nkolo Yawe.
21 Господ сатире главу непријатељима својим и власато теме оног који остаје у безакоњу свом.
Solo, Nzambe apanzaka mito ya banguna na Ye, oyo batambolaka kati na bomoi ya masumu, oyo mito na bango etonda na suki.
22 Рече Господ: Од Васана ћу довести, довешћу из дубине морске,
Nkolo alobi: « Wuta na Bashani, nakomema bango; wuta na mozindo ya ebale monene, nakomema bango,
23 Да ти огрезне нога у крви непријатељској и језик паса твојих да је лиже.
mpo ete opanza lokolo na yo kati na makila, mpe mpo ete lolemo ya bambwa na yo ezwa eteni na yango. »
24 Видеше како идеш, Боже, како свето иде Бог мој, цар мој.
Oh Nzambe, bazali komona ndenge ozali koya; koya ya Nzambe na ngai, ya Mokonzi na ngai, kati na Esika ya bule.
25 Напред иђаху певачи, за њима свирачи сред девојака с бубњевима:
Bayembi bazali liboso; sima na bango, bato oyo bazali kobeta mandanda ya basinga kati na bilenge basi oyo bazali kobeta bambonda ya mike.
26 "На сабору благосиљајте Господа Бога, који сте из извора Израиљевог!"
Bopambola Nzambe kati na mayangani, bopambola Yawe wuta na etima ya Isalaele.
27 Онде млади Венијамин, старешина њихов; кнезови Јудини, владаоци њихови; кнезови Завулонови, кнезови Нефталимови.
Kuna, Benjame, leki ya suka, azali kotambolisa bakambi ya Yuda elongo na mampinga na bango, bakambi ya Zabuloni mpe ya Nefitali.
28 Бог твој даровао ти је силу. Утврди, Боже, ово што си учинио за нас!
Nzambe na yo apesi mitindo epai ya makasi na yo; zala makasi. Nzambe, osaleli biso penza makambo.
29 У цркви Твојој, у Јерусалиму, цареви ће приносити даре.
Wuta na Tempelo na Yo ya Yelusalemi epai wapi bakonzi bamemelaka Yo makabo,
30 Укроти звер у риту, код волова с теоцима народа, да би попадали пред Тобом са шипкама сребра; распи народе који желе бојеве.
bengana ngando oyo ebombami kati na matiti, lisanga ya bangombe ya mibali elongo na bana ngombe ya bikolo oyo batambolaka kati na mbongo ya bibende ya palata, mpe panza bikolo oyo basepelaka na bitumba.
31 Доћи ће властела из Мисира, Етиопија ће пружити руке своје к Богу.
Bazwi bakobimela na Ejipito; bato ya Kushi bakoya na lombangu, bakotombola maboko epai ya Nzambe.
32 Царства земаљска, појте Богу, попевајте Господу,
Bino, babokonzi ya mabele, boyembela Nzambe; boyemba banzembo mpo na lokumu ya Nkolo!
33 Који седи на небесима небеса исконских. Ево грми гласом јаким.
Boyembela Ye oyo atambolisaka mampinga kati na likolo, likolo ya libela; oyo, wuta na mongongo na Ye, agangaka makasi.
34 Дајте славу Богу; величанство је Његово над Израиљем и сила Његова на облацима.
Bosakola ete nguya ezali ya Nzambe oyo nkembo na Ye ezali na Isalaele, mpe nguya na Ye ezali kati na mapata.
35 Диван си, Боже, у светињи својој! Бог Израиљев даје силу и крепост народу. Благословен Бог!
Nzambe, wuta kati na bisika na Yo ya bule, obongi na botosi! Nzambe ya Isalaele apesaka na bato na Ye makasi mpe nguya. Tika ete Nzambe akumisama!