< Псалми 52 >

1 Што се хвалиш неваљалством, силни? Милост је Божија сваки дан са мном.
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki tango Doegi, moto ya Edomi, akendeki koyebisa Saulo ete Davidi akoti na ndako ya Ayimeleki. Yo elombe, mpo na nini ozali komikumisa na tina na mabe? Bolingo ya Nzambe emonanaka mikolo nyonso.
2 Неправду измишља језик твој; он је у тебе као бритва наоштрена, лукави!
Yo oyo otambolaka na lokuta, lolemo na yo esalaka mabongisi ya libebi, ekosaka lokola mbeli bapelisa malamu.
3 Волиш зло него добро, волиш лагати него истину говорити.
Olingaka mabe koleka bolamu, lokuta koleka koloba bosolo.
4 Љубиш свакојаке речи од погибли, и језик лукав.
Oh lolemo ya lokuta, olingaka maloba nyonso oyo epanzaka.
5 Тога ради Бог ће те поразити сасвим, избациће те и ишчупаће те из стана, и корен твој из земље живих.
Solo, Ye moko Nzambe akobebisa yo mpo na libela, akokanga yo kati na ndako na yo, akobwaka yo libanda mpe akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi.
6 Видеће праведници и побојаће се, и подсмеваће му се:
Bato ya sembo bakomona mpe bakokoma na somo, bakotiola ye na maloba oyo:
7 Гле човека који не држаше у Богу крепости своје, него се уздаше у величину богатства свог и утврђиваше се злоћом својом.
« Tala moto oyo azalaki te kozwa Nzambe lokola ebombamelo na ye, azalaki kotiela bozwi na ye motema, mpe kobakisa makasi na ye na nzela ya kobebisa bato mosusu. »
8 А ја, као маслина зелена у дому Господњем, уздам се у милост Божију без престанка и довека.
Kasi ngai, kati na Ndako na Yo, nazali lokola nzete ya olive oyo etondi na makasa ya mobesu; natiaka tango nyonso elikya na ngai kati na bolingo monene ya Nzambe, mpo na libela.
9 Довека ћу хвалити Тебе, јер добро чиниш, и уздаћу се у име Твоје; јер си добар к свецима својим.
Nakosanzola Yo mikolo nyonso, mpo na oyo osali; mpe nazalaka na elikya kati na Kombo na Yo, pamba te ozali malamu mpo na bayengebene na Yo.

< Псалми 52 >