< Псалми 42 >
1 Као што кошута тражи потоке, тако душа моја тражи Тебе, Боже!
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ndenge mbuli eyokaka posa ya komela mayi, ndenge wana mpe molimo na ngai ezali na posa na Yo, Nzambe.
2 Жедна је душа моја Бога, Бога Живога, кад ћу доћи и показати се лицу Божијем?
Molimo na ngai ezali na posa ya Nzambe, ya Nzambe na bomoi. Tango nini nakoki kokende, mpe tango nini nakoki kokutana na Nzambe?
3 Сузе су ми хлеб дан и ноћ, кад ми сваки дан говоре: Где је Бог твој?
Butu mpe moyi, mpinzoli na ngai ezalaka bilei na ngai; pamba te balobaka na ngai tango nyonso: « Nzambe na Yo azali wapi? »
4 Душа се моја пролива кад се опомињем како сам ходио сред многог људства; ступао у дом Божји, а људство празнујући певаше и подвикиваше.
Nazalaka na posa ya kokanisa makambo oyo, ndenge mpe nasopaka molimo na ngai: Tango nazalaki kotambola kati na ebele ya bato, nazalaki komema bango kino na Tempelo ya Nzambe, kati na koganga ya esengo mpe ya kozongisa matondi lokola makelele ya bato oyo bazali na feti.
5 Што си клонула, душо моја, и што си жалосна? Уздај се у Бога; јер ћу Га још славити, Спаситеља мог и Бога мог.
Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye? Mpo na nini ozali komitungisa makasi kati na ngai? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakokumisa lisusu lobiko na Ye.
6 Клонула је у мени душа зато што Те помињем у земљи јорданској, на Ермону, на гори малој.
Nzambe, molimo na ngai elembi kati na ngai; yango wana nazali kokanisa Yo wuta na mokili ya Yordani, wuta na songe ya ngomba Erimoni mpe wuta na ngomba Mitseari.
7 Бездана бездану дозива гласом слапова Твојих; све воде Твоје и вали Твоји на мене навалише.
Mozindo ebendaka mozindo tango bambonge na Yo nyonso etombokaka; Ezala ya mike to ya minene, elekaka likolo na ngai.
8 Дању је јављао Господ милост своју, а ноћу Му је песма у мене, молитва Богу живота мог.
Na moyi, Yawe apesaka mitindo epai ya bolingo na Ye; na butu, nakumisaka Ye na banzembo mpe nasambelaka Nzambe ya bomoi na ngai.
9 Рећи ћу Богу, граду свом: Зашто си ме заборавио? Зашто идем сетан од пакости непријатељеве?
Nalobi na Nzambe, Libanga na ngai: « Mpo na nini obosani ngai? Mpo na nini nasengeli kotambola na mawa kati na motema mpe na se ya minyoko ya monguna? »
10 Који ми пакосте, пребијајући кости моје, ругају ми се говорећи ми сваки дан: Где ти је Бог?
Nzoto na ngai ekomaka kosala pasi makasi tango bayini na ngai bafingaka ngai, tango balobaka na ngai mokolo mobimba: « Wapi Nzambe na yo? »
11 Што си клонула, душо моја, и што си жалосна? Уздај се у Бога; јер ћу Га још славити, Спаситеља мог и Бога мог.
Molimo na ngai, mpo na nini olembi boye? Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai? Tia elikya na yo kati na Nzambe. Nakokumisa Ye lisusu, lobiko mpe Nzambe na ngai.