< Псалми 144 >

1 Благословен Господ, град мој, који учи руке моје боју, прсте моје рату,
Nzembo ya Davidi. Tika ete Yawe, Libanga na ngai, apambolama; Ye oyo akembisaka maboko mpe makofi na ngai mpo na bitumba!
2 Добротвор мој и ограда моја, уточиште моје и Избавитељ мој, Штит мој, Онај у кога се уздам, који ми покорава народ мој.
Azali bolingo na ngai mpe ndako na ngai ya makasi, ebombamelo mpe mokangoli na ngai, nguba mpe ekimelo na ngai; Ye nde atiaka bato na ngai na se ya bokonzi na ngai.
3 Господе! Шта је човек, те знаш за њ, и син смртнога, те га пазиш?
Oh Yawe, moto nde nani mpo ete obatelaka ye? Moto nde nani mpo ete okanisaka ye?
4 Човек је као ништа; дани су његови као сен, који пролази.
Moto azali lokola mopepe, mikolo ya bomoi na ye ezali lokola elili oyo ezali koleka.
5 Господе! Савиј небеса своја, и сиђи; дотакни се гора, и задимиће се.
Yawe, fungola likolo mpe kita awa na mabele! Yaka kosimba bangomba mpe sala ete ebimisa milinga!
6 Севни муњом, и разагнај их; пусти стреле своје, и распи их.
Tinda mikalikali mpe panza banguna na ngai; bwakela bango makonga na Yo mpe bungisa bango nzela.
7 Пружи руку своју с висине, избави ме и извади ме из воде велике, из руку туђинаца,
Tanda loboko na Yo wuta kuna na likolo mpo na kobikisa mpe kokangola ngai na mayi minene, na maboko ya bapaya
8 Којих уста говоре ништавне ствари, и којих је десница десница лажна.
oyo minoko na bango elobaka kaka lokuta mpe maboko na bango elapaka ndayi ya lokuta.
9 Боже! Песму нову певаћу Ти, у псалтир од десет жица удараћу Теби,
Oh Nzambe, nakoyembela Yo nzembo ya sika, nakobetela Yo lindanda ya basinga zomi.
10 Који дајеш спасење царевима, и Давида слугу свог избављаш од љутог мача.
Ezali Yo, Nzambe, nde opesaka bakonzi elonga, obikisaka Davidi, mosali na Yo, liboso ya mopanga oyo ebomaka.
11 Избави ме и отми ме из руке туђинаца, којих уста говоре ништавне ствари, и којих је десница десница лажна.
Bikisa mpe kangola ngai na maboko ya bapaya oyo minoko na bango elobaka kaka lokuta mpe maboko na bango elapaka ndayi ya lokuta.
12 Синови наши нека буду као биље, које весело одрасте у младости; кћери наше као ступови прекрасно израђени у двору;
Bana mibali na biso bazali lokola milona, bazali kokola malamu wuta na bomwana na bango; bana basi na biso bazali lokola bililingi kitoko oyo batoboli na bamir ya ndako ya mokonzi.
13 Житнице наше пуне, обилне сваким житом; овце наше нек се множе на хиљаде и на сто хиљада по становима нашим.
Bibombelo na biso etondi na biloko ya ndenge na ndenge; bameme na biso ezali kobotana na minkoko, na bankoto zomi kati na bitonga na biso;
14 Волови наши нека буду товни; нека не буду нападања, ни бежања, ни тужњаве по улицама нашим.
bangombe na biso ezali minene; likama ezali te, zemi ezali kosopana te, mpe koganga moko te ya pasi ezali koyokana na bisika na biso.
15 Благо народу, у ког је све овако! Благо народу, у ког је Господ Бог!
Esengo na bato oyo batondisami na bolamu ya boye! Esengo na bato oyo Yawe azali Nzambe na bango!

< Псалми 144 >