< Псалми 133 >

1 Како је лепо и красно кад сва браћа живе заједно!
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko!
2 Као добро уље на глави, које се стаче на браду, браду Аронову, које се стаче на скут од хаљине његове;
Ezali lokola malasi ya motuya oyo basopi na moto, bongo ezali kokita na mandefu, na mandefu ya Aron, ezali kokita kino na songe ya bilamba na ye.
3 Као роса на Ермону, која силази на горе сионске; јер је онде утврдио Господ благослов и живот довека.
Ezali lokola mamwe ya Erimoni, oyo ekitaka na bangomba ya Siona. Pamba te kuna, Yawe apesaka lipamboli na Ye, mpe bomoi, mpo na libela.

< Псалми 133 >