< Псалми 124 >
1 Да није био Господ с нама, нека рече Израиљ,
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe abatelaki biso te; tika ete Isalaele aloba bongo!
2 Да није био Господ с нама, кад људи усташе на нас,
Soki Yawe abatelaki biso te tango bato babundisaki biso,
3 Живе би нас прождрли, кад се распали гнев њихов на нас;
mbele bamelaki biso ya bomoi tango basilikelaki biso makasi.
4 Потопила би нас вода, река би покрила душу нашу;
Boye mayi elingaki kozindisa biso, mbonge makasi elingaki komema biso.
5 Покрила би душу нашу силна вода.
Mayi makasi elingaki kozindisa biso.
6 Благословен Господ, који нас не даде зубима њиховим да нас растржу!
Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo andimaki te ete minu na bango epasola biso!
7 Душа се наша избави као птица из замке ловачке; замка се раскиде, и ми се избависмо.
Tobikaki lokola ndeke liboso ya motambo ya mokangi bandeke; motambo ekatanaki, mpe tokimaki.
8 Помоћ је наша у имену Господњем, који је створио небо и земљу.
Lisungi na biso ezali kati na Kombo na Yawe oyo akela likolo mpe mabele.