< Псалми 100 >

1 Радуј се Господу, сва земљо!
Nzembo ya kozongisa matondi. Bino nyonso bato ya mokili mobimba, boganga na esengo epai na Yawe!
2 Служите Господу весело; идите пред лице Његово певајући!
Bosalela Yawe na esengo, mpe boya liboso na Ye na banzembo ya esengo.
3 Познајте Господ да је Бог. Он нас је створио, и ми смо достојање Његово, народ Његов и овце паше Његове.
Boyeba ete Yawe nde azali Nzambe; Ye nde asala biso, mpe tozali bato na Ye. Solo, tozali bato na Ye mpe etonga oyo aleisaka.
4 Улазите на врата Његова са славом, у дворе Његове с хвалом. Славите Га, и благосиљајте име Његово.
Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi, bokota na lopango na Ye na kokumisa. Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye.
5 Јер је добар Господ; милост је Његова увек, и истина Његова од колена на колено.
Pamba te Yawe azali malamu; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko, mpe boyengebene na Ye, libela na libela.

< Псалми 100 >