< Приче Соломонове 5 >

1 Сине мој, слушај мудрост моју, к разуму мом пригни ухо своје,
Mwana na ngai, zala na bokebi na bwanya na ngai, mpe pesa litoyi na yo na mayele na ngai,
2 Да се држиш разборитости, и усне твоје да хране знање.
mpo ete ozala na bososoli, mpe bibebu na yo ebomba boyebi.
3 Јер с усана туђе жене капље мед, и грло јој је мекше од уља;
Pamba te bibebu ya mwasi ya ndumba ebimisaka mafuta ya nzoyi, mpe lolemo na ye ezali elengi lokola mafuta;
4 Али јој је последак горак као пелен, оштар као мач с обе стране оштар.
kasi na suka na nyonso, azali bololo lokola masanga ya bololo, songe lokola mopanga ya minu mibale.
5 Ноге јој силазе к смрти, до пакла допиру кораци њени. (Sheol h7585)
Makolo na ye ekokita kino na kufa, ekokende kino na mokili ya bakufi. (Sheol h7585)
6 Да не би мерио пут животни, савијају се стазе њене да не знаш.
Amitungisaka te mpo na nzela ya bomoi, alandaka nzela oyo ayebi te esika nini ekosuka.
7 Зато, децо, послушајте мене, и не одступајте од речи уста мојих.
Sik’oyo mwana na ngai, yoka ngai, kopesa maloba na ngai mokongo te;
8 Нека је далеко од ње пут твој, и не приближуј се к вратима куће њене,
longola nzela na yo pembeni na ye mpe kopusana te liboso ya ndako na ye,
9 Да не би дао другима славе своје и година својих немилостивоме,
noki te akoya kokaba lokumu na yo epai ya bato mosusu, mpe mibu na yo epai ya moto mabe;
10 Да се не би туђинци наситили твог блага и труд твој да не би био у туђој кући,
noki te bapaya bakotonda na biloko oyo yo omoneli pasi, mpe mbuma ya mosala na yo ekokende na ndako ya mopaya;
11 И да не ридаш на послетку, кад се строши месо твоје и тело твоје,
noki te okokoma kolelalela na suka tango nzoto na yo ekolemba mpe makasi na yo ekosila,
12 И кажеш: Како мрзих на наставу, и како срце моје презира карање!
mpe oloba: « Mpo na nini nayinaki mateya, mpe motema na ngai eboyaki koyoka toli?
13 И не послушах глас учитеља својих, и не пригнух уха свог к онима који ме учаху!
Mpo na nini nayokaki te mongongo ya balakisi na ngai mpe napesaki litoyi te epai ya bato oyo bazalaki koteya ngai?
14 Умало не западох у свако зло усред збора и скупштине.
Etikalaki kaka moke ete nakweya na mabe ya mozindo, kati na Lingomba ya bato ya Nzambe. »
15 Пиј воду из свог студенца и што тече из твог извора.
Melaka mayi ya libulu na yo moko, oyo ezali kobima penza na libulu na yo.
16 Нека се разливају твоји извори на поље, и потоци по улицама.
Boni, bitima na yo esopa penza mayi na libanda to miluka na yo esopa penza mayi na balabala?
17 Имај их сам за се, а не туђин с тобом.
Tika ete ezala kaka mpo na yo moko, kasi kokabola yango te na bapaya.
18 Благословен да је извор твој, и весели се женом младости своје;
Tika ete etima na yo epambolama, mpe sepela na mwasi ya bolenge na yo,
19 Нека ти је као кошута мила и као срна љупка; дојке њене нека те опијају у свако доба, у љубави њеној посрћи једнако.
oyo azali lokola mbuli kitoko ya mwasi, lokola mboloko ya mafuta. Tika ete tango nyonso, mabele na ye etondisaka yo na esengo, mpe bolingo na ye elangwisaka yo!
20 А зашто би, сине, посртао за туђинком и голио недра туђој,
Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini kokufela kolinga mwasi ya ndumba? Mpo na nini kosepela kosakana na mabele ya mwasi mosusu?
21 Кад су пред очима Господу путеви свачији, и мери све стазе његове?
Solo, nzela ya moto ezali liboso ya Yawe, mpe ayekolaka malamu makambo nyonso oyo moto asalaka.
22 Безбожника ће ухватити његова безакоња, и у ужа греха својих заплешће се;
Moto mabe akokangama kaka na motambo ya mabe na ye moko mpe na singa ya lisumu na ye,
23 Умреће без наставе, и од мноштва лудости своје лутаће.
akokufa likolo ya bozoba, mpe liboma na ye ekobungisa ye nzela.

< Приче Соломонове 5 >