< Приче Соломонове 20 >
1 Вино је подсмевач и силовито пиће немирник, и ко год за њим лута неће бити мудар.
Vino elobisaka bato maloba ya soni, masanga ya makasi ememaka mobulu; moto nyonso oyo amipesaka na yango akotikala te kokoma moto ya bwanya.
2 Страх је царев као рика младог лава; ко га дражи, греши својој души.
Somo oyo mokonzi apesaka ezali lokola koganga ya nkosi; moto oyo apesaka ye kanda amilukelaka ye moko pasi.
3 Слава је човеку да се окани свађе; а ко је год безуман, уплеће се.
Koboya koswana epesaka moto lokumu, kasi moto oyo azangi mayele amipesaka na yango.
4 Ради зиме ленивац не оре; проси о жетви, и ништа не добија.
Moto ya goyigoyi asalaka bilanga te likolo ya kobanga malili; boye na tango ya kobuka mbuma, alukaka mpe kobuka, kasi akozwa eloko te.
5 Савет је у срцу човечијем дубока вода, али човек разуман црпе га.
Makanisi ya motema ya moto ezalaka lokola ebale ya mozindo, moto ya mayele alukaka kotoka kati na yango.
6 Највише људи хвали се својом добротом; али ко ће наћи човека истинитог?
Bato ebele batatolaka bolamu na bango, kasi nani akomona moto ya sembo?
7 Праведник једнако ходи у безазлености својој; благо синовима његовим после њега!
Moyengebene atambolaka na bosembo na ye; boye sima na ye, bana na ye bakozala bato ya esengo.
8 Цар седећи на престолу судском расипа очима својим свако зло.
Soki mokonzi avandi na kiti mpo na kosambisa, miso na ye ebenganaka mabe nyonso.
9 Ко може рећи: Очистио сам срце своје, чист сам од греха свог?
Nani akoki koloba: « Nabatelaka motema na ngai peto, nazali peto, nazali na masumu te? »
10 Двојак потег и двојака мера, обоје је мрско Господу.
Kilo mibale mpe bimekelo mibale, nyonso ezali nkele na miso ya Yawe.
11 По делима својим познаје се и дете хоће ли бити чисто и хоће ли бити право дело његово.
Bayebaka elenge mobali na nzela ya misala na ye, soki ezaleli na ye ezali peto mpe sembo.
12 Ухо које чује, и око које види, обоје је Господ начинио.
Ezala litoyi oyo eyokaka to liso oyo emonaka, ezali Yawe nde asalaki nyonso mibale.
13 Не љуби сна, да не осиромашиш; отварај очи своје, и бићеш сит хлеба.
Kolingaka pongi te, noki te okokoma mobola; sala ete miso na yo ezalaka ya kofungwama, mpe okozanga te bilei ya kobomba.
14 Не ваља, не ваља, говори ко купује, а кад отиде онда се хвали.
Moto oyo asombaka biloko alobaka: « Biloko oyo ezali mabe! Ezali malamu te! » Kasi soki akei, atombolaka mapeka mpo na biloko oyo azwi.
15 Има злата и много бисера, али су мудре усне најдрагоценији накит.
Wolo mpe babiju ezalaka na yango ebele, kasi bibebu oyo ebimisaka boyebi eleki na motuya.
16 Узми хаљину ономе који се подјемчи за туђина, узми залог од њега за туђинку.
Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya.
17 Сладак је човеку хлеб од преваре, али му се после напуне уста песка.
Bilei oyo ezwami na nzela ya lokuta ezalaka elengi na monoko ya moto, kasi, na sima, monoko na ye etondaka na zelo.
18 Мисли се утврђују саветом; зато разумно ратуј.
Soki ozali kosala mabongisi, tunaka toli; mpe soki olingi kobunda bitumba, zala na ekenge mpe na mayele.
19 Ко открива тајну, поступа неверно; зато се не мешај с оним који разваљује уста.
Moto ya bilobaloba abimisaka basekele; yango wana kima bato oyo balobaka mingi.
20 Ко псује оца свог или матер своју, његов ће се жижак угасити у црном мраку.
Moto oyo alakelaka tata to mama na ye mabe, mwinda na ye ekokufa kati na molili.
21 Наследство које се из почетка брзо добија, не бива на послетку благословено.
Bomengo oyo moto azwi noki-noki na ebandeli ekopambolama te na suka.
22 Не говори: Вратићу зло. Чекај Господа, и сачуваће те.
Kolobaka te: « Nakozongisa mabe na mabe oyo basali ngai! » Kasi talela Yawe, mpe akobikisa yo.
23 Мрзак је Господу двојак потег, мерила лажна нису добра.
Kilo oyo ekesana na kilo mosusu ezalaka nkele na miso ya Yawe, mpe emekelo kilo ya lokuta ezalaka eloko ya malamu te.
24 Од Господа су кораци човечји, а човек како ће разумети пут његов?
Ezali Yawe nde atambolisaka matambe ya moto; bongo ndenge nini moto akoki kososola ye moko nzela na ye?
25 Замка је човеку да прождре светињу, и после завета опет да тражи.
Ezali motambo mpo na moto koloba na lombangu: « Eloko oyo ebulisami mpo na Yawe, » mpe kokanisa sima na ye kolapa ndayi.
26 Мудар цар расипа безбожнике и пушта на њих коло.
Mokonzi ya bwanya abenganaka bato mabe mpe azangaka te kopesa bango etumbu.
27 Видело је Господње душа човечија, истражује све што је у срцу.
Molimo ya moto ezali mwinda oyo Yawe apesi ye; esosolaka bozindo nyonso ya motema ya moto.
28 Милост и истина чувају цара, и милошћу подупире свој престо.
Bolamu mpe solo ebatelaka mokonzi; alendisaka bokonzi na ye na nzela ya bolamu.
29 Слава је младићима сила њихова, а старцима част седа коса.
Makasi ezali biju ya bilenge, mpe suki ya pembe ezali lokumu ya mibange.
30 Модрице од боја и ударци који продиру до срца јесу лек зломе.
Bapota elongolaka mabe, mpe bafimbu esukolaka bozindo ya molimo ya moto.