< Приче Соломонове 19 >
1 Сиромах који ходи у безазлености својој бољи је него опаки уснама својим, који је безуман.
Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu koleka mokosi oyo azangi mayele.
2 Кад је душа без знања, није добро; и ко је брзих ногу, спотиче се.
Ezali malamu te kobungisa mayele, kati na bolingo oyo eleka ndelo. Lokolo ya moto oyo atambolaka noki-noki ezangaka te kobeta libaku.
3 Лудост човечија превраћа пут његов, а срце се његово гневи на Господа.
Bozoba ya moto ebebisaka bomoi na ye; mpe, na sima, akomaka kotombokela Yawe.
4 Богатство прибавља много пријатеља, а сиромаха оставља пријатељ његов.
Mozwi azalaka na baninga ebele, kasi mobola akabwanaka ata na molingami na ye ya motema.
5 Лажан сведок неће остати без кара, и ко говори лаж, неће побећи.
Motatoli ya lokuta akozwa etumbu; moto oyo akosaka akozanga te kozwa etumbu.
6 Многи угађају кнезу, и свак је пријатељ човеку податљивом.
Bato mingi balukaka kosepelisa moto ya lokumu, mpe moto nyonso alukaka kozala molingami ya moto oyo asungaka bato.
7 На сиромаха мрзе сва браћа његова, још више се пријатељи његови удаљују од њега; виче за њима, али их нема.
Soki bandeko nyonso ya mobola bayinaka ye, mpo na nini baninga na ye bakima ye te? Ata tango azali nanu koloba, batikalaka lisusu wana te.
8 Ко прибавља разум, љуби душу своју; и ко пази на мудрост, наћи ће добро.
Moto oyo alukaka kozwa bwanya alingaka bomoi na ye; moto oyo alingaka mayele alongaka.
9 Сведок лажан неће остати без кара, и ко говори лаж, погинуће.
Motatoli ya lokuta azwaka etumbu; moto oyo akosaka akobebisama.
10 Не доликују безумном милине, ни слузи да влада кнезовима.
Bomoi ya lokumu ebongi na zoba te; ebongi mpe te na mowumbu kopesa mitindo na bakambi.
11 Разум задржава човека од гнева, и част му је мимоићи кривицу.
Bwanya ya moto ekomisaka ye motema molayi; mpe azwaka lokumu tango atalaka pamba mabe oyo basalaka ye.
12 Царева је срдња као рика младог лава, и љубав је његова као роса трави.
Kanda ya mokonzi ezali lokola koganga ya nkosi, kasi bolamu na ye ezali lokola mamwe.
13 Безуман је син мука оцу свом, и свадљивост женина непрестано прокисивање.
Mwana ya zoba azali pasi mpo na tata na ye; koswana ya mwasi ezali lokola linzanza ya ndako, oyo etangisaka mayi tango nyonso.
14 Кућа и имање наслеђује се од отаца; а од Господа је разумна жена.
Moto akoki kozwa bandako mpe bomengo lokola libula kowuta epai ya batata, kasi mwasi ya bwanya azali likabo kowuta na Yawe.
15 Леност наводи тврд сан, и немарљива душа гладоваће.
Bogoyigoyi ememaka moto na pongi makasi, mpe moto ya goyigoyi akufaka nzala.
16 Ко држи заповести, чува душу своју; а ко не мари за путеве своје, погинуће.
Moto oyo atosaka mibeko abatelaka molimo na ye; moto oyo akebaka te na etamboli na ye akokufa.
17 Господу позаима ко поклања сиромаху, и платиће му за добро његово.
Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu.
18 Карај сина свог докле има надања и на погибао његову да не прашта душа твоја.
Pesaka mwana na yo etumbu wana elikya ezali nanu, kasi kotomboka na yo ekoma te kino na posa ya koboma ye.
19 Велик гнев показуј кад прашташ кар, и кад опростиш, после већма покарај.
Tika ete moto oyo asilikaka makasi amema mokumba ya kanda na ye; pamba te soki obikisi ye, okotinda ye ete azongela lisusu.
20 Слушај савет и примај наставу, да после будеш мудар.
Yoka toli mpe ndima mateya, mpo ete okoma moto ya bwanya.
21 Много има мисли у срцу човечијем, али шта Господ науми оно ће остати.
Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele, kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.
22 Жеља човеку треба да је да чини милост, а бољи је сиромах него лажа.
Eloko oyo moto alingaka epai ya moninga na ye moto ezali bolingo ya solo, mpe mobola azali malamu koleka mokosi.
23 Страх је Господњи на живот; у кога је он, борави сит, нити га походи зло.
Kotosa Yawe ememaka na bomoi, esalaka ete moto azala na kimia; boye ata mabe moko te ekokomela ye.
24 Лењивац крије руку своју у недра, ни к устима својим не приноси је.
Moto ya goyigoyi akotisaka loboko na ye kati na bilei, kasi akokaka te kozongisa yango na monoko na ye.
25 Удри подсмевача да луди омудра, и разумног накарај да разуме науку.
Beta motioli fimbu, mpe zoba akozwa mayele; sembola moto ya mayele, mpe akozwa boyebi.
26 Син срамотан и прекоран упропашћује оца и одгони матер.
Mwana oyo abetaka tata na ye mpe abenganaka mama na ye ayeisaka soni mpe mawa.
27 Немој, сине, слушати науке која одводи од речи разумних.
Mwana na ngai, soki otiki koyoka mateya, okobunga nzela ya maloba ya boyebi.
28 Неваљао сведок подсмева се правди, и уста безбожника прождиру на неправду.
Moto oyo atiolaka bosembo azali motatoli ya zoba; mpe monoko ya bato mabe emelaka kaka mabe.
29 Готови су подсмевачима судови и безумницима бој на леђа.
Etumbu esalema mpo na batioli, mpe fimbu esalema mpo na bazoba.