< 4 Мојсијева 19 >

1 Још рече Господ Мојсију и Арону говорећи:
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
2 Ово је уредба и закон што заповеди Господ говорећи: Реци синовима Израиљевим нека ти доведу јуницу црвену здраву, на којој нема мане, и која још није била у јарму;
« Tala malako ya mibeko ya Yawe: Bosenga na bana ya Isalaele ete bamema epai na bino ngombe ya mwasi ya motane ezanga mbeba to litono mpe etikala nanu te komema ekangiseli.
3 И подајте је Елеазару свештенику, а он нека је изведе напоље из логора да је закољу пред њим.
Bokopesa yango epai ya Nganga-Nzambe Eleazari. Bongo ye akomema yango na libanda ya molako epai wapi akokata yango kingo na miso na ye.
4 И узевши Елеазар крви њене на прст свој нека покропи крвљу према шатору од састанка седам пута.
Na nzela ya mosapi na ye, Nganga-Nzambe Eleazari akozwa makila ya ngombe yango ya mwasi mpe akosopa yango mbala sambo na ngambo ya ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
5 Потом нека заповеди да се спали јуница пред његовим очима; кожу њену и месо њено и крв њену с балегом нека спале.
Bongo bakotumba ngombe ya mwasi na miso na ye: poso, mosuni, makila mpe biloko ya kati.
6 И свештеник узевши дрвета кедровог, исопа и црвца, нека баци у огањ где гори јуница.
Nganga-Nzambe akokamata bakoni ya nzete ya sedele, ya izope, singa ya lino ya motane makasi, mpe akobwaka yango kati na moto oyo ezali kopela mpe ezali kozikisa ngombe ya mwasi.
7 Потом нека опере хаљине своје и опере тело своје водом, па онда нека уђе у логор, и нека буде свештеник нечист до вечера.
Sima na yango, Nganga-Nzambe akosukola na mayi bilamba mpe nzoto na ye liboso ete azonga na molako. Atako bongo, Nganga-Nzambe akozala mbindo kino na pokwa.
8 Тако и ко је спали, нека опере хаљине своје водом, и тело своје нека опере водом, и нека буде нечист до вечера.
Moto oyo akotumba ngombe akosukola mpe bilamba mpe nzoto na ye; mpe akozala mbindo kino na pokwa.
9 А чист човек нека покупи пепео од јунице и изручи га иза логора на чисто место, да се чува збору синова Израиљевих за воду очишћења; то је жртва за грех.
Moto ya peto akokamata putulu ya ngombe mpe akotia yango na libanda ya molako na esika ya peto epai wapi bana ya Isalaele bakobatela yango mpo na kobongisa mayi ya bopetolami; ezali mbeka mpo na masumu.
10 И онај који покупи пепео од јунице нека опере хаљине своје, и нека буде нечист до вечера. То нека је синовима Израиљевим и дошљаку који се бави међу њима вечан закон.
Moto oyo akozwa putulu ya ngombe akosukola mpe bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. Ekozala mobeko ya libela na libela mpo na bana ya Isalaele mpe mpo na mopaya oyo avandi kati na bango.
11 Ко се дотакне мртвог тела човечијег, да је нечист седам дана.
Moto nyonso oyo akosimba ebembe ya moto, ata mokufi yango azalaki nani, akozala mbindo mikolo sambo.
12 Он нека се очисти оном водом трећи дан и седми дан, и биће чист; ако ли се не очисти трећи дан и седми, неће бити чист.
Soki amipetoli na mayi na mokolo ya misato mpe ya minei, akokoma peto; soki te, akozala kaka mbindo.
13 Ко се дотакне мртвог тела човечијег па се не очисти, онај је оскрвнио шатор Господњи; зато да се истреби она душа из Израиља; јер није покропљен водом очишћења, зато је нечист, и нечистота је његова на њему.
Soki amipetoli te sima na ye kosimba ebembe ya moto, abebisi bosantu ya Mongombo ya Yawe. Basengeli kolongola ye na Isalaele, pamba te basopeli ye te mayi ya bopetoli; boye akozala kaka mbindo, mbindo na ye ekokangama ye na nzoto.
14 Ово је закон кад човек умре у шатору: Ко год уђе у онај шатор и ко год буде у шатору, нечист да је седам дана;
Tala mobeko oyo ebongi na kosalela soki moto akufi kati na ndako ya kapo: bato nyonso oyo bakokota na ndako ya kapo mpe ba-oyo bakomizalela na kati bakozala mbindo mikolo sambo.
15 И сваки суд откривен, који не буде добро заклопљен, нечист је.
Sani nyonso ya kofungwama oyo ekozala na mofinuku te na likolo ekozala mbindo.
16 И ко се год дотакне у пољу посеченог мачем или умрлог или кости човечије или гроба, нечист да је седам дана.
Moto nyonso oyo asimbi kati na bilanga ebembe ya moto oyo akufi mpo ete moninga na ye moto abomi ye to akufi na liwa nyonso kaka to mpe asimbi mikuwa ya moto to kunda, akozala mbindo mikolo sambo.
17 И нека за нечистог узму пепела од јунице спаљене за грех, и нека налију на њ воде живе у суд.
Mpo na kopetola moto oyo akomi mbindo, bakokamata putulu ya ngombe ya mwasi oyo batumbi na moto lokola mbeka mpo na masumu, bakotia yango na sani mpe bakosopela yango mayi ya etima.
18 Потом нека узме чист човек исопа и замочи у ону воду, и покропи њом шатор и све суде и људе који су у њему били; тако и оног који би се дотакао кости или човека посеченог или умрла или гроба.
Moto oyo azali mbindo te akokamata etape ya izope mpe akotia yango kati na mayi, bongo akosalela yango mpo na kobwaka mayi na ndako ya kapo epai wapi moto akufi, na bisalelo mpe na banzoto ya bato nyonso oyo bazalaki kati na ndako yango; akosala mpe bongo mpo na moto oyo asimbaki mikuwa, ebembe ya moto oyo moninga na ye moto abomaki to akufaki na liwa nyonso kaka to mpe mpo na moto oyo asimbaki kunda.
19 Чисти нечистог нека покропи трећи и седми дан; и кад га очисти седми дан, нека опере хаљине своје и себе нека опере водом, и биће чист увече.
Na mokolo ya misato mpe ya sambo, moto oyo azali mbindo te akobwakela moto ya mbindo. Bongo na mokolo ya sambo, akopetola ye. Moto oyo bapetoli akosukola bilamba na ye mpe akomisukola nzoto na mayi; boye na pokwa, akokoma peto.
20 А ко буде нечист па се не очисти, да се истреби она душа из збора; јер је светињу Господњу оскврнио, а није покропљен водом очишћења; нечист је.
Kasi soki moto oyo amikomisaki mbindo amipetoli, bakolongola ye kati na lisanga; pamba te akomisi mbindo Esika ya bule ya Yawe. Mpe lokola basopeli ye te mayi ya bopetoli na nzoto, akozala mbindo.
21 И ово нека им је закон вечан: и који покропи водом очишћења, нека опере хаљине своје; и ко се год дотакне воде очишћења, да је нечист до вечера.
Ekozala mpo na bango mobeko ya libela na libela. Moto oyo akobwaka mayi ya bopetoli akosukola bilamba na ye, mpe moto oyo akosimba mayi yango akozala mbindo kino na pokwa.
22 И чега се год дотакне ко је нечист, да је нечисто; и ко се њега дотакне, да је нечист до вечера.
Eloko nyonso oyo moto ya mbindo akosimba ekokoma mbindo, mpe moto nyonso oyo asimbi eloko yango akokoma mbindo kino na pokwa. »

< 4 Мојсијева 19 >