< Књига Немијина 5 >
1 И стаде велика вика људи и жена на браћу њихову Јудејце.
Mibali elongo na basi na bango bayimaki-yimaki makasi mpo na kotelemela bandeko na bango, Bayuda.
2 Јер неки говораху: Нас и синова наших и кћери наших има много; да добавимо жита да једемо и останемо живи.
Bamoko bazalaki koloba: — Biso elongo na bana na biso ya mibali mpe ya basi, tozali ebele; tozali na posa ya ble oyo ekoki na motango na biso mpo ete tolia mpe towumela na bomoi.
3 Други опет говораху: Да заложимо поља своја и винограде и куће да добијемо жита у овој глади.
Bamosusu bazalaki mpe koloba: — Tozali kosimbisa bilanga na biso, bilanga na biso ya vino mpe bandako na biso lokola ndanga mpo na kozwa ble na tango ya nzala makasi.
4 Још други говораху, да узајмимо новаца на поља своја и винограде за данак царски.
Bamosusu lisusu bazalaki koloba: — Topesaki bilanga na biso mpe bilanga na biso ya vino lokola ndanga mpo na kodefa mbongo ya kofuta mpako ya mokonzi.
5 А тело је наше као тело браће наше, синови наши као њихови синови и ето треба да дамо синове своје и кћери своје у робље, и неке кћери наше већ су робиње, а ми не можемо ништа, јер поља наша и винограде наше држе други.
Nzokande tozali nzoto moko mpe makila moko na bandeko na biso, mpe bana na biso bakeseni te na bana na bango; kasi tala ndenge nini tosili kosambwa: tosengeli koteka bana na biso ya mibali mpe ya basi lokola bawumbu; mpe bana na biso mosusu ya basi bakomi bawumbu, mpe tozangi nguya ya kosikola bango, mpo ete bilanga na biso mpe bilanga na biso ya vino ekomi ya bato mosusu!
6 Зато се расрдих врло кад чух вику њихову и те речи.
Tango nayokaki koyimayima na bango mpe maloba wana nyonso, nasilikaki makasi.
7 И смислих у срцу свом и укорих кнезове и поглаваре, и рекох им: Ви мећете бремена сваки на брата свог. И сазвах велики збор њих ради.
Nazwaki mokano ya kopamela bakambi mpe bankumu; nalobaki na bango: — Tango bodefisaka bandeko na bino, bosengaka bango mileki! Bozali nde komemisa bandeko na bino moko mokumba monene boye! Nabengisaki mayangani moko ya monene mpo na kolobela makambo yango elongo na bango.
8 И рекох им: Ми откуписмо колико могасмо браћу своју Јудејце што беху продани народима; а ви ли ћете продавати браћу своју или ћете се продавати нама? А они умукоше и не нађоше шта би одговорили.
Nalobaki na bango: — Biso, kolanda makoki na biso, tosikolaki bandeko na biso, Bayuda, oyo batekamaki epai ya bapagano. Kasi bino sik’oyo, bozali bino moko koteka bandeko na bino, mpe bozali koteka bango kaka epai ya bato ya ekolo na biso! Bavandaki kimia mpe bazangaki liloba ya kozongisa.
9 И рекох: Није добро шта радите. Не треба ли вам ходити у страху Бога нашег да нам се не ругају народи, непријатељи наши?
Nabakisaki: — Makambo oyo bozali kosala ezali malamu te. Bosengelaki te kotambola na kotosa Nzambe na biso mpo ete topesa te na bapagano oyo bazali banguna na biso nzela ya kotiola biso?
10 И ја и браћа моја и момци моји давали смо им новаца и жита; али опростимо им тај дуг.
Ngai, bandeko na ngai mpe basali na ngai, todefisaki bango mbongo mpe ble. Nabondeli bino, totikela bango niongo yango!
11 Хајде вратите им данас поља њихова и винограде и маслинике и куће и што им на стотину узимасте од новца и жита и вина и уља.
Bozongisela bango na lombangu bilanga na bango, bilanga na bango ya vino, bilanga na bango ya banzete ya olive mpe bandako na bango; mpe botikela bango eteni ya nkama moko ya mbongo, ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta oyo bokatelaki bango lokola mileki.
12 А они одговорише: Вратићемо и нећемо искати од њих; учинићемо како велиш. Тада сазвах свештенике, и заклех их да ће тако учинити.
Bazongisaki: — Tokosala ndenge olobi, tokozongisa yango mpe tokosenga bango lisusu eloko moko te na likolo. Bongo nabengisaki Banganga-Nzambe; mpe nasengaki na bakambi mpe bakalaka ete balapa ndayi, liboso ya Banganga-Nzambe, ete bakosala ndenge balaki.
13 И истресох недра своја и рекох: Овако да истресе Бог сваког из куће његове и из труда његовог ко год не испуни ове речи, и овако да се истресе и буде празан. И сав збор рече: Амин. И хвалише Господа, и учини народ по тој речи.
Mpe napupolaki songe ya nzambala na ngai na koloba: — Tika ete Nzambe apupola ndenge ngai nazali kosala mpe abengana, mosika ya ndako na ye mpe ya biloko na ye, moto nyonso oyo akokokisa te elaka na ye; mpe tika ete bapupola ye ndenge wana mpe atikala maboko pamba! Lisanga mobimba ezongisaki: — Amen! Bakumisaki Yawe mpe bakokisaki makambo oyo balakaki.
14 И откад ми цар заповеди да им будем управитељ у земљи Јудиној, од године двадесете до тридесет друге године цара Артаксеркса, дванаест година, ја и браћа моја не једосмо хране управитељске.
Wuta mokolo oyo mokonzi akomisaki ngai moyangeli kati na mokili ya Yuda, elingi koloba: kobanda na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi kino na mobu ya tuku misato na mibale, elekaki mibu zomi na mibale, ezala ngai to bandeko na ngai, totikalaki mokolo moko te kobika na mpako oyo bapesaka na moyangeli.
15 А пређашњи управитељи који беху пре мене беху тешки народу узимајући од њега хлеб и вино осим четрдесет сикала сребра, и слуге њихове заповедаху по народу. Али ја тако не чиних бојећи се Бога.
Nzokande, bayangeli oyo bakambaki liboso na ngai bazalaki konyokola bato mpe kosenga na makasi ete bapesa bilei, vino mpe mbongo ya bibende ya palata, tuku minei. Ezala bakalaka na bango mpe bazalaki kaka konyokola bato. Kasi ngai, natikalaki kosala bongo te, pamba te nazalaki kotosa Nzambe.
16 Него и око грађења зида радих, и не куписмо њиве; и сви момци моји беху скупа онде на послу.
Kutu, namipesaki lisusu koleka na mosala ya kobongisa mir oyo; basali na ngai nyonso bamipesaki mpe na mosala mpe totikalaki kosomba ata eteni moko te ya mabele.
17 И Јудејаца и поглавара сто и педесет људи и који долажаху к нама из околних народа беху за мојим столом.
Na mesa na ngai, bato nkama moko na tuku mitano, Bayuda mpe bakalaka, bazalaki kolia elongo na bato oyo bazalaki koya epai na biso wuta na bikolo ya bapaya ya zingazinga.
18 И готовљаше се сваки дан по једно говече, шест оваца, избраних, и птице готовљаху ми се, и сваких десет дана даваше се свакојаког вина изобила. И опет не исках хране управитељске; јер служба беше тешка народу.
Mikolo nyonso, bazalaki kolambela ngai ngombe moko ya mobali, meme motoba ya malamu mpe basoso; mpe sima na mikolo zomi nyonso, bazalaki koya kotikela ngai vino ebele. Atako bongo, natikalaki kosenga eloko moko te kati na biloko oyo esengeli mpo na moyangeli, pamba te mokumba ya misala ezalaki makasi na mito ya bato.
19 Помени ме Боже мој на добро за све што сам чинио овом народу.
Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai mpe talisa ngai ngolu na Yo mpo na nyonso oyo nasili kosala mpo na bato oyo!