< Књига пророка Михеја 1 >

1 Реч Господња која дође Михеју Моресећанину за времена Јоатама, Ахаза и Језекије, царева Јудиних, што виде за Самарију и за Јерусалим.
Yawe alobaki na Mishe, moto ya mboka Moresheti, na tango Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki, moko sima na mosusu, bakonzi ya Yuda: ezalaki emoniseli oyo Mishe azwaki na tina na Samari mpe Yelusalemi.
2 Чујте, сви народи, слушај, земљо и шта је на њој, и Господ Бог да вам је сведок, Господ из свете цркве своје.
Bino nyonso, bikolo, boyoka! Mabele elongo na nyonso oyo ezali kati na yo, botia matoyi mpe boyoka! Nkolo Yawe azwi bino na likambo; Yawe akosambisa bino wuta na Ndako na Ye ya bule!
3 Јер, гле, Господ излази из места свог, и сићи ће, и ходиће по висинама земаљским.
Tala, Yawe azali koya wuta na Ndako na Ye, azali kokita, azali kotambola na likolo ya bangomba ya mabele.
4 И горе ће се растопити пред Њим, и долине ће се расести, као восак од огња и као вода што тече низ стрмен.
Na se ya matambe na Ye, bangomba ezali kopasuka, mabwaku ezali kopanzana ndenge mafuta eyandukaka na moto, ndenge mayi ya mvula etiolaka na lombangu na mipanzi ya bangomba.
5 Све је то за злочинство Јаковљево и за грехе дома Израиљевог. Које је злочинство Јаковљево? Није ли Самарија? Које су висине Јудине? Није ли Јерусалим?
Mpo na nini nyonso wana? Ezali mpo na mabe ya Jakobi, mpo na masumu ya libota ya Isalaele. Nani atindikaki Jakobi na kosala mabe? Boni, ezali Samari te? Nani asalaki ete bisambelo ya likolo ya bangomba ezala kati na Yuda? Boni, ezali Yelusalemi te?
6 Зато ћу учинити од Самарије гомилу у пољу да се саде виногради, и побацаћу камење њено у долину и открићу јој темеље.
« Nakokomisa Samari mopiku ya mabanga; bakokoma kosala bilanga ya vino kuna. Nakobwaka mabanga na yango na lubwaku, nakosala ete miboko na yango etikala polele.
7 И сви резани ликови њени разбиће се, и сви ће се дарови њени сажећи огњем, и све ћу идоле њене потрти, јер од плате курварске накупи, и опет ће бити плата курварска.
Banzambe na bango nyonso ya bikeko ekopanzana, makabo nyonso ya mbindo oyo bapesaka epai ya banzambe na bango ya bikeko ekobwakama na moto. Nakobebisa banzambe nyonso ya bikeko ya Samari mpo ete esalemaki na lifuti ya mbindo ya ekobo ya bule, mpe mpo ete basalela yango lisusu te lokola lifuti ya ekobo mosusu ya bule. »
8 Зато ћу плакати и ридати; ходићу свучен и го, плакаћу као змајеви и тужићу као сове.
Yango wana, nakolela mpe nakosala matanga, nakotambola makolo ngulu mpe bolumbu, nakoganga lokola mbwa ya zamba mpe nakolela lokola maligbanga.
9 Јер јој се ране не могу исцелити, дођоше до Јуде, допреше до врата мог народа, до Јерусалима.
Pamba te bokono ya Samari esilaka te; pota na yango ezwi mpe mokili ya Yuda, ezali kopusana kino na ekuke ya bato na ngai, kino kutu na yango moko Yelusalemi.
10 Не јављајте у Гату, не плачите; у Вит-Афри ваљај се по праху.
Boloba yango te kati na engumba Gati, bolela te! Bato ya Beti-Leafra, bomipakola putulu!
11 Изађи, становнице сафирска, с голом срамотом; становница сананска неће изаћи; жалост вет-езилска неће вам дати станка.
Bato ya engumba Shafiri, botambola bolumbu mpe boyoka soni! Bato ya mboka Tsanani bakobima lisusu na engumba na bango te, bato ya Beti-Atseli bazali na matanga; boye balongoli lisungi na bango epai na yo.
12 Јер становница маротска тужи за својим добром. Јер сиђе зло од Господа до врата јерусалимских.
Bato ya etuka ya Meroti bazali kolenga na somo mpo na bolamu na bango, pamba te Yawe atindi pasi ya makasi kino na ekuke ya Yelusalemi.
13 Упрегни брзе коње у кола, становнице лахиска, која си почетак греху кћери сионској, јер се у теби нађоше злочинства Израиљева.
Bino bavandi ya engumba Lakishi, bokangisa bampunda mpe bashar na bino! Bino nde bomemisaki Siona, mboka kitoko, masumu; pamba te bamonaki masumu ya Isalaele kati na bino!
14 Зато пошаљи дарове Моресету гатском; домови ахсивски превариће цареве Израиљеве.
Yango wana, bokopesa na Moresheti mokanda oyo elakisi ete bokabwani na ye na libala. Engumba Akizibi ezali kokosa bakonzi ya Isalaele.
15 Још ћу ти довести наследника, становнице мариска; доћи ће до Одолама, славе Израиљеве.
Bino bavandi ya Maresha, nakotindela bino monguna moko mpo ete aya kobundisa bino; lokumu ya Isalaele ekokima na engumba Adulami.
16 Начини се ћелава и острижи се за милом децом својом; рашири ћелу своју као орао, јер се воде од тебе у ропство.
Bomikokola suki na mito mpo na bana na bino ya mibali oyo bolingaka, ndenge esalemaka na matanga. Bomikokola suki na mito mpe botikala mabandi lokola mpongo, pamba te bakomema bango na bowumbu mosika na bino.

< Књига пророка Михеја 1 >