< Књига Исуса Навина 18 >

1 И сабра се сав збор синова Израиљевих у Силом и онде наместише шатор од састанка, пошто покорише земљу.
Sima na bana ya Isalaele kozwa bokonzi likolo ya mokili, lisanga na bango mobimba esanganaki na Silo mpe batelemisaki kuna Ndako ya kapo ya Bokutani.
2 Али још беше синова Израиљевих седам племена, којима не би дато наследство.
Kasi kati na bana ya Isalaele, ezalaki na mabota sambo oyo ezwaki nanu te libula na yango ya mabele.
3 И Исус рече синовима Израиљевим: Докле ћете оклевати, те не идете и узмете земљу коју вам је дао Господ Бог отаца ваших?
Jozue alobaki na bana ya Isalaele: « Kino tango nini bokozela mpo na kokende kozwa mokili oyo Yawe, Nzambe ya batata na bino, apesaki bino?
4 Изаберите између себе по три човека из сваког племена, па нека се дигну и прођу земљу, и нека је препишу на наследства своја, па онда нека дођу к мени.
Bopona bato misato kati na libota moko na moko. Nakotinda bango mpo ete bakende kotambola kati na mokili mpe kotia bandelo na yango kolanda libula ya libota na libota; bongo na sima nde bakoki kozonga epai na ngai.
5 И нека је разделе на седам делова; Јуда ће остати у својим међама с југа, и дом ће Јосифов остати у међама својим са севера.
Bakokabola mokili yango na biteni sambo; bakitani ya Yuda bakotikala na eteni na bango ya mabele ya ngambo ya sude, mpe bakitani ya Jozefi bakotikala na eteni na bango ya mabele ya ngambo ya nor.
6 А ви препишите земљу на седам делова, и донесите амо к мени, да бацим жреб за племена ваша овде пред Господом Богом нашим.
Sima na bino kosala mabongisi ya kokabola mokili na biteni sambo, bomemela ngai yango awa, mpe ngai nakobeta zeke mpo na bino liboso ya Yawe, Nzambe na bino.
7 Јер Левити немају дела међу вама, јер је свештенство Господње њихово наследство; а Гад и Рувим и половина племена Манасијиног примише наследство своје с оне стране Јордана на истоку, које им даде Мојсије, слуга Господњи.
Kasi bakitani ya Levi bakotikala kozwa eteni moko te ya mabele elongo na bino, pamba te mosala ya bonganga-Nzambe nde ekozala libula na bango. Bato ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki eteni ya mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani. »
8 Тада усташе људи и пођоше; а Исус заповеди људима који одоше да препишу земљу говорећи: Идите и прођите земљу и препишите је, па онда дођите к мени, те ћу бацити жреб за вас овде пред Господом у Силому.
Tango bato batelemaki mpo na kokende kosala mabongisi ya kokabola mokili, Jozue apesaki mitindo oyo: « Bokende kotambola kati na mokili, bokata bandelo na yango, mpe na sima, bozongela ngai awa na Silo, mpe ngai nakobeta zeke mpo na bino liboso ya Yawe. »
9 И одоше људи и прођоше земљу и преписаше је у књигу, село по село, на седам делова; потом се вратише к Исусу у логор, у Силом.
Boye, bato oyo bakendeki, batambolaki kati na mokili, bakataki bandelo na yango mpe batiaki yango na mokanda, engumba na engumba, mpe bakabolaki mokili mobimba na biteni sambo; bongo na sima, bazongaki na Silo, na molako epai ya Jozue.
10 И Исус баци жреб за њих у Силому пред Господом, и онде подели Исус земљу међу синове Израиљеве по деловима њиховим.
Jozue abetaki zeke mpo na bango liboso ya Yawe, na Silo, mpe kuna akabolaki mokili kati na bana ya Isalaele kolanda mabota na bango.
11 И изађе жреб за племе синова Венијаминових по породицама њиховим, и дође међа дела њиховог међу синове Јудине и синове Јосифове.
Zeke ekweyaki epai ya libota ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango. Eteni ya mabele oyo epesamelaki bango na zeke ezalaki na kati-kati ya mabele ya bakitani ya Yuda mpe ya Jozefi.
12 И би им међа са севера до Јордана, и она иде покрај Јерихона са севера и пружа се на гору к западу, и излази у пустињу Вет-Авен;
Na ngambo ya nor, mondelo na bango ezalaki longwa na Yordani, emataki na mopanzi ya Jeriko, ekatisaki mokili ya bangomba, na ngambo ya weste, mpe esukaki na esobe, na Beti-Aveni.
13 А одатле иде та међа до Луза, с јужне стране Лузу, а то је Ветиљ, и силази до Атарот-Адара покрај горе која је с југа Вет-Орону доњем.
Mondelo yango elekelaki wana mpe ekendeki kino na Luze, na mopanzi na yango ya ngambo ya sude, oyo ezali Beteli; ekendeki kotutana na Ataroti-Adari, na ngomba oyo ezalaki na ngambo ya sude ya Beti-Oroni, mokili ya se.
14 Отуда излази међа и савија се покрај мора к југу од горе, која је према Вет-Орону на југ, и излази на Киријат-Вал, а то је Киријат-Јарим, град синова Јудиних. То је западна страна.
Longwa na ngomba moke oyo etalana na Beti-Oroni na ngambo ya sude, mondelo yango ebalukaki na ngambo ya weste, mpe esukaki na Kiriati-Bala, oyo ekoma Kiriati-Yearimi, engumba ya bakitani ya Yuda. Yango nde ezalaki mondelo na yango na ngambo ya weste.
15 А јужна страна од краја Киријат-Јарима, и излази та међа к западу, па иде на извор воде Нефтоје,
Na ngambo ya sude, mondelo yango ebandaki longwa na Kiriati-Yearimi, na ngambo ya weste, mpe ekendeki kobima na etima ya mayi ya Nefitoa.
16 И силази та међа накрај горе која је према долини сина Еномовог, а у долини рафајској к западу, и иде преко долине Еномове покрај Јевусеја к југу, и силази на извор Рогил;
Ekitaki kino na ebandeli ya ngomba moke oyo etalana na Lubwaku ya Beni-Inomi, na ngambo ya nor ya etando ya bato ya Refayimi. Ekitaki na Lubwaku ya Inomi, na mopanzi ya ngambo ya sude ya engumba ya bato ya Yebusi kino na Eyini-Rogeli.
17 Потом се обрће од севера и иде на Ен-Семес, а отуда иде на Галилот, који је према гори адумимској, и силази на камен Воана сина Рувимовог;
Ebalukaki na ngambo ya nor, elekelaki na Eyini-Shemeshi, elekaki na Geliloti oyo etalana na nzela emata kino na Adumimi; sima ekitaki kino na Libanga ya Boani, mwana mobali ya Ribeni.
18 Отуда иде страном која је према Арави к северу и силази у Араву;
Elekaki na mopanzi ya ngambo ya nor, liboso ya Beti-Araba, mpe ekitaki kino na etando ya Araba.
19 Потом иде покрај Вет-Огле к северу и удара у залив сланог мора са северне стране до краја Јордана на југу. То је јужна међа.
Mondelo yango elekelaki na mopanzi ya Beti-Ogila, na ngambo ya nor, mpe esukaki na eteni ya mabele oyo ekota na mayi ya ebale monene ya Barozo, na ngambo ya nor, na suka ya ngambo ya sude ya Yordani. Yango nde ezalaki mondelo na yango na ngambo ya sude.
20 А Јордан је међа с источне стране. То је наследство синова Венијаминових с међама њиховим унаоколо по породицама њиховим.
Ebale ya Yordani ekomaki mondelo na yango na ngambo ya este. Yango nde ezalaki bandelo ya libula ya mabota ya bakitani ya Benjame na bangambo nyonso.
21 А градови племена синова Венијаминових по породицама њиховим јесу: Јерихон и Вет-Огла и Емек-Кесис,
Tala bingumba ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango: Jeriko, Beti-Ogila, Emeki-Ketsitsi,
22 И Вет-Арава и Семарајим и Ветиљ,
Beti-Araba, Tsemarayimi, Beteli,
23 И Авин и Фара и Офра,
Avimi, Para, Ofira,
24 И Хефар-Амона и Офнија и Гава; дванаест градова са селима својим;
Kefari-Amonayi, Ofini mpe Geba: bingumba nyonso ezalaki zomi na mibale, elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
25 Гаваон и Рама и Вирот,
Gabaoni, Rama, Beyeroti,
26 И Миспа и Хефира и Моса,
Mitsipe, Kefira, Motsa,
27 И Рекем и Јерфаил и Тарала,
Rekemi, Yiripeyeli, Tareala,
28 И Сила, Елеф и Јевус, а то је Јерусалим, Гават, Киријат; четрнаест градова са селима својим. То је наследство синова Венијаминових по породицама њиховим.
Tsela, Elefi, engumba ya Yebusi oyo ezali Yelusalemi, Gibea, Kiriati: bingumba nyonso ezalaki zomi na minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike. Yango nde ezalaki libula ya mabele ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango.

< Књига Исуса Навина 18 >