< Књига о Јову 5 >
1 Зови; хоће ли ти се ко одазвати? И коме ћеш се између светих обратити?
Ganga na yo, soki olingi! Nani akoyanola yo? Okotombokela mosantu nini?
2 Доиста безумног убија гнев, и лудог усмрћује срдња.
Kotomboka ebomaka moto oyo azangi mayele, zuwa ebomaka zoba.
3 Ја видех безумника где се укоренио; али одмах проклех стан његов.
Solo, namonaki zoba kozwa misisa; kasi, mbala moko, nalakelaki ndako na ye mabe:
4 Синови су његови далеко од спасења и сатиру се на вратима а нема ко да избави.
‹ Tika ete bana na ye ya mibali bazanga lisungi, balonga te na kosambisama mpe bazangela moto oyo akobundela bango!
5 Летину његову једе гладни и испред трња купи је, и лупеж ждере благо њихово.
Tika ete moto oyo azali na nzala asilisa mbuma ya elanga na ye, akamata yango kino kati na basende; mpe tika ete moto ya lokoso asilisa bomengo na ye! ›
6 Јер мука не излази из праха нити невоља из земље ниче.
Pamba te pasi ewutaka na putulu te, mpe minyoko ewutaka na mabele te;
7 Него се човек рађа на невољу, као што искре из угљевља узлећу у вис.
moto abotamaka mpo na komona pasi, ndenge kaka mikalikali ebimaka mpo na kopanzana na likolo.
8 Али ја бих Бога тражио, и пред Бога бих изнео ствар своју,
Kasi soki ezalaki ngai, nalingaki komimonisa liboso ya Nzambe, nalingaki kotalisa Ye likambo na ngai.
9 Који чини ствари велике и неиспитиве, дивне, којима нема броја;
Nzambe asalaka makambo minene oyo bato bakokaka kososola te, mpe bikamwa oyo bato bakokaka kotanga te;
10 Који спушта дажд на земљу и шаље воду на поља;
anokisaka mvula na mokili, mpe atindaka mayi na bilanga;
11 Који подиже понижене, и жалосне узвишује к спасењу;
atombolaka bato oyo babwakama, mpe apesaka esengo na bato oyo bazali kolela;
12 Који расипа мисли лукавих да руке њихове не сврше ништа;
abebisaka mabongisi ya bato oyo bazalaka na mayele mabe, mpe maboko na bango ekokisaka te mikano na bango;
13 Који хвата мудре у њиховом лукавству, и намеру опаких обара;
akangaka bato ya bwanya kati na mitambo ya mayele mabe na bango, mpe abebisaka mabongisi ya bakosi.
14 Дању наилазе на мрак, и у подне пипају као по ноћи.
Molili eyelaka bango na moyi; na moyi makasi, batambolaka na kotepatepa lokola na butu.
15 Он избавља убогог од мача, од уста њихових и од руке силног.
Nzambe abikisaka mobola na mopanga ya monoko na bango, akangolaka moto akelela na loboko ya moto ya makasi.
16 Тако има надања сиромаху, а злоћа затискује уста своја.
Boye, mobola asengeli kozala na elikya, mpe moto oyo atambolaka na bosembo te asengeli kokanga monoko.
17 Гле, благо човеку кога Бог кара; и зато не одбацуј карање Свемогућег.
Esengo na moto oyo Nzambe apameli! Kotiolaka te pamela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
18 Јер Он задаје ране, и завија; Он удара, и руке Његове исцељују.
Pamba te azokisaka pota, kasi atiaka yango mpe kisi; abetaka, kasi loboko na Ye ebikisaka.
19 Из шест невоља избавиће те; ни у седмој неће те се зло дотаћи.
Mbala motoba, akobikisa yo na pasi; mpe na mbala ya sambo, mabe ekokomela yo te.
20 У глади избавиће те од смрти и у рату од мача.
Akokangola yo na kufa, na tango ya nzala makasi; mpe akobikisa yo na nguya ya mopanga, kati na bitumba.
21 Кад језик шиба, бићеш сакривен, нити ћеш се бојати пустоши кад дође.
Okobatelama liboso ya fimbu ya lolemo, okobanga kobebisama te tango ekoya;
22 Смејаћеш се пустоши и глади, нити ћеш се бојати зверја земаљског.
okoseka kobebisama mpe nzala makasi, mpe okobanga te banyama ya mokili;
23 Јер ћеш с камењем пољским бити у вери, и зверје ће пољско бити у миру с тобом.
pamba te okozala na boyokani elongo na mabanga ya bilanga, mpe banyama ya zamba ekozala na kimia elongo na yo.
24 И видећеш да је мир у шатору твом, кућићеш кућу своју и нећеш се преварити.
Okososola ete ndako na yo ezali na kimia; tango okotala bibwele kati na lopango na yo, okomona ete ata moko te ezangi.
25 Видећеш како ће ти се умножити семе твоје, и пород ће твој бити као трава на земљи.
Okososola ete bana na yo bakozala ebele, mpe bakitani na yo, lokola matiti ya mabele.
26 Стар ћеш отићи у гроб као што се жито сноси у стог у своје време.
Okokita na kunda na kimobange makasi, ndenge batelemisaka maboke ya matiti na tango na yango.
27 Ето, разгледасмо то, тако је; послушај и разуми.
Toyekolaki likambo yango malamu: ezali penza bongo. Boye, yoka yango mpe salela yango mpo na bolamu na yo! »