< Књига пророка Јеремије 22 >

1 Овако говори Господ: Сиђи у дом цара Јудиног, и реци онде ову реч,
Tala liloba oyo Yawe alobi na Jeremi: « Kende na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe tatola maloba oyo:
2 И кажи: Слушај реч Господњу, царе Јудин, који седиш на престолу Давидовом, ти и слуге твоје и народ твој, који улазите на ова врата.
‹ Mokonzi ya Yuda, yo oyo ovandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, yoka Liloba na Yawe! Yo, bakalaka na yo mpe bato na yo: bino nyonso oyo bolekelaka na nzela ya bikuke oyo,
3 Овако вели Господ: Чините суд и правду, и коме се отима избављајте га из руку насилникових, и не чините криво иностранцу ни сироти ни удовици, и не чините им силу, и крв праву не проливајте на овом месту.
tala liloba oyo Yawe alobi: Bosalela bosembo mpe bosolo; bokangola wuta na maboko ya monyokoli moto oyo bazali konyokola! Bonyokola te bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali; bosala mpe bango mabe te. Bosopa te na esika oyo, makila ya bato oyo bayebi likambo te.
4 Јер ако доиста узрадите ово, улазиће на врата овог дома цареви, који седе место Давида на престолу његовом, на колима и на коњима, они и слуге њихове и народ њихов.
Pamba te soki bosaleli na bokebi mibeko oyo, bakonzi oyo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi bakolekela na bikuke ya ndako oyo, na likolo ya bashar mpe ya mpunda, elongo na bakalaka mpe bato na bango.
5 Ако ли не послушате ове речи, заклињем се собом, вели Господ, да ћу опустети тај дом.
Kasi soki botosi mibeko oyo te, › elobi Yawe, ‹ nalapi ndayi na Kombo na Ngai ete ndako oyo ekobebisama. › »
6 Јер овако вели Господ за дом цара Јудиног: Ти си ми Галад и врх ливански, али ћу те обратити у пустињу, у градове у којима се не живи.
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na ndako ya mokonzi ya Yuda: « Ata soki ozali lokola Galadi na miso na Ngai, lokola songe ya ngomba ya Libani; solo, nakokomisa yo lokola esobe, lokola engumba oyo bato bavandaka te.
7 И спремићу на тебе затираче, сваког с оружјем, и посећи ће твоје красне кедре и побацати их у огањ.
Nakotinda bato ete baya kobebisa yo, moto na moto na bibundeli na ye; bongo bakokata banzete na yo ya sedele oyo ya kitoko mpe bakobwaka yango na moto.
8 И многи ће народи пролазити мимо тај град, и говориће један другом: Зашто учини ово Господ од тог града великог?
Bato bakowuta na bikolo ya ndenge na ndenge bakolekela na engumba oyo mpe bakotunana: ‹ Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na engumba monene oyo? ›
9 И рећи ће: Јер оставише завет Господа Бога свог, и клањаше се другим боговима и служише им.
Mpe eyano ekozala: ‹ Ezali mpo ete babebisi boyokani oyo basalaki elongo na Yawe, Nzambe na bango, bafukamelaki mpe basalelaki banzambe ya bapaya. › »
10 Не плачите за мртвим нити га жалите; него плачите за оним који одлази, јер се неће више вратити нити ће видети своје постојбине.
Bolela te mpo na kufa ya mokonzi to bosala matanga te mpo na kufa na ye! Bolela, bolela nde makasi mpo na ye oyo akei na bowumbu, mpo ete akozonga lisusu te mpe akomona lisusu te mboka epai babota ye.
11 Јер овако говори Господ о Салуму сину Јосије, цара Јудиног, који цароваше место Јосије оца свог, који отиде из овог места: неће се више вратити.
Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Shalumi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, oyo akitanaki na Joziasi, tata na ye, lokola mokonzi ya Yuda, kasi atikaki mboka na ye: « Akozonga lisusu te.
12 Него ће умрети у месту куда га одведоше у ропство, и неће више видети ове земље.
Akokufa na esika oyo bakomema ye na bowumbu, akomona lisusu mokili oyo te. »
13 Тешко оном који гради своју кућу не по правди, и клети своје не по правици, који се служи ближњим својим низашта и плату за труд његов не даје му;
« Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye na nzela ya bosembo te, mpe bashambre na ye ya etaje, na nzela ya lokuta; oyo asalisaka bandeko na ye mosala ya pamba mpe afutaka bango eloko te;
14 Који говори: Саградићу себи велику кућу и простране клети; и разваљује себи прозоре, и облаже кедром и маже црвенилом.
oyo alobaka: ‹ Nakotongisa ndako monene oyo ekozala na bashambre minene, na etaje! › Boye atiaka yango maninisa minene, mabaya ya sedele na bamir na yango ya kati mpe akopakolaka yango langi ya motane.
15 Хоћеш ли царовати кад се мешаш с кедром? Отац твој није ли јео и пио? Кад чињаше суд и правду, тада му беше добро.
Okanisi ete kotondisa ndako na mabaya ya sedele nde ekolendisa bokonzi na yo? Tata na yo azangaki bilei mpe masanga te, kasi atambolaki na bosembo mpe na boyengebene; boye alongaki na makambo nyonso.
16 Даваше правицу сиромаху и убогоме, и беше му добро; није ли то познавати ме? Говори Господ.
Alongisaki babola mpe bato bakelela, mpe alongaki na makambo nyonso. Boni, yango te koyeba Ngai, » elobi Yawe?
17 Али очи твоје и срце твоје иду само за твојим добитком и да проливаш крв праву и да чиниш насиље и кривду.
« Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka bomengo mpo na bolamu na yo moko kaka, na nzela ya kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, na nzela ya konyokola bato mpe na nzela ya kobotola bango biloko. »
18 Зато овако вели Господ за Јоакима сина Јосије цара Јудиног: Неће нарицати за њим: Јаох брате мој! Или: Јаох сестро! Неће нарицати за њим: Јаох господару! Или: Јаох славо његова!
Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda: « Bakosalela ye matanga te na koloba: ‹ Mawa, ndeko na ngai ya mobali! Mawa, ndeko na ngai ya mwasi! › Bakosalela ye matanga te na koloba: ‹ Mawa, nkolo na ngai! Mawa, mokonzi na ngai! ›
19 Погребом магарећим погрепшће се, извући ће се и бациће се иза врата јерусалимских.
Bakokunda ye ndenge bakundaka ane, bakobenda ye mpe bakobwaka ye libanda ya bikuke ya Yelusalemi. »
20 Изиђи на Ливан и вичи, и на Васану пусти глас свој, и вичи преко бродова, јер се сатрше сви који те љубе.
« Mata na Libani mpe ganga makasi! Tika ete mongongo na yo eyokana kino na Bashani! Ganga wuta na Abarimi, pamba te baninga na yo nyonso basili kokufa!
21 Говорих ти у срећи твојој, а ти рече: Нећу да слушам; то је пут твој од детињства твог да не слушаш глас мој.
Nakebisaki yo tango ozalaki na kimia kasi olobaki: ‹ Nakoyoka te! › Ezaleli na yo ezalaka kaka boye wuta bolenge na yo, otosaka na yo Ngai te!
22 Све ће пастире твоје однети ветар, и који те љуби отићи ће у ропство; тада ћеш се посрамити и постидети за сву злоћу своју.
Mopepe ekomema bakambi na yo nyonso mpe baninga na yo bakokende na bowumbu. Okoyoka soni mpe okosambwa likolo ya mabe na yo nyonso.
23 Ти седиш на Ливану, гнездо вијеш на кедрима, како ћеш бити љупка, кад ти дођу муке и болови као породиљи!
Yo oyo ovandaka na Libani, yo oyo otongaki zala na yo kati na bandako ya sedele, yeba ete okolela tango pasi ekokomela yo, pasi oyo ekokani na pasi ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota!
24 Како сам ја жив, вели Господ, да би Хонија син Јоакима цара Јудиног био прстен печатни на десној руци мојој, и оданде ћу те отргнути.
Na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « ata soki yo Konia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, ozalaki lokola lopete na mosapi ya loboko na Ngai ya mobali, nakolongola yo kaka.
25 И даћу те у руке онима који траже душу твоју, и у руке онима којих се бојиш, у руке Навуходоносору цару вавилонском и у руке Халдејцима.
Nakokaba yo na maboko ya bato oyo bazali na posa ya koboma yo, mpe na maboko ya bato oyo obangaka, epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na bato ya Babiloni.
26 И бацићу тебе и матер твоју која те је родила у земљу туђу, где се нисте родили, и онде ћете помрети.
Nakobengana yo elongo na mama oyo abota yo na mokili mosusu epai wapi moko te kati na bino abotama, mpe ekozala kuna nde bino mibale bokokufa.
27 А у земљу у коју ћете желети да се вратите, нећете се вратити у њу.
Bokotikala kozonga lisusu te na mokili oyo bozalaka na posa makasi ya kozonga. »
28 Је ли тај човек Хонија ништав идол изломљен? Је ли суд у коме нема милине? Зашто бише истерани, он и семе његово, и бачени у земљу, које не познају?
Boni, moto oyo, Konia, azali te mbeki ya kopasuka oyo etiolama to eloko oyo ezanga tina? Mpo na nini babengana ye elongo na bana na ye mpe babwaka bango na mokili oyo bayebi te?
29 О земљо, земљо, земљо! Чуј реч Господњу.
Oh mokili na ngai, mokili na ngai, mokili na ngai! Yoka Liloba na Yawe!
30 Овако вели Господ: Запишите да ће тај човек бити без деце и да неће бити срећан до свог века; и нико неће бити срећан од семена његовог, који би седео на престолу Давидовом и још владао Јудом.
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Koma kombo ya moto oyo lokola moto oyo abota te, lokola moto oyo akolonga te na bomoi na ye, pamba te moko te kati na bana na ye akolonga, moko te akovanda lisusu na kiti ya bokonzi ya Davidi to akozala lisusu mokonzi ya Yuda. »

< Књига пророка Јеремије 22 >