< Књига пророка Јеремије 17 >
1 Грех је Јудин записан гвозденом писаљком и врхом од дијаманта, урезан је на плочи срца њиховог и на роговима олтара ваших,
« Masumu ya Yuda ezali lokola makomi oyo bakoma na ekomeli ya ebende oyo ezali na songe ya diama; bakoma yango na bitando ya mitema na bango mpe na maseke ya bitumbelo na bango.
2 Да се синови њихови сећају олтара њихових и лугова њихових под зеленим дрветима, на високим хумовима.
Ndenge bakanisaka bana na bango ya mibali, ndenge wana mpe bakanisaka bitumbelo na bango mpe makonzi ya Ashera, nzambe mwasi, pembeni ya banzete ya mibesu na likolo ya bangomba.
3 Горо с пољем, даћу имање твоје, све благо твоје даћу да се разграби, висине твоје, за грех по свим међама твојим.
Oh ngomba na Ngai kati na mokili, nakokaba lokola bomengo ya bitumba: biloko na yo, bozwi na yo nyonso mpe bisambelo na yo ya likolo ya bangomba mpo na masumu oyo osalaki kati na mokili na yo.
4 И ти ћеш и који су с тобом оставити наследство своје, које сам ти дао, и учинићу да служиш непријатељима својим у земљи које не познајеш; јер сте распалили огањ гнева мог, који ће горети до века.
Likolo ya mabe na yo, okobungisa libula oyo napesaki yo, nakokomisa yo mowumbu ya banguna na yo kati na mokili oyo oyebi te; pamba te opelisi kanda na Ngai, mpe ekopela mpo na libela. »
5 Овако вели Господ: Да је проклет човек који се узда у човека и који ставља тело себи за мишицу, а од Господа одступа срце његово.
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Tika ete moto oyo atiaka elikya na moto, oyo ayekamelaka eloko ya pete mpe atalelaka Yawe te, alakelama mabe!
6 Јер ће бити као врес у пустињи, који не осећа кад дође добро, него стоји у пустињи, на сувим местима у земљи сланој и у којој се не живи.
Akozala lokola mwa nzete ekawuka kati na esobe; akomona bolamu te tango ekoya, akovanda na bisika ya kokawuka ya esobe, na mokili ya mungwa epai wapi bato bazalaka te.
7 Благо човеку који се узда у Господа и коме је Господ узданица.
Kasi tika ete moto oyo atiaka elikya na Yawe mpe atalelaka Ye apambolama!
8 Јер ће бити као дрво усађено крај воде и које низ поток пушта жиле своје, које не осећа кад дође припека, него му се лист зелени, и сушне године не брине се и не престаје рађати род.
Akozala lokola nzete oyo balona pembeni ya mayi, oyo epanzaka misisa na yango kino na mayi: ezalaka na somo ya moyi makasi te; makasa na yango ezalaka kaka mibesu tango nyonso. Ezalaka na somo ya koya ya mobu ya bokawuki te mpe ebotaka mbuma tango nyonso. »
9 Срце је преварно више свега и опако: ко ће га познати?
Motema eleki biloko nyonso na lokuta mpe ekoki kobika te; nani akoki koyeba yango?
10 Ја Господ испитујем срца и искушавам бубреге, да бих дао свакоме према путевима његовим и по плоду дела његових.
« Ngai Yawe, nayebi motema mpe nasosolaka malamu makanisi na yango, mpo na kofuta moto na moto kolanda etamboli mpe misala na ye. »
11 Као што јаребица лежи на јајима али не излеже, тако ко сабира богатство али с неправдом, у половини дана својих оставиће га и најпосле ће бити луд.
Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo te azali lokola ndeke oyo evandeli maki ya ndeke mosusu. Boye, bomengo yango ekokima na kati-kati ya bomoi na ye mpe ekomonisa bozoba na ye na suka ya bomoi na ye.
12 Место је светиње наше престо славе, високо место од почетка.
Kiti ya Bokonzi ya nkembo, oyo enetolama wuta na ebandeli ezali nde Esika na biso ya bule.
13 Надо Израиљева, Господе! Сви који Те остављају нека се посраме; који одступају од мене, нека се запишу на земљи, јер оставише извор воде живе, Господа.
Oh Yawe, Elikya ya Isalaele, bato nyonso oyo basundolaka Yo bakufaka soni, bato oyo bapesaka yo mokongo bakufaka, pamba te basundoli Yawe, Etima ya mayi na bomoi.
14 Исцели ме, Господе, и бићу исцељен; избави ме, и бићу избављен, јер си Ти хвала моја.
Oh Yawe, bikisa ngai mpe nakobika; Oh Yawe, kangola ngai mpe nakokangolama, mpo ete nakumisaka nde Yo!
15 Гле, они ми говоре: Где је реч Господња? Нека дође.
Tala, bato oyo bazali koloba na ngai: « Wapi Liloba na Yawe? Tika ete ekokisama sik’oyo! »
16 А ја се не затезах ићи за Тобом као пастир, и дан жалосни не желех, Ти знаш; шта је год изашло из уста мојих, пред Тобом је.
Nzokande, naboyaki te kozala mobateli bibwele oyo alandaka nzela na Yo. Oyebi malamu ete nazalaki na posa ya komona mokolo ya pasi te. Maloba oyo ebimaka na monoko na ngai ebimaka nde liboso na Yo.
17 Не буди ми страх, Ти си уточиште моје у злу.
Kobangisa ngai te, pamba te ozali Ekimelo na ngai na tango ya pasi!
18 Нека се посраме који ме гоне, а ја не; нека се они уплаше, а ја не; пусти на њих зли дан, и двоструким поломом поломи их.
Tika ete banyokoli na ngai bayokisama soni, kasi batela ngai ete nayokisama soni te! Tika ete bango balenga na somo, kasi ngai nalenga na somo te. Tindela bango mokolo ya pasi, bebisa bango malamu mbala mibale.
19 Овако ми рече Господ: Иди, и стани на врата синова народних, на која улазе цареви Јудини и на која излазе, и на свака врата јерусалимска.
Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai: « Kende kotelema na ekuke ya bato, na ekuke oyo bakonzi ya Yuda bakotelaka mpe babimelaka. Kende mpe lisusu kotelema na bikuke nyonso ya Yelusalemi.
20 И реци им: Чујте реч Господњу, цареви Јудини и сви Јудејци и сви Јерусалимљани, који улазите на ова врата.
Loba na bango: ‹ Oh bino bakonzi mpe bato nyonso ya Yuda elongo na bino nyonso bavandi ya Yelusalemi, bino oyo bokotelaka na bikuke oyo, boyoka Liloba na Yawe!
21 Овако вели Господ: Чувајте се да не носите бреме у суботу и не уносите на врата јерусалимска.
Tala liloba oyo Yawe alobi: Bosala keba ete moko te kati na bino amema mikumba na mokolo ya Saba to alekisa yango na bikuke ya Yelusalemi;
22 И не износите бремена из кућа својих у суботу, и никакав посао не радите, него светите суботу, као што сам заповедио оцима вашим.
moko te kati na bino abimisa mokumba na ndako na ye to asala mosala songolo na mokolo ya Saba. Kasi bozwa mokolo yango lokola mokolo ya bule ndenge natindaki bakoko na bino.
23 Али не послушаше нити пригнуше уха свог, него отврднуше вратом својим да не послушају и не приме науке.
Nzokande, baboyaki koyoka, bayeisaki mito na bango makasi mpo na koboya kaka koyoka mpe kolanda mitindo na Ngai.
24 Ако ме послушате, говори Господ, да не носите бремена на врата овог града у суботу, него светите суботу не радећи у њу никакав посао,
Kasi soki penza boyoki Ngai, elobi Yawe, soki bomemi mikumba te, soki bolekisi te mikumba na bikuke ya engumba oyo mpe soki bobulisi mokolo ya Saba, soki bosali ata mosala moko te na mokolo wana ya Saba,
25 Тада ће улазити на врата града овог цареви и кнезови, који седе на престолу Давидовом, на колима и на коњима, они и кнезови њихови, Јудејци и Јерусалимљани, и стајаће овај град до века.
bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi bakokotela na bikuke ya engumba oyo elongo na bakalaka na bango; bongo bango elongo na bakalaka na bango bakoya na likolo ya bashar mpe mpunda elongo na bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi; bongo, bato bakovanda libela na libela na engumba oyo.
26 И долазиће из градова Јудиних и из околине јерусалимске, и из земље Венијаминове, и из равнице и из гора и с југа, и доносиће жртве паљенице и приносе с даром и кадом, и жртве захвалне доносиће у дом Господњи.
Bato bakowuta na bingumba ya Yuda mpe na mboka oyo ezali pene ya Yelusalemi, na etuka ya Benjame mpe na ngambo ya weste ya bangomba mikuse, na etuka ya bangomba mpe ya Negevi; mpo na koya kobonza kati na Tempelo ya Yawe bambeka ya kotumba, bambeka mosusu, makabo ya bambuma mpe malasi ya ansa, mpo na kobonza makabo ya kozongisa matondi, kati na Tempelo ya Yawe.
27 Ако ли ме не послушате да светите суботу и не носите бремена улазећи на врата јерусалимска у суботу, онда ћу распалити огањ на вратима његовим, који ће упалити дворове јерусалимске и неће се угасити.
Kasi soki botosi Ngai te mpe bobulisi te mokolo ya Saba, bongo bomemi mpe bolekisi mikumba na bino na bikuke ya Yelusalemi na mokolo ya Saba, nakopelisa moto oyo ekufaka te na bikuke ya Yelusalemi mpe ekozikisa bandako na yango nyonso oyo batonga makasi. › »