< Књига пророка Исаије 32 >
1 Ево, цар ће царовати право и кнезови ће владати по правди.
Tala, mokonzi moko akokonza na bosembo, mpe bakambi na ye bakokamba na solo.
2 И човек ће бити као заклон од ветра, и као уточиште од поплаве, као потоци на сувом месту, као сен од велике стене у земљи сасушеној.
Moko na moko kati na bango akozala lokola ekimelo liboso ya mopepe mpe ebombamelo liboso ya mvula ya makasi; akozala lokola miluka ya mayi kati na esobe, lokola elili ya libanga monene kati na mokili ya mabele ekawuka.
3 И очи оних који виде неће бити заслепљене, и уши оних који чују слушаће.
Miso ya bato oyo bamonaka ekozipama lisusu te, mpe matoyi ya bato oyo bayokaka ekoyoka malamu.
4 И срце неразумних разумеће мудрост, и језик мутавих говориће брзо и разговетно.
Mito ya bato oyo bazangi mayele ekozwa boyebi mpe bososoli, bongo lolemo ya bato ya likukuma ekokoma koloba noki-noki mpe malamu.
5 Неваљалац се неће више звати кнез, нити ће се тврдица називати подашним.
Bakobenga lisusu te moto ya lokumu zoba, mpe bakobenga lisusu te moto oyo akabaka moyimi;
6 Јер неваљалац о неваљалству говори, и срце његово гради безакоње, радећи лицемерно и говорећи на Бога лаж, да испразни душу гладном и напој жедном да узме.
pamba te zoba alobaka kaka na bozoba, motema na ye ekanisaka kaka makambo mabe: atiolaka nzela ya bule, alobaka maloba ya nkele mpo na kotelemela Yawe, atikaka libumu ya moto oyo azali na nzala pamba mpe apesaka te mayi na moto oyo azali na yango posa.
7 И справе тврдичине зле су; смишља лукавштине да затре ниште речима лажним и кад сиромах говори право.
Misala ya moyimi ezalaka mabe, abongisaka kaka miango ya mabe mpo na kopengwisa mobola na maloba ya lokuta na tango oyo mobola azali na mbeba te.
8 Али кнез смишља кнежевски, и устаје да ради кнежевски.
Kasi moto ya lokumu asalaka mabongisi ya lokumu mpe alendaka mpo na misala na ye ya lokumu.
9 Устаните, жене мирне, слушајте глас мој; кћери безбрижне, чујте речи моје.
Bino basi oyo bovandaka na kimia, botelema mpe boyoka ngai; bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te, boyoka makambo oyo nalingi koloba:
10 За много година бићете у сметњи, ви безбрижне; јер неће бити бербе, и сабирање неће доћи.
Etikali kaka mikolo moke kati na mobu, bino basi oyo bozali na kimia, bokoningana; pamba te tango ya kosangisa milona ya vino esili koleka, mpe tango ya kobuka bambuma ekozala lisusu te.
11 Страшите се, ви мирне; дрхтите, ви безбрижне, свуците се, будите голе, и припашите око себе кострет,
Bolenga, bino basi oyo bovandaka na kimia; boningana, bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te! Bolongola bilamba na bino mpe botikala bolumbu, bolata basaki na loketo na bino!
12 Бијући се у прса за лепим њивама, за родним чокотима.
Bolela na kobeta tolo mpo na bilanga ya kitoko, mpo na bilanga ya vino oyo ebotaka malamu,
13 Трње и чкаљ никнуће на земљи народа мог, и по свим кућама веселим, у граду веселом.
mpe mpo na mokili ya bato na ngai; pamba te mokili oyo eboti basende mpe banzube. Solo, bolela mpo na bandako nyonso ya kitoko mpe mpo na engumba oyo etonda na bisengo,
14 Јер ће се дворови оставити, врева градска нестаће; куле и стражаре постаће пећине довека, радост дивљим магарцима и паша стадима,
pamba te basundoli ndako ya mokonzi; engumba oyo etonda makelele etikali lisusu na bato te, Ofeli mpe ndako molayi ya bakengeli ekomi mpo na libela mabulu ya mabanga mpo na bisengo ya ba-ane ya zamba, mpe ekokoma etando epai wapi bibwele ekobanda kolia matiti,
15 Докле се не излије на нас Дух с висине и пустиња постане њива а њива се стане узимати за шуму.
kino tango Molimo akosopanela biso wuta na likolo, bongo esobe ekokoma bilanga oyo ebotaka kitoko; mpe bilanga oyo ebotaka kitoko ekomonana lokola zamba monene.
16 Тада ће суд становати у пустињи, и правда ће стајати на њиви.
Bosembo ekowumela kati na esobe, mpe solo ekozala kati na bilanga oyo ebotaka kitoko.
17 И мир ће бити дело правде, шта ће правда учинити биће покој и безбрижност довека.
Mbuma ya bosembo ekozala kimia: bosembo ekobota bopemi mpe bobatelami mpo na libela.
18 И мој ће народ седети у мирном стану и у шаторима поузданим, на почивалиштима тихим.
Bato na ngai bakovanda na bandako ya kimia, na bandako ya malonga mpe na bisika ya bopemi ya kimia.
19 Али ће град пасти на шуму, и град ће се врло снизити.
Na nzela ya mvula ya mabanga oyo ekonoka, zamba mpe engumba ekokitisama na se penza.
20 Благо вама који сејете покрај сваке воде, и пуштате волове и магарце.
Esengo na bino oyo bozali kolona milona pene na mayi mpe kotinda ngombe mpe ane na bino konyata bisika nyonso.