< Књига пророка Исаије 20 >

1 Године које дође Тартан на Азот, кад га посла Саргон цар асирски, те би Азот и узе га,
Na mobu oyo mokonzi monene ya basoda, oyo Sargoni, mokonzi ya Asiri, atindaki, ayaki kobundisa mpe kobotola engumba Asidodi;
2 У то време рече Господ преко Исаије сина Амосовог говорећи: Иди, скини кострет са себе, и изуј обућу с ногу својих. И учини тако и иђаше го и бос.
kaka na tango wana, Yawe alobaki maloba oyo na nzela ya Ezayi, mwana mobali ya Amotsi: « Kende, longola bilamba ya saki na nzoto na yo, mpe basapato na makolo na yo. » Mpe asalaki kaka bongo; akomaki kotambola bolumbu mpe makolo ngulu.
3 Тада рече Господ: Како иде слуга мој Исаија го и бос за знак и чудо шта ће бити до три године Мисиру и етиопској,
Bongo Yawe alobaki: « Lokola mosali na Ngai, Ezayi, atamboli bolumbu mpe makolo ngulu mibu misato mpo na kozala elembo mpe ekamwiseli na miso ya Ejipito mpe ya Kushi,
4 Тако ће одвести цар асирски у ропство Мисирце, и Етиопљане у сужањство, децу и старце, голе и босе и голих задњица, на срамоту Мисирцима.
mokonzi ya Asiri akomema bakangami ya Ejipito mpe bawumbu ya Kushi bolumbu mpe makolo ngulu: ezala bilenge to bampaka, bakotambola bolumbu mpe makolo ngulu mpo na soni ya Ejipito.
5 И препашће се и посрамиће се од етиопске, узданице своје, и од Мисира, поноса свог.
Bato nyonso oyo batiaki elikya na bango na Kushi mpe bakomaki lofundu mpo na Ejipito bakokweya mpe bakotonda na soni.
6 И рећи ће тада који живе на овом острву: Гле, то је узданица наша, ка којој притецасмо за помоћ да се сачувамо од цара асирског; како ћемо се избавити?
Na mokolo wana, bavandi ya esanga bakoloba: ‹ Tala, makambo nini ekomeli bato oyo biso tozalaki kotiela mitema? Tozalaki kokima epai na bango mpo na kozwa lisungi mpe lobiko liboso ya mokonzi ya Asiri. Biso sik’oyo tokosuka ndenge nini? › »

< Књига пророка Исаије 20 >