< Књига пророка Исаије 13 >
1 Бреме Вавилону, које виде Исаија син Амосов.
Maloba ya kosambisa Babiloni, oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, azwaki na emoniseli:
2 На гори високој подигните заставу, вичите им гласно, машите руком, нека уђу на врата кнежевска.
Botombola bendele likolo ya ngomba oyo ezanga banzete, boganga epai na bango; bopepa bango loboko mpo ete bakota na bikuke ya bakambi.
3 Ја сам заповедио изабранима својим и дозвао сам јунаке своје да изврше гнев мој који се радују с величине моје.
Napesaki mitindo epai na bato oyo babulisama mpo na Ngai; nabengisaki lisusu bilombe na Ngai, bato oyo basepelaka na lokumu na Ngai, mpo na kosilisa kanda na Ngai.
4 Вика стоји људства на горама као да је велик народ, вика и врева царства скупљених народа; Господ над војскама прегледа војску убојиту.
Boyoka makelele likolo ya bangomba: ezali lokola makelele ya bato ebele! Boyoka lokito ya makelele ya bikolo: ezali lokola bikolo esangana esika moko! Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali kotala mampinga ya basoda oyo bazali pene ya kokende na etumba.
5 Долазе из далеке земље, с краја небеса, Господ и оруђа срдње Његове, да затре сву земљу.
Bawuti na mikili ya mosika, na suka ya likolo; Yawe elongo na bisalelo ya kanda na Ye; mpo na kobebisa mokili mobimba.
6 Ридајте, јер је близу дан Господњи; доћи ће као пустош од Свемогућег.
Bolela, pamba te mokolo na Yawe ekomi pene, ekoya lokola kobebisama oyo ewuti na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
7 Зато ће свака рука клонути, и свако срце човечје растопити се.
Yango wana, maboko nyonso ekolemba mpe mitema ya bato nyonso ekobukana.
8 И они ће се смести, муке и болови спопашће их, мучиће се као породиља, препашће се један од другог, лица ће им бити као пламен.
Somo makasi ekokweyela bango, pasi mpe kobanga ekotika bango te; bakobunda-bunda lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Bango na bango bakotalana na kokamwa mpe bilongi na bango ekokoma lokola moto.
9 Ево, иде дан Господњи љути с гневом и јарошћу да обрати земљу у пустош, и грешнике да истреби из ње.
Tala, mokolo na Yawe ezali koya, ezali mokolo moko ya pasi, mokolo ya kotomboka mpe ya kanda makasi mpo na kobebisa mokili mpe koboma bato ya masumu kati na yango.
10 Јер звезде небеске и прилике небеске неће пустити светлост своју, сунце ће помрчати о рађању свом, и месец неће пустити светлост своју.
Minzoto na likolo mpe minda nyonso oyo ezali pene na yango ekopesa lisusu pole na yango te: moyi ekokoma molili tango tongo ekotana, mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te.
11 И походићу васиљену за злоћу, и безбожнике за безакоње; и укинућу разметање охолих, и понос силних оборићу.
Nakopesa etumbu na mokili mpo na mabe na yango, mpe bato mabe, mpo na masumu na bango. Nakosukisa lofundu ya bato ya lolendo mpe nakokitisa lolendo ya banyokoli.
12 Учинићу да ће човек више вредети него злато чисто, више него злато офирско.
Nakosala ete bato bakoma ya koluka lokola wolo ya peto, lokola wolo ya mboka Ofiri.
13 Зато ћу затрести небо, и земља ће се покренути са свог места од јарости Господа над војскама и у дан кад се распали гнев Његов.
Yango wana nakolengisa likolo, mpe mabele ekoningana na bisimbelo na yango na kanda makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, na mokolo oyo akopelisa kanda na Ye.
14 И биће као срна поплашена и као стадо које нико не сабира; свако ће гледати за својим народом, и свако ће бежати у своју земљу.
Lokola mboloko oyo bazali kolanda, lokola bameme oyo ezanga mobateli, moko na moko akozonga epai ya bato na ye, moko na moko akokima kino na mboka ya bakoko na ye.
15 Ко се год нађе, биће прободен, и који се год скупе, погинуће од мача.
Bakotobola na likonga moto nyonso oyo bakokanga. Bato nyonso oyo bakozwa, bakokufa na mopanga.
16 И децу ћу им размрскати на њихове очи, куће ћу им опленити и жене ћу им срамотити.
Bakokata-kata bana na bango na biteni na miso na bango, bakobebisa bandako na bango mpe bakozwa basi na bango na makasi.
17 Ево, ја ћу подигнути на њих Миде, који неће марити за сребро, нити ће злато искати.
Tala, nakotelemisa bato ya Medi ete batelemela bango, bato oyo palata elobelaka bango eloko moko te mpe basepelaka na bango na wolo te.
18 Него ће из лукова децу убијати, ни на плод у утроби неће се смиловати, нити ће децу жалити око њихово.
Boye, tolotolo na bango ekoboma bilenge mibali mpe bakoyokela mbuma ya libumu mawa te: liso na bango ekotala bana na mawa te.
19 И Вавилон, урес царствима и дика слави халдејској, биће као Содом и Гомор кад их Бог затре.
Nzambe akokweyisa Babiloni, kongenga ya babokonzi, nkembo ya lolendo ya bato ya Chalide, ndenge akweyisaki Sodome mpe Gomore.
20 Неће се у њему живети нити ће се ко населити од колена до колена, нити ће Арапин разапети у њему шатор, нити ће пастири почивати онуда.
Bato bakotikala kovanda lisusu kuna te to ekozala lisusu na bato te na milongo nyonso; kuna, moto ya Arabi akopika te ndako na ye ya kapo, mpe babateli bibwele bakopemisa te banyama na bango.
21 Него ће почивати онде дивље звери, и куће ће њихове бити пуне великих змија, и онде ће наставати сове, и авети ће скакати онуда.
Kasi bikelamu ya esobe nde ekokoma kolala kuna; bambwa ya zamba nde ekotondisa bandako na yango, ba-esulungutu ekotonda na bandako, maligbanga ekokoma kovanda kuna mpe bantaba ya zamba ekokoma kopumbwa-pumbwa kuna.
22 И довикиваће се буљине у пустим кућама и змајеви у дворовима веселим. А доћи ће његово време, и близу је, и дани његови неће се протегнути.
Banyawu ya zamba ekotonda na bandako na bango ya makasi, mpe bambwa ya zamba ekotonda na bandako na bango ya kitoko. Tango na yango esili kobelema, mpe mikolo na yango ekopusana lisusu te.