< Књига пророка Осије 4 >

1 Чујте реч Господњу, синови Израиљеви, јер Господ има парбу са становницима земаљским; јер нема истине ни милости ни знања за Бога у земљи;
Bana ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe! Pamba te Yawe azali kosamba na bino, bavandi ya mokili, mpo ete bosolo, bolingo mpe boyebi ya Nzambe ezali lisusu te kati na mokili;
2 Заклињу се криво и лажу и убијају и краду и чине прељубу, застранише, и једна крв стиже другу.
etikali kaka kolakelana mabe, lokuta, makambo ya somo, moyibi, kindumba, mobulu mpe kobomana se kobomana.
3 Зато ће тужити земља, и шта год живи на њој пренемоћи ће, и звери пољске и птице небеске; и рибе ће морске помрети.
Mpo na yango, mokili ekokoma na mawa, bavandi na yango nyonso bakolemba nzoto, nyama ya zamba, ndeke ya likolo mpe mbisi ya ebale monene ekokufa.
4 Али нико да се не препире ни да кога кори, јер је народ твој као они који се препиру са свештеником.
Kasi tika ete moto moko te amilongisa to apamela moninga na ye, pamba te bato na yo bazali lokola bato oyo batiaka tembe na Banganga-Nzambe!
5 Зато ћеш пасти дању, и с тобом ће пророк пасти ноћу, и погубићу матер твоју.
Bokobeta mabaku, na moyi makasi; basakoli mpe bakobeta mabaku elongo na bino, na butu, mpe nakobebisa mama na bino.
6 Изгибе мој народ, јер је без знања; кад си ти одбацио знање, и ја ћу тебе одбацити да ми не вршиш службе свештеничке; кад си заборавио Бога свог, и ја ћу заборавити синове твоје.
Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.
7 Што се више множише, то ми више грешише; славу њихову претворићу у срамоту.
Ndenge Banganga-Nzambe bakomaki ebele, ndenge wana mpe basalaki masumu na miso na Ngai. Nakobongola nkembo na bango soni.
8 Од греха народа мог хране се, и лакоме се на безакоње њихово.
Banganga-Nzambe baliaka na sima ya masumu ya bato na Ngai mpe basepelaka ete bato basala kaka mabe.
9 Зато ће бити свештенику као народу; походићу га за путеве његове и платићу му за дела његова.
Makambo oyo ekokomela bato yango ekokomela mpe Banganga-Nzambe: nakopesa bango nyonso etumbu nzela moko mpo na etamboli na bango mpe nakofuta bango kolanda misala na bango.
10 И они ће јести, а неће се наситити; курваће се, а неће се множити; јер престаше служити Господу.
Bakolia, kasi bakotonda te; bakosala kindumba, kasi bakobotana te; pamba te basundolaki Yawe
11 Курварство и вино и маст одузима срце.
mpo na komipesa na kindumba, na masanga ya vino ya kala mpe ya sika oyo elongolaka bato bososoli.
12 Народ мој пита дрво своје, и палица му његова одговара; јер дух курварски заводи их да се курвају одступивши од Бога свог.
Bato na Ngai bakomi kotuna toli epai ya nzambe ya ekeko oyo basala na nzete, mpe eteni ya nzete ezali koyanola bango. Molimo moko ya kindumba ezali kopengwisa bango, bakomi kosala kindumba mosika na Nzambe na bango,
13 Наврх гора приносе жртве, и на хумовима каде под храстовима, тополама и брестовима, јер им је сен добар; зато се курвају кћери ваше и снахе ваше чине прељубу.
kobonza bambeka na likolo ya bangomba milayi, kotumba ansa lokola mbeka ya malasi na likolo ya bangomba mikuse, na se ya banzete minene oyo epesaka pio ya kitoko lokola sheni, pepiliye mpe terebente! Mpo na yango, bana na bino ya basi bakosala kindumba, mpe basi ya bana na bino bakosala ekobo.
14 Нећу карати кћери ваших кад се курвају, ни снаха ваших кад чине прељубу; јер се они одвајају с курвама и приносе жртве с неваљалим женама; и народ неразумни пропашће.
Nakopesa etumbu te: ezala na bana na bino ya basi mpo na kindumba na bango to na basi ya bana na bino mpo na ekobo na bango; pamba te bango moko mibali babimaka na basi ya ndumba mpe babonzaka mbeka elongo na bandumba ya tempelo. Bato bazangi bososoli basukaka se na libebi!
15 Ако се ти курваш, Израиљу, нека не греши Јуда; и не идите у Галгал нити идите у Вет-авен, и не куните се: Тако да је жив Господ.
Ata soki yo, Isalaele, osali ekobo, tika ete Yuda amikweyisa te! Kokende na Giligali te, komata na Beti-Aveni te mpe kolapa ndayi te na koloba: « Na Kombo na Yawe! »
16 Јер је Израиљ упоран као упорна јуница; сада ће их пасти Господ као јагње на пространом месту.
Mpo ete bato ya Isalaele bazali mito makasi lokola ngombe ya mwasi oyo etomboki, ndenge nini Yawe akoka koleisa bango lokola bana meme kati na bilanga minene?
17 Јефрем се удружио с лажним боговима; остави га.
Efrayimi asangani na banzambe ya bikeko: tika ye akoba bongo!
18 Пиће се њихово преврну, једнако се курвају; мило им је: дајте. Браничи су његови срамота.
Soki kaka asilisaka komela vino, amipesaka na kindumba; bakambi na yango balingaka makambo oyo eyokisaka bango soni.
19 Ветар ће их стегнути крилима својим, и они ће се посрамити од жртава својих.
Mopepe moko ya makasi ekomema bango, mpe bakoyoka soni mpo na bambeka na bango.

< Књига пророка Осије 4 >