< Књига пророка Језекиља 6 >
1 Опет ми дође реч Господња говорећи:
Yawe alobaki na ngai:
2 Сине човечји, окрени лице своје према горама Израиљевим, и пророкуј против њих,
« Mwana na moto, balola elongi na yo na ngambo ya bangomba ya Isalaele mpe sakola mabe na tina na yango.
3 И реци: Горе Израиљеве, чујте реч Господа Господа, овако вели Господ Господ горама и хумовима, потоцима и долинама: Ево ме, ја ћу пустити на вас мач и оборићу висине ваше.
Loba na yango: Oh bino bangomba ya Isalaele, boyoka liloba na Nkolo Yawe. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bangomba milayi, na bangomba mikuse, na mabulu mpe na mabwaku: ‹ Namibongisi mpo na kotindela bino mopanga mpe kobebisa bisambelo na bino ya likolo ya bangomba.
4 И ваши ће се олтари раскопати, и сунчани ликови ваши изломиће се, и поваљаћу побијене ваше пред гадним боговима вашим.
Nakobebisa bitumbelo na bino nyonso, nakobuka mike-mike bitumbelo na bino ya malasi ya ansa mpe nakoboma bato na bino liboso ya banzambe na bino ya bikeko.
5 И побацаћу мртва телеса синова Израиљевих пред гадне богове њихове, и разметнућу кости ваше око олтара ваших.
Nakotanda bibembe ya bana ya Isalaele liboso ya banzambe na bango ya bikeko mpe nakopanza mikuwa na bino zingazinga ya bitumbelo na bino.
6 Свуда где наставате градови ће се опустошити и висине ће опустети, и олтари ће се ваши раскопати и опустети, и гадни богови ваши изломиће се и неће их више бити, и сунчани ликови ваши исећи ће се, и дела ће се ваша уништити.
Bingumba ekotikala lisusu na bato te mpe bisambelo ya likolo ya bangomba ekobebisama na bisika nyonso oyo bokozala; mpo ete bitumbelo na bino etikala pamba mpe ebebisama, banzambe na bino ya bikeko ebukana biteni-biteni mpe ebebisama, bitumbelo na bino ya malasi ya ansa ebukana mpe biloko oyo maboko na bino esalaki ezala lisusu te.
7 И побијени ће падати усред вас, и познаћете да сам ја Господ.
Kati na bino, bato bakokufa na mopanga; bongo bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe.
8 Али ћу вас оставити неколико који би утекли од мача међу народима кад се расијете по земљама.
Kasi nakobikisa ndambo ya bato kati na bino: bakobika na mopanga tango nakopanza bino kati na mikili mpe bikolo.
9 И који од вас побегну, опоменуће се мене међу народима, где буду у ропству, како ми дотужаше срцем својим курварским које одступи од мене, и очима својим курварским, којима идоше за гадним боговима својим, и сами ће себи бити мрски за зла која чинише у свим градовима својим.
Bongo, kati na bikolo nyonso epai wapi bakokende na bowumbu, bato oyo bakobika bakokanisa ngai tango nakobuka lolendo ya mitema na bango, oyo etonda na posa ya kosalela banzambe mosusu mpe nakobebisa miso na bango, oyo eboyaka kotala Ngai mpo na kotala banzambe na bango ya bikeko. Bango moko bakoyoka nkele mpo na mabe oyo basalaki mpe mpo na misala na bango nyonso ya mbindo.
10 И познаће да сам ја Господ и да нисам говорио узалуд да ћу им учинити то зло.
Boye bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, mpe ete nakebisaki bango na pamba te ete nakotindela bango pasi. ›
11 Овако вели Господ Господ: Пљесни рукама и лупи ногом, и реци: Јаох! Ради свих гадних зала дома Израиљевог, јер ће пасти од мача, од глади и од помора.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Beta maboko na yo, tuta makolo na yo mpe ganga: ‹ Mawa! › mpo na misala mabe mpe misala ya mbindo ya libota ya Isalaele, pamba te bakokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka!
12 Ко буде далеко, умреће од помора; а ко буде близу, пашће од мача; а ко остане и буде опкољен, умреће од глади; тако ћу навршити гнев свој на њима.
Moto oyo azali mosika akokufa na bokono oyo ebomaka, oyo azali pembeni akokufa na mopanga; mpe oyo atikali, bakozingela ye mpe akokufa na nzala makasi. Nakosilisa kanda na Ngai na banzoto na bango.
13 И познаћете да сам ја Господ кад буду побијени њихови међу гадним боговима њиховим, око олтара њихових, на сваком високом хуму и на свим врховима горским и под сваким зеленим дрветом и под сваким гранатим храстом, свуда где су кадили угодним мирисима свим гадним боговима својим.
Boye, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe tango bato na bango bakokufa na mopanga kati na banzambe na bango ya bikeko zingazinga ya bitumbelo na bango, na bangomba nyonso ya mikuse mpe na likolo ya bangomba nyonso ya milayi, na se ya banzete nyonso ya mibesu mpe na se ya terebente nyonso ya mobesu etonda na makasa, bisika oyo bazalaki kotumbela banzambe na bango ya bikeko ansa lokola mbeka ya solo kitoko.
14 Јер ћу замахнути руком својом на њих, и обратићу земљу њихову у пустош гору од пустиње Дивлате по свим становима њиховим; и познаће да сам ја Господ.
Nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bango mpe nakosala ete mokili na bango etikala lisusu na bato te, wuta na esobe kino na engumba Ribila, na bisika nyonso oyo bazali kovanda; boye bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. »