< 2 Мојсијева 35 >

1 Потом сабра Мојсије сав збор синова Израиљевих, и рече им: Ово је заповедио Господ да чините:
Moyize asangisaki lisanga mobimba ya bana ya Isalaele mpe alobaki na bango: « Boyoka makambo oyo Yawe atindi bino kosala:
2 Шест дана да се ради, а седми да вам је свет, субота почивања Господњег; ко би радио у тај дан, да се погуби.
— Mikolo motoba, bokosala mosala na bino, kasi mokolo ya sambo ekozala mokolo ya bule, mokolo ya Saba mpo na Yawe, mokolo na bino ya kopema. Moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo yango, bakoboma ye.
3 Ватре не ложите по становима својим у дан суботни.
Na mokolo yango ya Saba, bokopelisa ata moto te na bandako na bino. »
4 Још рече Мојсије свему збору синова Израиљевих говорећи: Ово је заповедио Господ и рекао:
Moyize alobaki na lisanga mobimba ya bana ya Isalaele: « Boyoka makambo oyo Yawe atindi bino kosala:
5 Скупите између себе прилог Господу; ко год хоће драге воље, нека донесе прилог Господу: злато и сребро и бронзу,
— Kati na biloko oyo bozali na yango, botia pembeni ndambo oyo bokobonza epai na Yawe lokola makabo. Moto nyonso oyo azali na motema malamu akomemela Yawe makabo: wolo, palata mpe bronze,
6 И порфиру и скерлет и црвац и танко платно и кострет,
langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi, lino ya kitoko, bapwale ya ntaba,
7 И коже овнујске црвене обојене и коже јазавичије и дрво ситим,
baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale; banzete ya akasia,
8 И уље за видело, и мирисе за уље помазања и за кад мирисни,
mafuta ya olive mpo na kopelisela mwinda, biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpo na kosala mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko,
9 И камење онихово, и камење за укивање по оплећку и по напрснику.
mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata.
10 И који су год вешти међу вама нека дођу да раде шта је заповедио Господ:
Tika ete bato nyonso oyo kati na bino bayebi misala, baya kosala misala nyonso oyo Yawe atindi:
11 Шатор, и наслон његов, и покривач његов, и куке његове, и даске његове, преворнице његове, ступове његове и стопице његове,
Mongombo, ndako na yango ya kapo, ezipelo na yango, bibende na yango oyo ezali lokola ndobo, bikangelo na yango, mabaya na yango, makonzi na yango mpe bivandelo na yango;
12 Ковчег, и полуге његове, и заклопац, и завес,
Sanduku elongo na mabaya ya komemela yango, mofinuku na yango, barido,
13 Сто, и полуге његове и све справе његове, и хлеб за постављање,
mesa, mabaya na yango, bisalelo na yango nyonso mpe mapa oyo esengeli kozala liboso ya Yawe,
14 И свећњак за видело са справама његовим, и жишке његове, и уље за видело,
etelemiselo ya minda, bisalelo na yango, minda na yango mpe mafuta mpo na kopelisa minda,
15 И олтар кадиони, и полуге његове, и уље помазања, и кад мирисни, и завес на врата од шатора,
etumbelo ya malasi, mabaya ya komemela yango, mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko, rido ya ekotelo ya ndako ya kapo epai wapi Mongombo ezali,
16 Олтар за жртву паљеницу, и решетку његову од бронзе, полуге његове и све справе његове, умиваоницу и подножје њено,
etumbelo ya bambeka ya kotumba, motalaka na yango ya bronze, mabaya ya komemela yango mpe bisalelo na yango nyonso, sani ya bronze mpe evandelo na yango,
17 Завесе за трем, ступове његове и стопице његове, и завес на врата од трема,
batapi ya lopango, makonzi na yango, makolo na yango mpe rido mpo na ekotelo ya lopango,
18 Коље за шатор, и коље за трем с ужима њиховим.
bapike ya Mongombo, bapike ya lopango mpe basinga na yango,
19 Хаљине службене за службу у светињи, и хаљине свете Арону свештенику, и хаљине синовима његовим за службу свештеничку.
bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na kosala kati na Mongombo, bilamba ya bule mpo na Nganga-Nzambe Aron mpe bilamba ya bonganga-Nzambe mpo na bana na ye ya mibali. »
20 Тада отиде сав збор синова Израиљевих од Мојсија;
Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele batikaki Moyize.
21 И вратише се, сваки ког подиже срце његово и кога год дух покрете драговољно, и донесоше прилог Господу за грађење шатора од састанка и за сву службу у њему и за хаљине свете.
Bongo bato nyonso oyo bazalaki na motema malamu mpe na bolingo ya kopesa, babonzelaki Yawe makabo mpo na mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na misala nyonso mpe kotonga bilamba ya bule.
22 Долазише људи и жене, ко год беше драговољног срца, и доносише споне и обоце и прстење и наруквице и свакојаке наките златне; и сваки донесе прилог злата Господу.
Bato nyonso oyo bazalaki na motema malamu, ezala mobali to mwasi, bayaki na basheneti, biloko ya matoyi, bapete mpe biloko ya ndenge na ndenge oyo esalema na wolo. Bango nyonso bamemaki biloko na bango ya wolo liboso ya Yawe mpe babonzelaki Ye yango.
23 Ко год имаше порфире, скерлета, црвца, танког платна, кострети, кожа овнујских црвених обојених и кожа јазавичијих, сваки доношаше.
Bato nyonso oyo bazalaki na langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi to mpe ya motane ya kongenga, lino, bapwale ya ntaba, baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale, bamemaki yango.
24 И ко год прилагаше сребро или бронзу, доношаше у прилог Господу; и у кога год беше дрвета ситима, за сваку употребу у служби доношаше.
Bato nyonso oyo batiaki pembeni makabo ya palata to ya bronze bamemaki yango mpe babonzelaki yango Yawe; ndenge moko mpe na bato oyo bazalaki na banzete ya akasia mpo na misala nyonso.
25 И све жене веште предоше својим рукама, и доносише шта напредоше за порфиру, скерлет, црвац и танко платно.
Basi nyonso oyo bayebaki kosala bilamba basalaki yango na maboko na bango mpe bamemaki bilamba ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe lino ya kitoko.
26 И све жене које подиже срце њихово и беху веште, предоше кострет.
Mpe basi nyonso oyo bazalaki na motema malamu mpe bayebaki kosala bilamba, basalaki yango na bapwale ya ntaba.
27 А главари доносише камење онихово и камење за укивање по оплећку и по напрснику,
Bakambi bamemaki mabanga ya talo ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata.
28 И мирисе и уље за видело и уље за помазање и за кад мирисни.
Bamemaki mpe biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpe mafuta mpo na etelemiselo ya minda, mafuta mpo na epakolami mpe malasi ya solo kitoko.
29 Сви људи и жене, које подиже драговољно срце да доносе шта треба за све дело које Господ заповеди преко Мојсија да се начини, донесоше синови Израиљеви драговољни прилог Господу.
Bato nyonso ya Isalaele, ezala basi to mibali, oyo mitema na bango esimbamaki mpo na komema eloko mpo na misala oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize, bamemaki epai na Yawe makabo oyo bango moko bakataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bango.
30 Тада рече Мојсије синовима Израиљевим: Видите, Господ позва по имену Веселеила сина Урије сина Оровог од племена Јудиног,
Moyize alobaki na bana ya Isalaele: « Botala, Yawe aponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda;
31 И напуни га духа Божијег, мудрости, разума и знања и вештине за сваки посао,
atondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso:
32 Да вешто измишља како се шта ради од злата и сребра и од бронзе,
mpo na kokanisa mpe kosala misala ya wolo, ya palata mpe ya bronze,
33 Да уме резати камење и укивати, да уме тесати дрво и радити сваки посао врло вешто.
mpo na kokata mabanga ya talo, kobamba yango, kosala bililingi na banzete mpe mpo na kosala misala ya lolenge nyonso. »
34 И даде му у срце, њему и Елијаву сину Ахисамаховом од племена Дановог, да могу учити друге.
Yawe apesaki na Betisaleyeli mpe Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani, makoki ya koteya bato mosusu lolenge ya kosala.
35 Напуни их вештине да раде сваки посао, да кују, тешу, везу, и ткају порфиру, скерлет, црвац и танко платно, и да раде свакојаке послове вешто измишљајући.
Apesaki bango lisusu makoki ya kosala misala ya lolenge nyonso: kosala bililingi, kosala bilamba na basinga ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe ya lino, kosala misala ya lolenge nyonso mpe kobongisa ndenge misala esengeli kosalema.

< 2 Мојсијева 35 >