< Књига о Јестири 8 >

1 Истог дана даде цар Асвир царици Јестири кућу Амана непријатеља јудејског. А Мардохеј изиђе пред цара, јер Јестира каза шта јој је он;
Kaka na mokolo yango, mokonzi Kizerisesi apesaki Ester, mwasi ya mokonzi, biloko ya Amani, monguna ya Bayuda. Mpe lokola Ester ayebisaki mokonzi ete Maridoshe azali ndeko na ye, mokonzi abengaki Maridoshe mpe Maridoshe akendeki liboso ya mokonzi.
2 И цар снимивши прстен свој, који беше узео од Амана, даде га Мардохеју; а Јестира постави Мардохеја над кућом Амановом.
Mokonzi alongolaki lopete na ye oyo abotolaki epai ya Amani mpe apesaki yango epai ya Maridoshe. Bongo Ester atiaki Maridoshe mokambi ya biloko ya Amani.
3 Потом Јестира опет говори цару и паднувши пред ноге његове и плачући мољаше га да уклони злоћу Амана Агагеја и мисао његову коју беше смислио на Јудејце.
Ester alobaki lisusu na mokonzi; amibwakaki na makolo na ye mpe abondelaki ye na kolela ete asukisa mikano mabe ya Amani, moto ya Agagi, mpe mabongisi na ye ya koboma Bayuda.
4 Тада цар пружи златну палицу према Јестири, и Јестира уста и стаде пред царем.
Mokonzi asembolaki lingenda ya wolo ya bokonzi na ye epai ya Ester. Bongo Ester alamukaki mpe atelemaki liboso na ye.
5 И рече: Ако је угодно цару и ако сам нашла милост пред њим, и ако је право пред царем и ако сам му мила, нека се пише да се порекну књиге у којима је мисао Амана сина Амедатиног, Агагеја, које је расписао да се истребе Јудејци што су по свим земљама царевим.
Ester alobaki: — Soki esepelisi mokonzi, soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi, soki akanisi ete ezali sembo mpo na ye kosala mpe soki asepeli na ngai, tika ete mobeko ekomama mpo na kokweyisa mikano ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya Agagi, oyo ebongisamaki mpe ekomamaki mpo na koboma Bayuda kati na bituka nyonso ya mokonzi.
6 Јер како бих могла гледати зло које би задесило мој народ? И како бих могла гледати да се потре род мој?
Ndenge nini ngai nakoki komona pasi kokweyela bato na ngai to komona kobebisama ya libota na ngai?
7 А цар Асвир рече царици Јестири и Мардохеју Јудејцу: Ето, дао сам кућу Аманову Јестири, а њега су обесили на вешала зато што хтеде дигнути руку своју на Јудејце.
Mokonzi Kizerisesi azongiselaki Ester, mwasi na ye, mpe Maridoshe, Moyuda: — Lokola Amani abundisaki Bayuda, ngai napesi ndako na ye epai ya Ester; mpe napesi mitindo mpo ete badiembika ye na nzete.
8 Ви дакле пишите за Јудејце како вам је драго у име царево и запечатите прстеном царевим; јер шта се пише у име царево и запечати прстеном царевим не може се порећи.
Sik’oyo, koma mobeko mosusu na tina na Bayuda, na kombo ya mokonzi, ndenge okomona malamu mpe beta yango kashe ya mokonzi; pamba te mokanda oyo ekomami na kombo ya mokonzi mpe babeti yango kashe na ye ekoki kobongwana te.
9 И дозваше писаре цареве у исто време, трећег месеца, који је месец Сиван, двадесет трећег дана, и писа се све, како заповеди Мардохеј, Јудејцима и намесницима и кнезовима и управитељима по земљама, од Индије до Етиопије, сто и двадесет и седам земаља, у сваку земљу њеним писмом и сваком народу његовим језиком, и Јудејцима њиховим писмом и њиховим језиком.
Na tango wana kaka, na mokolo ya tuku mibale na misato ya sanza ya misato, sanza ya Sivani, babengisaki bakomi mikanda ya mokonzi. Makambo nyonso oyo Maridoshe atindaki mpo na Bayuda, bakomelaki yango bayangeli ya bituka, bayangeli mpe bakalaka ya bituka nyonso, longwa na Ende kino na Kushi, bituka nkama moko na tuku mibale na sambo, ekolo moko na moko kolanda lokota na yango, etuka moko na moko kolanda ndenge na yango ya kokoma mpe Bayuda kolanda ndenge na bango ya kokoma mpe lokota na bango.
10 А написа у име цара Асвира и запечати прстеном царевим, и разасла књиге по гласницима који јахаху на брзим коњима и на младим мазгама:
Maridoshe akomaki mikanda na kombo ya mokonzi Kizerisesi, abetaki yango kashe ya mokonzi mpe atindaki yango na nzela ya bantoma oyo batambolaka na bampunda ya mbangu, oyo etiama mpo na misala ya mokonzi.
11 Да је цар допустио Јудејцима што су у коме год граду да се скупе и бране живот свој, да потру и побију и истребе сваку војску ког му драго народа и земље, који би ударили на њих, и децу њихову и жене њихове, а имање њихово да разграбе.
Na nzela ya mobeko yango, mokonzi apesaki Bayuda ya bingumba nyonso ndingisa ya kosangana mpo na komibatela, kobundisa, koboma mpe kobebisa mampinga ya ekolo nyonso to etuka nyonso oyo ekoluka kobundisa bango, basi na bango to bana na bango; mpe ndingisa ya kobotola na makasi bozwi ya banguna na bango.
12 У исти дан по свим земљама цара Асвира, тринаестог дана месеца дванаестог, које је месец Адар.
Bongo, mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari, ezalaki mokolo oyo Bayuda bakataki mpo na kokokisa yango kati na bituka nyonso ya mokonzi Kizerisesi.
13 У књигама се говораше да се огласи заповест по свим земљама и да се објави свим народима да Јудејци буду готови за онај дан да се освете својим непријатељима.
Basengelaki kopanza sango ya mokanda wana mpo ete ezalaki na bokonzi ya mobeko kati na etuka moko na moko, mpe basengelaki koyebisa yango na bato ya bikolo nyonso mpo ete Bayuda bakoka kozala ya kobongama na mokolo wana mpo na kozongisela banguna na bango mabe na mabe.
14 Гласници који јахаху на брзим коњима и мазгама отидоше брзо и хитно по заповести царевој; и заповест би оглашена у Сусану, царском граду.
Na etinda ya mokonzi, bantoma oyo batambolaka na mpunda ya mokonzi babimaki na lombangu mpe bapanzaki sango ya mobeko yango kati na engumba Size.
15 А Мардохеј отиде од цара у царском оделу љубичасом и белом и под златним венцем великим и у плашту од танког платна и скерлета, и град Сусан радоваше се и весељаше се.
Maridoshe alongwaki liboso ya mokonzi, na bilamba ya bokonzi ya langi ya ble mpe ya pembe, na motole monene ya wolo mpe na nzambala ya motane makasi ya lino ya kitoko. Engumba mobimba ya Size ezalaki koganga na esengo mpe ezalaki kosepela.
16 Јудејцима дође светлост и весеље и радост и слава.
Ezalaki tango ya kosepela mpe ya esengo, tango ya feti mpe ya lokumu mpo na Bayuda.
17 И у свакој земљи и у сваком граду, где год дође заповест царева и наредба његова, беше радост и весеље међу Јудејцима, гозба и благи дани, и многи из народа земаљских постајаху Јудејци, јер их попаде страх од Јевреја.
Kati na bituka nyonso, bingumba nyonso mpe bisika nyonso oyo bazwaki sango ya mobeko ya mokonzi, ezalaki tango ya esengo, ya kosepela, ya kolia mpe ya feti kati na Bayuda. Bato ebele ya bikolo mosusu, oyo bazalaki elongo na bango kati na mboka bamikomisaki Bayuda; pamba te somo ya Bayuda elongaki makanisi na bango.

< Књига о Јестири 8 >