< 5 Мојсијева 10 >
1 У то време рече ми Господ: Истеши две поче од камена као што беху прве, и изиђи к мени на гору, и начини ковчег од дрвета.
Na tango wana, Yawe alobaki na ngai: « Bongisa bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso mpe mata epai na ngai na likolo ya ngomba; okosala lisusu sanduku ya mabaya.
2 И написаћу на тим плочама речи које су биле на првим плочама што си их разбио, па ћеш их метнути у ковчег.
Nakokoma na bitando yango maloba oyo ezalaki na likolo ya bitando ya mabanga ya liboso, oyo obukaki; mpe okotia bitando yango kati na sanduku. »
3 Тако начиних ковчег од дрвета ситима, и истесах две плоче од камена, као што беху прве, и изиђох на гору с двема плочама у рукама.
Boye nasalaki sanduku na mabaya ya nzete ya akasia mpe nabongisaki bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso. Namataki likolo ya ngomba, namemaki bitando mibale ya mabanga, na maboko na ngai.
4 И написа на тим плочама шта беше прво написао, десет речи, које вам изговори Господ на гори исред огња на дан збора вашег; и даде ми их Господ.
Yawe akomaki likolo ya bitando yango maloba oyo akomaki liboso: mibeko zomi oyo Yawe ayebisaki bino na likolo ya ngomba kati na moto, na mokolo ya mayangani; mpe Yawe apesaki ngai yango.
5 И вративши се сиђох с горе, и метнух плоче у ковчег који начиних, и осташе онде, као што ми заповеди Господ.
Boye nakitaki wuta na ngomba mpe natiaki bitando yango mibale ya mabanga kati na sanduku oyo nasalaki ndenge Yawe atindaki ngai mpe ezali kuna sik’oyo.
6 А синови Израиљеви пођоше од Вирота, синова Јаканових у Мосеру. Онде умре Арон и онде би погребен; а Елеазар, син његов поста свештеник на његово место.
Bana ya Isalaele batambolaki wuta na mabulu ya mayi ya Bene-Yaakani kino na Mosera. Aron akufaki kuna mpe bakundaki ye. Mpe Eleazari, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye lokola Nganga-Nzambe.
7 Оданде отидоше у Гадгад, а од Гадгада у Јотвату, земљу где има много потока.
Longwa wana, bakendeki na Gudigoda; sima bakendeki na Yotibata, mokili ya miluka ebele.
8 У то време одвоји Господ племе Левијево да носе ковчег завета Господњег, да стоје пред Господом и служе му и да благосиљају у име Његово до данашњег дана.
Na tango wana, Yawe atiaki pembeni libota ya Levi mpo na komemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpo na kotelemaka liboso ya Yawe, mpo na kosalaka mosala na Ye mpe mpo na kopambolaka bato na Kombo na Ye ndenge bazali kosala kino lelo.
9 Зато нема племе Левијево део ни наследство с браћом својом; Господ је наследство његово, као што му Господ Бог твој каза.
Yango wana, bana ya Levi bazali na ndambo ya mabele te to libula te kati na bandeko na bango: Yawe nde azali libula na bango, ndenge Yawe, Nzambe na bino, alobaki na bango.
10 А ја стајах на гори као пре, четрдесет дана и четрдесет ноћи; и услиши ме Господ и тада, и не хте те Господ затрти,
Boye natikalaki likolo ya ngomba mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ndenge nasalaki na mbala ya liboso, mpe Yawe ayokelaki ngai na mbala oyo lisusu, pamba te kobebisa bino ezalaki mokano na Ye te.
11 Него ми рече Господ: Устани и иди пред народом овим да уђу у земљу за коју сам се заклео оцима њиховим да ћу им је дати да је наследе.
Na sima, Yawe alobaki na ngai: « Kende mpe kamba bato oyo mpo ete bakota mpe bakamata mokili oyo nalakaki kopesa epai na batata na bango na nzela ya ndayi. »
12 Сада, дакле, Израиљу, шта иште од тебе Господ Бог твој, осим да се бојиш Господа Бога свог, да ходиш по свим путевима Његовим и да Га љубиш и служиш Господу Богу свом из свег срца свог и из све душе своје,
Sik’oyo, Oh Isalaele, likambo nini Yawe, Nzambe na yo, azali kozela epai na yo? Yawe, Nzambe na yo, azali kozela ete otosa Yawe, Nzambe na yo, na kotambola na banzela na Ye nyonso, na kolinga Ye mpe kosalela Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba,
13 Држећи заповести Господње и уредбе Његове, које ти ја данас заповедам, да би ти било добро?
mpe ete obatela mibeko mpe bikateli ya Yawe, oyo nazali kopesa yo na mokolo ya lelo mpo na bolamu na yo moko.
14 Гле, Господа је Бога твог небо, и небо над небесима, земља, и све што је на њој.
Yawe, Nzambe na yo, nde azali Nkolo ya likolo, ya likolo koleka likolo, ya mabele mpe ya nyonso oyo ezali kati na yango.
15 Али само твоји оци омилеше Господу, и изабра семе њихово након њих, вас између свих народа, као што се види данас.
Nzokande, Yawe alakisaki bolingo na Ye epai ya batata na bino mpe alingaki bango. Yango wana aponaki bino, bino bakitani na bango, kati na bikolo nyonso ndenge ezali lelo.
16 Зато обрежите срце своје, и немојте више бити тврдоврати.
Bopetola mitema na bino, oyo etonda na masumu mpe botombokela lisusu Yawe te;
17 Јер је Господ Бог ваш Бог над боговима и Господар над господарима, Бог велики, силни и страшни, који не гледа ко је ко нити прима поклона;
pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bankolo, Nzambe Monene, Nzambe ya nguya mpe ya somo, oyo aponaka bilongi te mpe azwaka kanyaka te,
18 Даје правицу сироти и удовици; и љуби дошљака дајући му хлеб и одело.
abundelaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, alingaka mopaya mpe apesaka ye bilei mpe bilamba.
19 Љубите дакле дошљака, јер сте били дошљаци у земљи мисирској.
Bino mpe bosengeli kolinga bapaya, pamba te bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.
20 Бој се Господа Бога свог, Њему служи и Њега се држи, и Његовим се именом куни.
Tosa Yawe, Nzambe na yo, mpe salela Ye; kangama na Ye mpe lapaka ndayi na Kombo na Ye.
21 Он је хвала твоја и Он је Бог твој, који тебе ради учини велике и страшне ствари, које видеше очи твоје.
Azali masanzoli na yo, azali Nzambe na yo, oyo asalelaka yo makambo minene mpe makambo ya somo oyo omonaki na miso na yo moko.
22 Седамдесет душа беше отаца твојих кад сиђоше у Мисир; а сада учини ти Господ Бог твој те вас има много као звезда небеских.
Bakoko na yo nyonso oyo bakendeki na Ejipito bazalaki tuku sambo; mpe sik’oyo, Yawe, Nzambe na yo, akomisi bino ebele lokola minzoto ya likolo.