< Књига пророка Данила 10 >
1 Треће године Кира, цара персијског, објави се реч Данилу, који се зваше Валтасар; и реч беше истинита и о великим стварима; и разабра реч и разуме утвару.
Na mobu ya misato ya bokonzi ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Nzambe alakisaki makambo epai ya Daniele oyo bazalaki kobenga Belitsatsari. Makambo yango ezalaki ya solo: etalisaki pasi makasi oyo ekoya. Daniele azwaki mayele ya kososola yango kati na emoniseli.
2 У то време ја Данило бејах у жалости три недеље дана.
Na tango wana, ngai Daniele, nasalaki matanga oyo esalaki baposo misato.
3 Јела угодна не једох, ни месо ни вино не уђе у моја уста, нити се намазах уљем док се не навршише три недеље дана.
Nazalaki kolia lisusu bilei ya kitoko te; ezala misuni to vino, eloko moko te ekotaki lisusu na monoko na ngai. Mpe, na baposo misato wana, nazalaki kopakola lisusu mafuta ya solo kitoko te.
4 А двадесет четвртог дана првог месеца бејах на брегу велике реке Хидекела.
Na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya liboso, tango nazalaki pembeni ya ebale monene Tigre,
5 И подигох очи своје и видех, а то један човек обучен у платно, и појас беше око њега од чистог злата из Уфаза;
natombolaki miso na ngai na likolo mpe namonaki moto moko alata bilamba ya lino mpe mokaba moko ya wolo ya Ufazi na loketo na ye.
6 А тело му беше као хрисолит, и лице му као муња, а очи му као лучеви запаљени, а руке и ноге као бронза углађена, а глас од речи његових као глас многог људства.
Nzoto na ye ezalaki kongenga lokola topaze, elongi na ye ezalaki kongala lokola mokalikali, miso na ye ezalaki kopela lokola moto, maboko mpe makolo na ye ezalaki kongenga lokola ebende ya bronze oyo balekisa na moto, mpe mongongo na ye ezalaki koyokana lokola makelele ya bato ebele.
7 И ја Данило сам видех утвару, а људи што беху са мном не видеше је, али их попаде страх велик, те побегоше и сакрише се.
Ngai, Daniele, ngai moko kaka nde namonaki emoniseli yango. Bato oyo bazalaki elongo na ngai bamonaki yango te, kasi somo makasi ekweyelaki bango, bakimaki mpe babombamaki.
8 И остах сам и видех ту велику утвару, и не оста снаге у мени, и лепота ми се нагрди, и не имах снаге.
Boye, natikalaki kaka ngai moko mpe nakomaki kotala emoniseli monene yango; makasi esilaki ngai, elongi na ngai ebebaki makasi mpe nalembaki nzoto.
9 И чух глас од речи његових, и кад чух глас од речи његових, изван себе падох ничице лицем на земљу.
Nayokaki moto yango koloba; bongo wana nazalaki koyoka mongongo na ye, nakweyaki makalikali, elongi kino na mabele.
10 И гле, рука ме се дотаче и подиже ме на колена моја и на дланове моје.
Loboko moko esimbaki ngai mpe etelemisaki ngai, makolo mpe maboko na ngai ekomaki kolenga.
11 И рече ми: Данило, мили човече! Слушај речи које ћу ти казати, и стани право, јер сам сада послан к теби. И кад ми рече ту реч, устах дрхћући.
Bongo moto yango alobaki na ngai: — Daniele, molingami ya Nzambe, yoka malamu maloba oyo nazali koyebisa yo mpe telema na esika oyo ozali, pamba te natindami sik’oyo epai na yo. Wana azalaki nanu koloba na ngai, natelemaki na kolenga.
12 И рече ми: Не бој се, Данило, јер првог дана кад си управио срце своје да разумеваш и да мучиш себе пред Богом својим, услишене бише речи твоје, и ја дођох твојих речи ради.
Akobaki koloba na ngai: — Daniele, kobanga te! Wuta mokolo ya liboso oyo ozwaki makanisi ya koluka kososola mpe komikitisa liboso ya Nzambe na yo, libondeli na yo eyokamaki, mpe nayaki lokola eyano na libondeli yango.
13 Али кнез царства персијског стаја ми насупрот двадесет и један дан; али, гле, Михаило један од првих кнезова дође ми у помоћ; тако ја остах онде код царева персијских.
Kasi mokambi ya mokili ya Persi atelemelaki ngai mikolo tuku mibale na moko. Boye, Misheli, moko kati na bakonzi ya ba-anjelu, ayaki kosunga ngai, pamba te bakonzi ya Persi bakangaki ngai kuna.
14 И дођох да ти кажем шта ће бити твом народу после; јер ће још бити утвара за те дане.
Sik’oyo, nayei kolimbolela yo makambo oyo ekokomela bato na yo na mikolo ekoya, pamba te emoniseli oyo ezali kolobela lisusu makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya.
15 И кад ми говораше тако, оборих очи своје на земљу и занемех.
Wana azalaki koloba na ngai, nakitisaki elongi mpe nakokaki lisusu koloba te.
16 И гле, као човек дотаче се усана мојих, и отворих уста своја, и проговорих и рекох оном који стајаше према мени: Господару мој, од ове утваре навалише моји болови на мене и нема снаге у мени.
Boye, ekelamu oyo ezalaki lokola moto esimbaki bibebu na ngai, mpe nakokaki lisusu kofungola monoko na ngai mpo na koloba. Nalobaki na ekelamu oyo etelemaki liboso na ngai: — Nkolo na ngai, molimo na ngai etungisami likolo ya emoniseli oyo nasili kozwa, mpe, ngai moto, nalembi nzoto!
17 А како може слуга мог господара говорити с господарем мојим? Јер од овог часа у мени неста снаге и ни дихање не оста у мени.
Ndenge nini mosali lokola ngai, nakoka solo kosolola na yo, nkolo na ngai, awa makasi esili ngai mpe kopema na ngai ekomi na pasi?
18 Тада онај што беше као човек опет ме се дотаче и охрабри ме.
Ekelamu oyo ezalaki lokola moto esimbaki ngai lisusu mpe epesaki ngai makasi.
19 И рече: Не бој се, мили човече; мир да ти је! Охрабри се, охрабри се. И докле ми говораше, охрабрих се и рекох: Нека говори господар мој, јер си ме охрабрио.
Elobaki na ngai: — Molingami ya Nzambe, kobanga te, zala na kimia! Zala makasi; solo, zala makasi! Wana ezalaki koloba na ngai, nzoto na ngai ezwaki lisusu makasi mpe nalobaki: — Loba, nkolo na ngai, pamba te opesi ngai makasi.
20 А он рече: Знаш ли зашто сам дошао к теби? А сада ћу се вратити да војујем на кнеза персијског; потом ћу отићи, и гле, доћи ће кнез грчки.
Boye, elobaki: — Boni, oyebi mpo na nini nayei epai na yo? Sik’oyo, nakomi pene ya kozonga mpo na kobundisa mokambi ya Persi; mpe tango ngai nakokende, mokambi ya Grese akoya;
21 Али ћу ти казати шта је написано у књизи истинитој. Нема никога да јуначки ради са мном у том осим Михаила, кнеза вашег.
kasi liboso na nyonso, nakoyebisa yo makambo oyo ekomami kati na buku ya solo. Moto moko te asungaka ngai liboso na bango; kaka Misheli, mokambi na bino.