< 2 Књига Самуилова 14 >
1 А Јоав син Серујин опази да се срце царево обратило к Авесалому.
Joabi, mwana mobali ya Tseruya, asosolaki ete motema ya mokonzi ekomi na posa ya Abisalomi.
2 И посла Јоав у Текују те дозва отуда жену лукаву, па јој рече: Учини се као да си у жалости, и обуци жалосне хаљине, и немој се намазати уљем, него буди као жена која одавна жали за мртвим.
Boye, Joabi atindaki moto moko na mboka Tekoa, mpo na koluka mwasi moko ya bwanya mpe komema ye longwa kuna. Alobaki na ye: « Sala lokola moto oyo azali na matanga, lata bilamba ya matanga, kopakola mafuta te: sala lokola mwasi oyo alata pili wuta mikolo ebele mpo na kolela ebembe;
3 И отиди к цару, и говори му тако и тако. И научи је Јоав шта ће говорити.
mpe kende epai ya mokonzi, yebisa ye maloba oyo. » Joabi ayebisaki maloba oyo asengelaki koloba.
4 И кад отиде жена Текујанка к цару да говори, паде ничице на земљу и поклони се, и рече: Помагај царе!
Tango mwasi ya mboka Tekoa akomaki epai ya mokonzi, agumbamaki elongi na ye kino na mabele mpe alobaki: — Oh mokonzi, sunga ngai!
5 А цар јој рече: Шта ти је? А она рече: Удовица сам, умро ми је муж.
Mokonzi atunaki ye: — Eloko nini ezali kotungisa yo? Azongisaki: — Nazali mwasi akufisa mobali; mobali na ngai akufaki.
6 А имаше слушкиња твоја два сина, па се свадише у пољу, а не беше никога да их развади, те један удари другог и уби га.
Ngai, mwasi mosali na yo, nazalaki na bana mibali mibale. Bango mibale baswanaki kati na bilanga, mpe moto moko te azalaki kuna mpo na kokabola bango. Moko abetaki mosusu mpe abomaki ye.
7 И гле, сав дом уста на слушкињу твоју говорећи: Дај тог што је убио брата свог да га погубимо за душу брата његовог, ког је убио, и да истребимо наследника; и тако хоће да угасе искру која ми је остала, да не оставе име мужу мом ни остатак на земљи.
Sik’oyo, libota mobimba etelemeli mwasi mosali na yo, bazali koloba: « Kaba na maboko na biso ye oyo abetaki ndeko na ye ya mobali mpo ete toboma ye mpo na bomoi ya ndeko na ye ya mobali oyo ye abomaki. Na nzela wana, tokolongola mokitani ya libula. » Na bongo, bakoki koboma mwa likala ya moto oyo natikali na yango mpe kozangisa mobali na ngai kombo mpe bakitani kati na mokili.
8 А цар рече жени: Иди кући својој, а ја ћу наредити за те.
Mokonzi alobaki na mwasi: — Zonga na ndako na yo, nakopesa mitindo na tina na yo.
9 А жена Текујанка рече цару: Царе господару! Нека на ме и на дом оца мог падне кривица, а цар и његов престо нека је прав.
Kasi mwasi ya mboka Tekoa alobaki na mokonzi: — Oh mokonzi, nkolo na ngai, tika ete ngambo ekweya na moto na ngai mpe na libota ya tata na ngai; kasi tika ete mokonzi mpe kiti na ye ya bokonzi bazala mosika ya likambo oyo.
10 А цар рече: Ко узговори на те, доведи га к мени, и неће те се више дотаћи.
Mokonzi alobaki na ye: — Soki moto moko ameki kotombokela yo, yaka na ye epai na ngai, mpe akozongela lisusu te kotungisa yo.
11 А она рече: Нека се опомене цар Господа Бога свог, да се не умноже осветници који убијају, и да не убију сина мог. А он рече: Тако жив био Господ, ниједна длака с твог сина неће пасти на земљу.
Mwasi alobaki: — Tika ete mokonzi alapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe na ye, ete akopekisa mobukanisi makila mpo ete akoba te kobebisa na koboma mwana na ngai ya mobali, oyo atikali. Mokonzi alobaki: — Na Kombo na Yawe, suki ata moko te ya moto ya mwana na yo ya mobali ekokweya na mabele.
12 А жена рече: Да каже слушкиња твоја нешто цару господару. А он рече: Говори.
Mwasi yango alobaki: — Tika ete mwasi mosali na yo aloba likambo moko epai ya mokonzi, nkolo na ngai. Mokonzi azongisaki: — Loba!
13 А жена рече: А зашто си намислио такву ствар народу Божијем? Јер цар као да је крив говорећи тако, јер неће цар да дозове натраг оног ког је одагнао.
Mwasi alobaki: — Mpo na nini osali mabongisi ya boye mpo na kotelemela bato ya Nzambe? Wana mokonzi abimisi maloba oyo, ye moko azali komikweyisa te mpo ete azongisi te mwana mobali oyo akimaki na mboka ya bapaya?
14 Јер ћемо доиста помрети, и јесмо као вода која се проспе на земљу и више се не може скупити; јер му Бог није узео живот, него је наумио да одагнани не остане одагнан од њега.
Solo, ndenge bakokaka te kolokota mayi oyo esili kosopana, ndenge mpe biso tosengeli kokufa. Kasi sik’oyo, ezali te mokano ya Nzambe mpo na Abisalomi, pamba te asalaki mabongisi mpo ete moto oyo abungi nzela awumela te mosika na Ye.
15 И тако дођох да кажем ово цару господару свом, јер ме народ уплаши; зато рече слушкиња твоја: Да говорим цару, може бити да ће учинити цар шта слушкиња његова каже.
Mpe sik’oyo, soki nayei kobimisa maloba oyo epai ya mokonzi, nkolo na ngai, ezali mpo ete bato babangisaki ngai. Yango wana mwasi mosali na yo amilobelaki: « Tika ete naloba na mokonzi, nkolo na ngai. Tango mosusu, akosala kolanda makambo oyo mwasi mosali na ye akosenga.
16 Јер ће цар услишити и избавити слушкињу своју из руке оног који хоће да истреби мене и сина мог из наследства Божијег.
Tango mosusu, mokonzi akondima kokangola mwasi mosali na ye wuta na loboko ya mobali oyo azali koluka kobwaka ngai mpe mwana na ngai ya mobali mosika ya libula oyo Nzambe apesaki biso. »
17 И слушкиња твоја рече: Реч цара господара мог биће ми утеха, јер је цар господар мој као анђео Божји, те слуша и добро и зло, и Господ ће Бог твој бити с тобом.
Mpe sik’oyo, tala makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba: « Tika ete liloba ya mokonzi, nkolo na ngai, epesa ngai bopemi, pamba te mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe oyo ayebaka kososola mabe mpe malamu. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo! »
18 А цар одговори и рече жени: Немој тајити од мене шта ћу те питати. А жена рече: Нека говори цар господар мој.
Mokonzi alobaki na mwasi: — Kobombela ngai te eyano ya likambo oyo nalingi kotuna yo. Mwasi azongisaki: — Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, aloba!
19 Тада цар рече: Да није Јоавов посао у свему томе што чиниш? А жена одговори и рече: Тако да је жива душа твоја, царе господару, не може се ни надесно ни налево од свега што каза цар господар мој; јер слуга твој Јоав заповедио ми је и научио слушкињу твоју све ово да говорим.
Mokonzi atunaki: — Boni, loboko ya Joabi ezali elongo na yo te na makambo oyo nyonso? Mwasi azongisaki: — Na kombo na yo mokonzi, nkolo na ngai, kati na makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, awuti koloba, moto moko te akoki kokende, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi. Solo, ezali mosali na yo, Joabi, nde atindaki ngai kosala makambo oyo, mpe ye nde atiaki maloba oyo na monoko na ngai mwasi mosali na yo.
20 Слуга је твој Јоав учинио, те сам овако извила беседу своју; али је господар мој мудар као анђео Божји, те зна све што бива на земљи.
Mosali na yo, Joabi, asalaki boye mpo na kobongola mpe kokomisa makambo oyo ndenge mosusu. Kasi nkolo na ngai azali na bwanya lokola Anjelu na Nzambe, ayebi makambo nyonso oyo ezali koleka kati na mokili.
21 Тада рече цар Јоаву: Ево, ти си учинио то, иди, доведи натраг дете Авесалома.
Mokonzi alobaki na Joabi: — Malamu! Nakosala yango. Kende, zongisa elenge mobali Abisalomi.
22 Тада паде Јоав лицем на земљу, и поклони се и благослови цара, и рече Јоав: Данас види слуга твој да сам нашао милост пред тобом, царе господару, кад је цар учинио шта му слуга његов рече.
Bongo Joabi agumbamaki elongi kino na mabele mpo na kopesa mokonzi lokumu mpe apambolaki ye. Joabi alobaki: — Lelo, mosali na yo asosoli ete azwi ngolu na miso na yo mokonzi, nkolo na ngai, pamba te mokonzi andimi kosala makambo oyo mosali na ye asengi.
23 Потом се подиже Јоав и отиде у Гесур, и доведе натраг у Јерусалим Авесалома.
Bongo Joabi akendeki na Geshuri mpe azongisaki Abisalomi, na Yelusalemi.
24 И цар рече: Нека иде својој кући, а лице моје да не види. И отиде Авесалом својој кући, и не виде лице царево.
Kasi mokonzi alobaki: — Asengeli kokende na ndako na ye; asengeli te komona elongi na ngai. Boye Abisalomi akendeki na ndako na ye, mpe amonaki elongi ya mokonzi te.
25 А не беше човека тако лепа као Авесалом у свем Израиљу, да га тако хвале; од пете до темена не беше на њему мане.
Kati na Isalaele mobimba, ezalaki na moto moko te oyo azalaki kitoko koleka Abisalomi mpe oyo bazalaki kokumisa lokola ye. Azalaki ata na mbeba moko te, banda na moto kino na misapi ya makolo.
26 И кад би стригао главу (а имаше обичај сваке године стрићи је, јер му беше тешко), мерио би косу с главе своје, и биваше је двеста сикала царском мером.
Na suka ya mibu nyonso, azalaki kokata suki ya moto na ye, mpo ete ezalaki kokoma kilo makasi. Boye tango bazalaki kotia yango na bimekelo, ezalaki na bakilo mibale na bagrame nkama mitano, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na ndako ya mokonzi.
27 И родише се Авесалому три сина и једна кћи, којој беше име Тамара, и она беше лепа.
Abisalomi azalaki na bana mibali misato mpe mwana moko ya mwasi. Kombo ya mwana na ye ya mwasi ezalaki Tamari, mpe azalaki mwasi moko ya kitoko makasi.
28 И Авесалом оста целе две године у Јерусалиму, а лице царево не виде.
Abisalomi avandaki na Yelusalemi mibu mibale mpe atikalaki komona te elongi ya mokonzi.
29 Тада посла Авесалом по Јоава да га пошаље к цару; али он не хте доћи к њему; и посла опет други пут, али он не хте доћи.
Bongo Abisalomi abengisaki Joabi mpo ete atinda ye epai ya mokonzi, kasi Joabi aboyaki kokende epai na ye. Abengisaki lisusu Joabi na mbala ya mibale, kasi Joabi aboyaki kaka kokende.
30 Тада рече слугама својим: Видите ли њиву Јоавову поред моје? На њој је јечам; идите и упалите је. И упалише слуге Авесаломове ону њиву.
Abisalomi alobaki na basali na ye: « Botala! Elanga ya Joabi ezali pembeni ya elanga na ngai, ezali na bambuma ya orje. Bokende kotia yango moto. » Basali ya Abisalomi batiaki yango moto.
31 Тада се подиже Јоав, и дође к Авесалому у кућу, и рече му: Зашто слуге твоје упалише моју њиву?
Joabi akendeki na ndako ya Abisalomi mpe alobaki na ye: — Mpo na nini otie moto na elanga na ngai?
32 Авесалом рече Јоаву: Ето слао сам к теби говорећи: Ходи овамо да те пошаљем к цару да му кажеш: Зашто сам дошао из Гесура? Боље би било да сам још онде. Зато да видим лице царево; ако ли има каква кривица на мени, нека ме погуби.
Abisalomi azongiselaki Joabi: — Tala, natindelaki yo maloba; nalobaki: « Yaka awa mpo ete natinda yo epai ya mokonzi mpo na kotuna ye: ‹ Mpo na nini nalongwaki na Geshuri? Elingaki kozala malamu mpo na ngai soki natikalaki na ngai kuna. Sik’oyo, nalingi komona elongi ya mokonzi; mpe soki namemaki ngambo na likambo moko, tika ete baboma ngai! › »
33 И отиде Јоав к цару, и каза му. И дозва Авесалома; а он дошавши к цару поклони се лицем до земље пред царем, и цар целива Авесалома.
Boye Joabi akendeki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye makambo nyonso. Mokonzi abengisaki Abisalomi, mpe Abisalomi akendeki liboso ya mokonzi, agumbamaki elongi kino na mabele, mpe mokonzi ayambaki ye.