< 2 Књига о царевима 25 >

1 И тако девете године његовог царовања, десетог месеца десетог дана дође Навуходоносор, цар вавилонски са свом војском својом на Јерусалим, и стадоше у логор под њим, и начинише опкопе око њега.
Tango Sedesiasi akokisaki mibu libwa na bokonzi, na mokolo ya zomi ya sanza mpe ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi. Batongaki molako na bango libanda ya engumba, mpe atongaki mabulu mpo na kobombama, na zingazinga na yango nyonso.
2 И град би опкољен до једанаесте године царовања Седекијиног.
Engumba yango ezingelamaki kino na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi.
3 И деветог дана месеца четвртог поста велика глад у граду, те народ земаљски немаше хлеба.
Na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, wana nzala makasi ekotaki kati na engumba mpe bato bazalaki lisusu na eloko ya kolia te,
4 Тада град би проваљен, а војници сви побегоше ноћу на врата између два зида уз врт царев; а Халдеји беху свуда око града; и цар отиде путем к пустињи.
bongo lokola lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba, basoda nyonso ya Yuda bakimaki butu-butu mpe babimelaki na ekuke oyo ezalaki na kati-kati ya bamir mibale, pene ya elanga ya mokonzi, atako bato ya Babiloni bazingelaki engumba. Bakimaki na nzela ya lubwaku ya Yordani.
5 Али војска халдејска потера цара, и стигоше га у пољу јерихонском, а сва војска што беше с њим разбеже се од њега.
Kasi basoda ya Babiloni balandaki mokonzi mpe bakangaki ye kati na etando ya Jeriko epai wapi basoda na ye nyonso bakimaki ye mpe bapanzanaki.
6 И ухватише цара, и одведоше га к цару вавилонском у Ривлу, и онде му судише.
Basoda ya Babiloni bakangaki mokonzi ya Yuda mpe bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila epai wapi bakatelaki ye etumbu.
7 И синове Седекијине поклаше на његове очи, па онда Седекији ископаше очи, и свезаше га у два ланца бронзана, и одведоше га у Вавилон.
Bakataki mito ya bana mibali ya Sedesiasi na miso na ye; mpe Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atobolaki miso ya Sedesiasi, apesaki mitindo ete bakanga ye minyololo ya bronze mpe bamema ye na Babiloni.
8 А седмог дана петог месеца године деветнаесте царовања Навуходоносора, цара вавилонског дође у Јерусалим Невузардан заповедник стражарски, слуга цара вавилонског.
Tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mibu zomi na libwa na bokonzi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli mpe mosali ya mokonzi ya Babiloni, ayaki na Yelusalemi na mokolo ya sambo ya sanza ya mitano.
9 И попали дом Господњи и дом царски и све домове у Јерусалиму; све велике куће попали огњем.
Atumbaki Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yelusalemi; atumbaki bandako nyonso ya bato minene.
10 И зидове јерусалимске унаоколо развали сва војска халдејска, која беше са заповедником стражарским.
Mampinga nyonso ya Babiloni, oyo ezalaki na se ya bokonzi ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi babukaki bamir oyo ezingelaki Yelusalemi.
11 А остатак народа што оста у граду, и пребеге што пребегоше к цару вавилонском, и остали прости народ одведе Навузардан, заповедник стражарски.
Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu bato oyo batikalaki kati na engumba, bato oyo bamipesaki epai ya mokonzi ya Babiloni mpe bato mosusu oyo batikalaki.
12 Само од сиромаха у земљи остави заповедник стражарски који ће бити виноградари и ратари.
Kasi mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atikaki kati na mokili ndambo ya babola mpo na kolona vino mpe bilanga.
13 И ступове бронзане што беху у дому Господњем, и подножја, и море бронзано које беше у дому Господњем, изломише Халдејци, и бронзу од њих однесоше у Вавилон.
Bato ya Babiloni babukaki makonzi ya bronze oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe, bashario ya bronze mpe nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, mpe bamemaki bronze na yango na Babiloni.
14 И лонце и лопате и виљушке и кадионице и све судове бронзане којима служаху, узеше,
Bakamataki lisusu biloko nyonso ya bronze oyo bazalaki kosala na yango losambo kati na Tempelo, basani ya putulu, bapawu, bambeli, bakopo.
15 И клешта и котлиће, шта год беше златно и шта год беше сребрно, узе заповедник стражарски,
Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi akamataki lisusu biloko nyonso ya wolo mpe ya palata: bambabola mpe basani ya kobwakela mayi.
16 Два ступа, једно море и подножја, што начини Соломун за дом Господњи; не беше мере бронзи од свих тих судова;
Bakokaki te komeka kilo ya bronze ya biloko nyonso oyo Salomo asalaki mpo na Tempelo ya Yawe: makonzi nyonso mibale, nzungu ya monene mpe bashario.
17 Осамнаест лаката беше висок један ступ, и озго на њему беше оглавље бронзано, и оглавље беше високо три лакта, и плетенице и шипци око оглавља, све од бронзе; такав беше и други ступ с плетеницом.
Likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa na bosanda. Moto ya likonzi, oyo ezalaki na songe, ezalaki ya bronze mpe na metele pene moko na ndambo na molayi; mpe bazingelaki yango na bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe bambuma ya grenade. Makonzi nyonso mibale mpe bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama ezalaki ndenge moko.
18 Узе заповедник стражарски и Серају првог свештеника и Софонију другог свештеника, и три вратара.
Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atiaki na boloko Seraya, mokonzi ya Banganga-Nzambe; Sofoni, molandi ya mokonzi ya Banganga-Nzambe; mpe Banganga-Nzambe misato oyo bazalaki na mokumba ya kokengela ekotelo ya Tempelo.
19 А из града узе једног дворанина, који беше над војницима и пет људи који стајаху пред царем, који се нађоше у граду, и првог писара војничког, који пописиваше народ по земљи у војску, и шездесет људи из народа земаљског, који се нађоше у граду.
Kati na bato oyo batikalaki kati na engumba, akangaki lisusu moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo azalaki na mokumba ya kotala makambo ya basoda ya bitumba, bapesi toli mitano, mokomi mikanda ya mokonzi ya mampinga, oyo azalaki na mokumba ya kokoma bakombo ya bato ya mboka mpo na kokota na mosala ya mampinga; mpe mibali tuku motoba ya Yuda, oyo bakutaki kati na engumba.
20 Узе их Невузардан, заповедник стражарски, и одведе к цару вавилонском у Ривлу.
Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, akamataki bango nyonso mpe amemaki bango epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila.
21 А цар их вавилонски поби и погуби у Ривли у земљи ематској. Тако би пресељен Јуда из земље своје.
Mokonzi ya Babiloni abomaki bango kuna na Ribila, kati na mokili ya Amati. Boye, bato ya Yuda bakendeki na bowumbu mosika ya mokili na bango.
22 А над народом који оста у земљи Јудиној, који остави Навуходоносор цар вавилонски, над њим постави Годолију, сина Ахикама, сина Сафановог.
Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atiaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami mpe koko ya Shafani, lokola moyangeli ya bato oyo atikaki kati na mokili ya Yuda.
23 А кад чуше све војводе и људи њихови да је цар вавилонски поставио Годолију, дођоше ка Годолији у Миспу, на име: Исмаило син Нетанијин, и Јоанан син Каријајев и Сераја син Тануметов из Нетофата, и Јазанија син Махатов, они и људи њихови.
Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia moyangeli, bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango: Isimaeli, mwana mobali ya Netania; Yoanani, mwana mobali ya Karea; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti, moto ya Netofa; mpe Yazania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati. Bakendeki kuna elongo na basoda na bango.
24 И Годолија се закле њима и људима њиховим и рече: Не бојте се службе Халдејима; седите у земљи и служите цару вавилонском, и биће вам добро.
Gedalia alapaki ndayi liboso na bango mpe basoda na bango na maloba oyo: « Bobanga te kosalela bato ya Babiloni, bovanda kati na mokili, bosalela mokonzi ya Babiloni mpe bokozala na bino malamu. »
25 Али седмог месеца дође Исмаило, син Нетаније сина Елисамовог, рода царског, и десет људи с њим, и убише Годолију, те погибе; тако и Јудеје и Халдеје који беху с њим у Миспи.
Kasi na sanza ya misato, Isimaeli, mwana mobali ya Netania mpe koko ya Elishama, oyo azalaki na molongo ya libota ya bokonzi, ayaki elongo na basoda zomi; babomaki Gedalia elongo na bato ya Yuda mpe bato ya Babiloni oyo bazalaki elongo na ye, na Mitsipa.
26 Тада се подиже сав народ, мало и велико, и војводе, те отидоше у Мисир, јер се побојаше Халдеја.
Boye bato nyonso, kobanda na bato ya se kino bato ya lokumu, elongo na bakonzi ya basoda, bakimaki na Ejipito, pamba te bazalaki kobanga bato ya Babiloni.
27 А тридесет седме године откако се зароби Јоахин, цар Јудин, дванаестог месеца, двадесет седмог дана Евил-Меродах цар вавилонски исте године зацаривши се извади из тамнице Јоахина, цара Јудиног.
Tango Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na sambo na bowumbu, Evili-Merodaki, mokonzi ya Babiloni, ayokelaki Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, mawa mpe abimisaki ye na boloko, na mokolo ya tuku mibale na sambo ya sanza ya zomi na mibale, kaka na mobu oyo akomaki mokonzi.
28 И лепо говори с њим, и намести му престо више престола других царева који беху код њега у Вавилону.
Evili-Merodaki asololaki na Yeoyakini na boboto mpe apesaki ye lokumu koleka bakonzi mosusu oyo bazalaki elongo na ye, na bowumbu kati na Babiloni;
29 И промени му хаљине тамничке, и он јеђаше свагда с њим свега века свог.
apesaki mitindo ete balongola ye bilamba ya boloko mpe andimaki ete abanda kolia mesa moko elongo na ye, mokolo na mokolo kino na suka ya bomoi na ye.
30 И храна му се једнако даваше од цара сваки дан свега века његовог до смрти његове.
Mokonzi ya Babiloni azalaki kopesa ye nyonso oyo asengeli na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye.

< 2 Књига о царевима 25 >