< 2 Књига дневника 18 >
1 И Јосафат имајући велико благо и славу, опријатељи се с Ахавом.
Mokonzi Jozafati akomaki na lokumu mingi mpe na bozwi ebele, asalaki boyokani elongo na Akabi na nzela ya libala.
2 И после неколико година отиде к Ахаву у Самарију; и накла му Ахав много оваца и волова и народу који беше с њим, и наговараше га да пође на Рамот галадски.
Sima na ndambo ya mibu, akendeki kotala Akabi kati na Samari. Akabi abomaki bameme mpe bangombe ebele mpo na koyamba ye mpe bato oyo bazalaki elongo na ye. Atindikaki ye na kokende na Ramoti ya Galadi.
3 И рече Ахав цар Израиљев Јосафату цару Јудином: Хоћеш ли ићи са мном на Рамот галадски? А он рече: Ја као ти, народ мој као твој народ; хоћемо с тобом на војску.
Akabi, mokonzi ya Isalaele, atunaki epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda: — Okoki solo kosepela kokende elongo na ngai mpo na kobundisa Ramoti ya Galadi? Jozafati azongisaki: — Ngai mpe yo, bato na ngai mpe bato na yo, tozali se moko; tokokende elongo na yo na bitumba.
4 Још рече Јосафат цару Израиљевом: Питај данас шта ће Господ рећи.
Kasi Jozafati alobaki lisusu na mokonzi ya Isalaele: — Nabondeli yo, tuna nanu toli ya Yawe.
5 Тада сазва цар Израиљев пророке своје, четири стотине људи, и рече им: Хоћемо ли ићи на војску на Рамот галадски, или ћу се оканити? А они рекоше: Иди, јер ће га Господ дати у руке цару.
Boye, mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli nkama minei mpe atunaki bango: — Boni, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te? Bazongiselaki ye: — Kende, pamba te Nzambe akokaba yango na maboko ya mokonzi.
6 А Јосафат рече: Има ли ту још који пророк Господњи да га питамо?
Kasi Jozafati atunaki lisusu: — Ezali lisusu na mosakoli moko te awa oyo, na nzela na ye, tokoki kotuna toli ya Yawe?
7 А цар рече Јосафату: Има још један човек преко ког бисмо могли упитати Господа; али ја мрзим на њ, јер ми не прориче добра него свагда зло; то је Михеја син Јемлин. А Јосафат рече: Нека цар не говори тако.
Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati: — Ezali lisusu na moto moko oyo, na nzela na ye, tokoki kotuna toli ya Yawe; kasi ngai nalingaka ye te mpo ete atikala nanu kosakola te makambo ya malamu mpo na bomoi na ngai; asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. Jozafati alobaki: — Tika ete mokonzi aloba bongo te!
8 Тада цар Израиљев дозва једног дворанина, и рече му: Брже доведи Михеју, сина Јемлиног.
Bongo mokonzi ya Isalaele abengaki moko kati na bakalaka na ye ya lokumu mpe alobaki na ye: — Memela ngai na lombangu Mishe, mwana mobali ya Yimila.
9 А цар Израиљев и Јосафат, цар Јудин сеђаху, сваки на свом престолу обучени у царске хаљине, сеђаху на пољани код врата самаријских, и сви пророци пророковаху пред њима.
Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, balataki bilamba na bango ya bokonzi mpe bavandaki na bakiti na bango ya bokonzi, na etando ya ekotelo ya ekuke ya Samari. Mpe basakoli nyonso bazalaki kosakola liboso na bango.
10 И Седекија син Хананин начини себи гвоздене рогове, и рече: Овако вели Господ: Овим ћеш бити Сирце докле их не истребиш.
Nzokande, moko kati na bango, Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, asalisaki maseke ya ebende mpe alobaki: — Tala liloba oyo Yawe alobi: « Na maseke oyo, okobeta bato ya Siri kino okosilisa koboma bango. »
11 Тако и сви пророци пророковаху говорећи: Иди на Рамот галадски, и бићеш срећан, јер ће га Господ предати цару у руке.
Basakoli nyonso bazalaki koloba kaka liloba moko: « Kende kobundisa Ramoti ya Galadi! Okolonga, pamba te Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi. »
12 А посланик који отиде да дозове Михеју рече му говорећи: Ево пророци проричу сви једним гласом добро цару; нека и твоја реч буде као њихова, и говори добро.
Ntoma oyo akendeki kobenga Mishe alobaki na ye: — Tala, basakoli nyonso bazali koloba liloba kaka moko mpo na kosakola elonga mpo na mokonzi. Boye, tika ete maloba na yo ekokana na maloba na bango: sakola elonga mpo na mokonzi.
13 А Михеја рече: Тако да је жив Господ, говорићу оно што рече Бог мој.
Kasi Mishe azongisaki: — Na Kombo na Yawe, makambo oyo Nzambe na ngai akoloba na ngai, yango nde nakoloba.
14 И кад дође к цару, рече му цар: Михеја! Хоћемо ли ићи на војску на Рамот галадски, или ћу се оканити? А он рече: Идите, бићете срећни, и даће вам се у руке.
Tango akomaki epai ya mokonzi, mokonzi alobaki na ye: — Mishe, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te? Azongisaki: — Bokende! Bokolonga! Bakokabama na maboko na bino!
15 А цар му рече: Колико ћу те пута заклањати да ми не говориш него истину у име Господње?
Kasi mokonzi alobaki na ye: — Nakolapisa yo ndayi mbala boni mpo ete oloba na ngai kaka bosolo, na Kombo na Yawe?
16 Тада рече: Видео сам сав народ Израиљев разасут по планинама као овце које немају пастира, јер рече Господ: Ови немају господара, нека се врате свак својој кући с миром.
Mishe azongisaki: — Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na likolo ya bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi: « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia! »
17 Тада рече цар Израиљев Јосафату: Нисам ли ти рекао да ми неће пророковати добра него зло?
Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati: — Nayebisaki yo te ete asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, alobaka kaka mpo na mabe!
18 А Михеја рече: Зато чујте реч Господњу: Видех Господа где седи на престолу свом, а сва војска небеска стајаше му с десне и с леве стране;
Mishe alobaki: — Solo, boyoka nde makambo oyo Yawe alobi! Ngai, namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
19 И Господ рече: Ко ће преварити Ахава цара Израиљевог да отиде и падне код Рамота галадског? Још рече: Један рече ово а други оно.
Yawe atuni: « Nani akokosa Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpo ete akende kobundisa Ramoti ya Galadi mpe akufa kuna? » Bazongisaki, moko na moko na ndenge na ye.
20 Тада изиђе један дух, и ставши пред Господа рече: Ја ћу га преварити. А Господ му рече: Како?
Mpe na suka na nyonso, molimo moko epusanaki, etelemaki liboso ya Yawe mpe elobaki: « Ngai oyo! Nakokosa ye. » Yawe atunaki molimo yango: « Okosala yango ndenge nini? »
21 Одговори: Изићи ћу и бићу лажљив дух у устима свих пророка његових. А Господ му рече: Преварићеш га и надвладаћеш, иди учини тако.
Molimo yango ezongisaki: « Nakokende mpe nakobongwana molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na ye nyonso. » Yawe alobaki: « Solo, okolonga kokosa ye! Kende mpe sala bongo. »
22 Зато сада ето, Господ је метнуо лажљив дух у уста тим пророцима твојим; а Господ је изрекао зло по те.
Mpe sik’oyo, tala, Yawe atie molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na yo oyo; Yawe azwi penza mokano ya koboma yo.
23 Тада приступи Седекија син Хананин, и удари Михеју по образу говорећи: Којим је путем отишао дух Господњи од мене да говори с тобом?
Bongo Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, apusanaki, apapolaki Mishe mbata na litama mpe alobaki: — Molimo na Yawe abimi kati na ngai na nzela nini mpo ete aya koloba na yo?
24 А Михеја му рече: Ето, видећеш у онај дан кад отидеш у најтајнију клет да се сакријеш.
Mishe azongisaki: — Okososola yango kaka na mokolo oyo okokima mpe okotambola na shambre moko na moko mpo na koluka kobombama.
25 Тада цар Израиљев рече: Ухватите Михеју, и одведите га к Амону заповеднику градском и к Јоасу сину царевом.
Mbala moko, mokonzi ya Isalaele apesaki mitindo: — Bokanga Mishe mpe bomema ye epai ya Amoni, moyangeli ya engumba, mpe epai ya Joasi, mwana mobali ya mokonzi.
26 И реците им: Овако вели цар: Метните овог у тамницу, а дајите му по мало хлеба и по мало воде докле се не вратим у миру.
Boloba na bango: « Tala makambo oyo mokonzi alobi: ‹ Bobwaka moto oyo na boloko mpe bopesa ye bilei mosusu te, kaka lipa mpe mayi kino tango nakozonga na kimia. › »
27 А Михеја рече: Ако се вратиш у миру, није Господ говорио преко мене. Још рече: Чујте сви народи.
Mishe alobaki: — Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te! Abakisaki: — Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi!
28 И отиде цар Израиљев с Јосафатом царем Јудиним на Рамот галадски.
Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, bakendeki kobundisa Ramoti ya Galadi.
29 И рече цар Израиљев Јосафату: Ја ћу се преобући кад пођем у бој, а ти обуци своје одело. И преобуче се цар Израиљев, и отидоше у бој.
Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati: — Nakomibongola wana nakokende na bitumba; kasi yo, lata bilamba na yo ya bokonzi. Boye, mokonzi ya Isalaele amibongolaki mpe akendeki na bitumba.
30 А цар сирски заповеди војводама од кола својих говорећи: Не ударајте ни на малог ни на великог, него на самог цара Израиљевог.
Nzokande, mokonzi ya Siri apesaki mitindo epai ya bakonzi na ye ya basoda oyo batambolisaka bashar: — Bobundisa moto moko te, azala moke to monene; kasi bobundisa kaka mokonzi ya Isalaele.
31 А кад војводе од кола видеше Јосафата, рекоше: То је цар Израиљев. И окренуше се на њ да га ударе. Али Јосафат повика, и Господ му поможе, и одврати их Бог од њега.
Tango bakonzi na ye ya basoda, oyo batambolisaka bashar, bamonaki Jozafati, bamilobelaki: « Ezali solo mokonzi ya Isalaele. » Bazingelaki ye mpo na kobundisa ye, kasi Jozafati agangaki makasi, mpe Yawe asungaki ye. Nzambe atindikaki basoda oyo batambolisaka bashar mosika na ye.
32 Јер видевши војводе од кола да није цар Израиљев, одступише од њега.
Tango bakonzi ya basoda, oyo batambolisaka bashar basosolaki ete ezali mokonzi ya Isalaele te, batikaki kolanda ye.
33 А један застрели из лука нагоном и устрели цара Израиљевог где спуча оклоп. А он рече свом возачу: Савиј руком својом и извези ме из боја, јер сам рањен.
Kasi moto moko abetaki tolotolo na ye bibetela, mpe mbanzi na yango edusolaki ebombelo ya tolo ya mokonzi ya Isalaele mpe ezwaki ye. Mokonzi alobaki na motambolisi ya shar: — Baluka mpe bimisa ngai libanda ya esika oyo bitumba ezali koleka, pamba te nazoki.
34 И бој би жесток оног дана, а цар Израиљев заоста на колима својим према Сирцима до вечера, и умре о сунчаном заходу.
Na mokolo yango, lokola bitumba ezalaki makasi, mokonzi ya Isalaele atikalaki ya kotelema kati na shar na ye liboso ya bato ya Siri, kino na pokwa. Mpe kaka na pokwa yango, akufaki.