< 1 Тимотеју 6 >
1 Робови који су год под јармом да показују сваку част својим господарима, да се не хули на име Божије и на науку.
Bato nyonso oyo bazali bawumbu basengeli kotala bankolo na bango lokola bato oyo babongi na limemia makasi, mpo ete Kombo ya Nzambe mpe malakisi na biso efingama te.
2 А који имају крштене господаре, да не постају немарљиви за њих што су браћа, него још боље да служе, јер су верни и љубазни, заједничари у благодати. Ово учи и саветуј.
Bawumbu oyo bankolo na bango bazali bandimi basengeli te kozanga kotosa bankolo na bango, atako bazali bandeko mpe balingami na bango kati na Klisto; nzokande, basengeli kutu kosalela bankolo na bango malamu koleka, pamba te bankolo, oyo bazali kozwa bolamu kowuta na mosala ya bawumbu, bazali motuya epai na bango bawumbu lokola bandeko balingami. Yango nde malakisi oyo osengeli kopesa mpe kosenga na bato ete batosa yango.
3 Ако ли ко другачије учи, и не пристаје на здраве речи Господа нашег Исуса Христа и на науку побожну,
Soki moto apesi malakisi mosusu mpe aboyi kokangama na maloba ya solo ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, elongo na malakisi oyo ekoki na botosi kati na makambo ya Nzambe,
4 Наду се не знајући ништа, него болујући од запиткивања и празних препирања, ода шта постаје завист, свађа, хуљење, зле мисли,
azali moto na lolendo, ayebi eloko te, azali kobela bokono ya kotia tembe mpe ya koswana na tina na maloba oyo ebotaka zuwa, koswana, kofingana, kokaniselana mabe
5 Залудна препирања онаквих људи који имају ум изопачен и немају истине, који мисле да је побожност трговина. Клони се таквих.
mpe tembe oyo esilaka te kati na bato oyo mayele na bango ebeba, oyo bayebaka lisusu solo te mpe bakanisaka ete kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela ya kozwa bomengo.
6 Али јесте велика трговина побожност са задовољством.
Solo, kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela monene ya kozwa bomengo soki kaka oyebi kosepela na oyo ozali na yango.
7 Јер ништа не донесосмо на овај свет, дакле не можемо ништа ни однети.
Pamba te, toyaki maboko pamba kati na mokili, mpe tokozonga maboko pamba.
8 А кад имамо храну и одећу, овим да будемо довољни.
Mpe lokola tokozalaka na bilei mpe na bilamba, tokosepelaka na yango.
9 А који хоће да се обогате они упадају у напасти и замке, и у многе луде шкодљиве жеље, које потапају човека у пропаст и погибао.
Bato oyo balingaka kokoma na bomengo bakweyaka kati na komekama mpe bakangamaka na mitambo ya baposa mingi ya bozoba mpe ya mabe, oyo ememaka bango na libebi mpe na kufa.
10 Јер је корен свих зала среброљубље коме неки предавши се зађоше од вере и на себе навукоше муке велике.
Pamba te lokoso ya mbongo ezali mosisa ya mabe nyonso. Mpo na lokoso ya mbongo, bato mingi babungisaki kondima na bango mpe bamipesaki minyoko ebele.
11 А ти, о човече Божији! Бежи од овог, а иди за правдом, побожности, вером, љубави, трпљењем, кротости.
Kasi yo, moto na Nzambe, kima makambo nyonso wana; luka nde bosembo, botosi kati na makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, molende mpe boboto.
12 Бори се у доброј борби вере, мучи се за вечни живот на који си и позван, и признао си добро признање пред многим сведоцима. (aiōnios )
Bunda etumba ya malamu ya kondima, zwa bomoi ya seko, pamba te Nzambe abengaki yo mpo oyeba yango tango otatolaki malamu kondima na yo liboso ya batatoli ebele. (aiōnios )
13 Заповедам ти пред Богом који све оживљује, и Христом Исусом који сведочи за владања Понтија Пилата добро признање,
Tala makambo oyo nazali kotinda yo, liboso ya Nzambe oyo apesaka bomoi epai na bikelamu nyonso, mpe liboso ya Yesu-Klisto oyo atatolaki malamu bosolo liboso ya Ponse Pilato:
14 Да држиш заповест чисту и незазорну до доласка Господа нашег Исуса Христа,
Batela mobeko oyo, kokakola yango ata moke te, mpe sala ete bamona yo na pamela ata moko te, kino Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya
15 Који ће у своје време показати, Блажени и једини Силни Цар над царевима и Господар над господарима,
na tango oyo ekatama na Ye oyo azali Nkolo-Na-Esengo, Nkolo se moko na nguya nyonso, Mokonzi ya bakonzi, Nkolo ya bankolo,
16 Који сам има бесмртност, и живи у светлости којој се не може приступити, ког нико од људи није видео, нити може видети, коме част и држава вечна. Амин. (aiōnios )
Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela! Amen! (aiōnios )
17 Богатима на овом свету заповедај да се не поносе нити уздају у богатство пропадљиво, него у Бога Живога, који нам све даје изобилно за ужитак; (aiōn )
Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango. (aiōn )
18 Нека добро чине, нека се богате у добрим делима, нека буду подашни, заједнични,
Pesa bango mitindo ete basalaka bolamu, batonda na misala malamu, bazala na motema ya kokaba mpe bakabelaka bato.
19 Сабирајући себи темељ добар за унапредак, да приме живот вечни.
Ezali na nzela wana nde bakomibombela bomengo lokola moboko ya makasi mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo ete bakoka kozwa bomoi ya solo.
20 О Тимотије! Сачувај што ти је предано, клони се поганих, празних разговора и препирања лажно названог разума,
Timote, batela malamu nyonso oyo Nzambe apesa yo. Kima bilobaloba ya bato oyo bafingaka Nzambe, mpe makanisi ya oyo babengaka « Boyebi » na kozanga koyeba, pamba te etongaka kondima te.
21 Којим се неки хвалећи отпадоше од вере. Благодат с тобом. Амин.
Bato mingi babungisaki kondima na bango mpo ete bakangamaki na boyebi yango. Tika ete ngolu ezala elongo na bino nyonso!