< 1 Књига Самуилова 8 >

1 А кад Самуило остаре, постави синове своје за судије Израиљу.
Tango Samuele akomaki mobange, aponaki bana na ye ya mibali mpo ete bazala basambisi kati na Isalaele.
2 А име сину његовом првенцу беше Јоило, а другом Авија, и суђаху у Вирсавеји.
Kombo ya mwana na ye ya liboso ya mobali ezalaki « Joeli, » mpe ya mibale, « Abiya. » Bazalaki kosala mosala na bango na Beri-Sheba,
3 Али синови његови не хођаху путевима његовим, него ударише за добитком, и примаху поклоне и извртаху правду.
kasi batambolaki te na nzela ya Samuele, tata na bango: bamipesaki na lokoso ya mbongo, na kozwaka kanyaka mpe na kokataka makambo na bosembo te.
4 Тада се скупише све старешине Израиљеве и дођоше к Самуилу у Раму.
Mpo na yango, bakambi nyonso ya mabota ya Isalaele basanganaki elongo mpe bakendeki epai ya Samuele, na Rama.
5 И рекоше му: Ето, ти си остарео, а синови твоји не ходе твојим путевима: зато постави нам цара да нам суди, као што је у свих народа.
Balobaki na ye: « Tala, yo okomi na yo mobange, mpe bana na yo ya mibali bazali kotambola te na banzela na yo. Sik’oyo, pona mokonzi oyo akokamba biso ndenge ezali na bikolo nyonso. »
6 Али Самуилу не би по вољи што рекоше: Дај нам цара да нам суди. И Самуило се помоли Господу.
Kasi tango balobaki: « Pesa biso mokonzi oyo akokamba biso, » Samuele asepelaki na likambo yango te; boye asambelaki Yawe.
7 А Господ рече Самуилу: Послушај глас народни у свему што ти говоре; јер не одбацише тебе него мене одбацише да не царујем над њима.
Mpe Yawe azongiselaki Samuele: « Yoka makambo nyonso oyo bato bazali koloba na yo. Ezali yo te nde basundoli, kasi basundoli nde Ngai lokola Mokonzi na bango.
8 Како чинише од оног дана кад их изведох из Мисира до данас, и оставише ме и служише другим боговима, по свим тим делима чине и теби.
Bazali kosala yo ndenge kaka basalaki Ngai, banda mokolo oyo nabimisaki bango na Ejipito kino lelo: basundolaki Ngai mpe basalelaki banzambe mosusu.
9 Зато сада послушај глас њихов; али им добро засведочи и кажи начин којим ће цар царовати над њима.
Sik’oyo, yoka bango; kasi kebisa bango malamu mpe yebisa bango makambo nyonso oyo mokonzi oyo akokonza bango akobanda kosala. »
10 И каза Самуило све речи Господње народу који искаше од њега цара;
Samuele ayebisaki bato oyo bazalaki kosenga ye mokonzi maloba nyonso ya Yawe.
11 И рече: Ово ће бити начин којим ће цар царовати над вама: синове ваше узимаће и метати их на кола своја и међу коњике своје, и они ће трчати пред колима његовим;
Alobaki na bango: — Tala makambo oyo mokonzi oyo akokonza bino akobanda kosala: Akozwa bana na bino ya mibali mpe akotia bango na mosala ya kokumba bashar na ye kati na basoda na ye oyo babundaka na bampunda; bakobanda kokima mbangu liboso ya shar na ye lokola bakengeli ya mokonzi.
12 И поставиће их да су му хиљадници и педесетници, и да му ору њиве и жњу летину, и да му граде ратне справе и шта треба за кола његова.
Akotia bamoko, bakonzi ya bankoto ya basoda; bamosusu, bakonzi ya basoda tuku mitano; bamosusu, akotia bango na mosala ya kobalola mabele ya bilanga na ye, kobuka bambuma na ye mpe kosalela ye bibundeli ya bitumba mpe bisalelo mpo na bashar na ye.
13 Узимаће и кћери ваше да му граде мирисне масти и да му буду куварице и хлебарице.
Akokamata bana na bino ya basi mpo ete basalaka malasi, balambaka bilei mpe mapa.
14 И њиве ваше и винограде ваше и маслинике ваше најбоље узимаће и раздавати слугама својим.
Akokamata bilanga na bino ya vino mpe ya olive oyo eleki kitoko, mpe akopesa yango epai ya basali na ye.
15 Узимаће десетак од усева ваших и од винограда ваших, и даваће дворанима својим и слугама својим.
Akokamata eteni ya zomi ya milona na bino mpe ya bilanga na bino ya vino, mpe akopesa yango epai ya kalaka na ye ya lokumu mpe epai ya basali na ye.
16 И слуге ваше и слушкиње ваше и младиће ваше најлепше и магарце ваше узимаће, и обртати на своје послове.
Bongo, kati na basali na bino ya mibali, basali na bino ya basi, bilenge na bino mpe ba-ane na bino, akokamata ba-oyo baleki kitoko mpo na misala na ye.
17 Стада ће ваша десетковати и ви ћете му бити робови.
Akokamata eteni ya zomi ya bameme na bino, mpe bino moko bokokoma bawumbu na ye.
18 Па ћете онда викати, ради цара свог, ког изабрасте себи; али вас Господ неће онда услишити.
Bongo na mokolo wana, tango bokobanda kolelalela mpo na mokonzi oyo bino moko bokomiponela, na mokolo yango, Yawe akoyanola bino ata moke te.
19 Али народ не хте послушати речи Самуилове, и рекоше: Не, него цар нека буде над нама,
Kasi bato baboyaki koyokela Samuele, balobaki: — Te! Biso tolingi kaka mokonzi.
20 Да будемо и ми као сви народи; и нека нам суди цар наш и иде пред нама и води наше ратове.
Na bongo, biso mpe tokozala lokola bikolo mosusu. Mokonzi na biso akokamba biso, akobima liboso na biso mpe akotambolisa biso na bitumba.
21 А Самуило чувши све речи народне, каза их Господу.
Tango Samuele ayokaki maloba nyonso ya bato, amemaki yango liboso ya Yawe.
22 А Господ рече Самуилу: Послушај глас њихов, и постави им цара. И Самуило рече Израиљцима: Идите сваки у свој град.
Mpe Yawe alobaki na Samuele: « Yokela bango mpe pesa bango mokonzi! » Bongo Samuele alobaki na bato ya Isalaele: « Tika ete moto na moto azonga na engumba na ye! »

< 1 Књига Самуилова 8 >