< 1 Књига Самуилова 22 >
1 Тада Давид отиде оданде и утече у пећину одоламску. А кад то чуше браћа његова и сав дом оца његовог, дођоше онамо к њему.
Davidi alongwaki na Gati mpe akendeki kobombama na lidusu ya libanga ya Adulami. Tango bandeko na ye ya mibali mpe ya libota ya botata na ye bayokaki sango yango, bakitaki kuna epai na ye.
2 И скупише се око њега који год беху у невољи и који беху задужени и који год беху тужног срца; и он им поста поглавица; и беше их с њим око четири стотине људи.
Bato nyonso oyo bazalaki kati na minyoko, ba-oyo bazalaki na baniongo ya bato mosusu mpe ba-oyo mitema na bango ezoka, basanganaki zingazinga ya Davidi mpe akomaki mokambi na bango. Elongo na ye, ezalaki na bato pene nkama minei.
3 И оданде отиде Давид у Миспу моавску, и рече цару моавском: Допусти да се отац мој и мати моја склоне код вас докле видим шта ће Бог учинити са мном.
Kolongwa wana, Davidi akendeki na Mitsipe ya Moabi mpe alobaki na mokonzi ya Moabi: « Nabondeli yo: Pesa tata na ngai mpe mama na ngai ndingisa ya koya kovanda elongo na yo kino ngai nakoyeba makambo oyo Nzambe akosala mpo na ngai. »
4 И изведе их пред цара моавског, и осташе код њега за све време докле Давид беше у оном граду.
Boye Davidi amemaki bango epai ya mokonzi ya Moabi, mpe bavandaki elongo na ye tango nyonso oyo Davidi azalaki kati na ndako ya makasi.
5 Али пророк Гад рече Давиду: Немој остати у том граду, иди и врати се у земљу Јудину. И Давид отиде и дође у шуму Арет.
Kasi mosakoli Gadi alobaki na Davidi: « Kovanda te kati na ndako oyo batonga makasi, kende na mokili ya Yuda. » Boye Davidi alongwaki mpe akendeki na zamba ya Ereti.
6 А Саул чу да се појавио Давид и људи што беху с њим. Тада Саул сеђаше у Гаваји под шумом у Рами, с копљем у руци, а све слуге његове стајаху пред њим.
Saulo ayokaki ete bamonaki Davidi elongo na bato na ye. Wana Saulo azalaki na mopanga na loboko na ye mpe avandaki na Gibea, na likolo ya ngomba moke mpe na se ya nzete oyo babengi « Tamarisi » elongo na bakonzi nyonso ya mampinga na ye,
7 И рече Саул слугама својим које стајаху пред њим: Чујте синови Венијаминови; хоће ли вама свима син Јесејев дати њиве и винограде? Хоће ли све вас учинити хиљадницима и стотиницима?
Saulo ayebisaki bango: « Bino bato ya Benjame boyoka, bokanisi ete mwana ya Izayi akopesa bino nyonso bilanga mpe bilanga ya vino? Bokanisi ete akokomisa bino bakonzi ya bankoto to bakonzi ya bankama ya basoda?
8 Те сте се сви сложили на ме, и нема никога да ми јави да се мој син сложио са сином Јесејевим, и нема никога међу вама да мари за ме и да ми јави да је син мој подигао слугу мог на ме да ми заседа, као што се данас види.
Ezali mpo na yango nde bino nyonso bosalelaki ngai likita? Moto moko te alobi na ngai na tina na boyokani oyo mwana na ngai ya mobali asalaki na mwana ya Izayi, mpe moko te kati na bino ayokeli ngai mawa mpo ete ayebisa ngai ete mwana na ngai asaleli ngai likita mpo ete mosali na ngai atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo? »
9 Тада одговори Доик Идумејац, који стајаше са слугама Сауловим, и рече: Видео сам сина Јесејевог где дође у Нов к Ахимелеху, сину Ахитововом.
Kasi Doegi, moto ya Edomi, oyo azalaki moko kati na basali ya Saulo, alobaki: « Namonaki mwana mobali ya Izayi koya na Nobi epai ya Ayimeleki, mwana mobali ya Ayitubi.
10 Он пита за њ Господа, и даде му брашњенице: и мач Голијата Филистејина даде му.
Ayimeleki atunaki mpo na ye makambo epai na Yawe, mpe apesaki ye bilei mpe mopanga ya Goliati, moto ya Filisitia. »
11 Тада цар посла да доведу Ахимелеха, сина Ахитововог свештеника и сав дом оца његовог, свештенике, који беху у Нову. И дођоше сви к цару.
Boye mokonzi abengisaki Nganga-Nzambe Ayimeleki, mwana mobali ya Ayitubi; elongo na Banganga-Nzambe nyonso, bato ya libota na ye ya botata, oyo bazalaki na Nobi. Mpe bango nyonso bayaki epai ya mokonzi.
12 Тада рече Саул: Чуј сада сине Ахитовов. А он одговори: Ево ме, господару.
Saulo alobaki: — Yoka sik’oyo, mwana mobali ya Ayitubi. Ayimeleki azongisaki: — Nazali koyoka yo, nkolo na ngai.
13 А Саул му рече: Зашто сте се сложили на ме ти и син Јесејев, те си му дао хлеба и мач, и питао си Бога за њ, да би устао на ме да ми заседа, као што се види данас?
Saulo alobaki na ye: — Mpo na nini yo mpe mwana mobali ya Izayi bosalelaki ngai likita mpo na kotelemela ngai? Mpo na nini opesaki ye bilei mpe mopanga, mpe otunaki mpo na ye makambo epai na Nzambe, mpo ete atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo?
14 А Ахимелех одговори цару и рече: А ко је између свих слуга твојих као Давид, веран, и зет царев и послушан теби и поштован у кући твојој?
Ayimeleki azongiselaki mokonzi: — Boni, ezali na moto moko kati na basali na yo nyonso oyo azali na boyengebene lokola Davidi? Ye oyo azali bokilo ya mokonzi, mokambi ya basoda oyo bakengelaka yo mpe moto oyo aleki na lokumu kati na libota na yo?
15 Еда ли сам сад први пут питао Господа за њ? Сачувај Боже! Нека цар не беди таквим чим слугу свог нити кога у дому оца мог; јер није знао слуга твој од свега тога ништа.
Boni, mokolo wana ezalaki mbala na ngai ya liboso ya kotuna mpo na ye makambo epai ya Nzambe? Nakanisi ete ezali bongo te. Boye tika ete mokonzi atangela mosali na ye to moko kati na libota ya botata na ngai ngambo te; pamba te mosali na yo ayebi ata eloko moko te kati na likambo oyo nyonso.
16 Али цар рече: Погинућеш, Ахимелеше! И ти и сав дом оца твог.
Kasi mokonzi alobaki: — Ayimeleki, okokufa solo; yo mpe libota mobimba ya botata na yo.
17 Тада цар рече слугама које стајаху пред њим: Окрените се и погубите свештенике Господње, јер је и њихова рука с Давидом, и знајући да је побегао не јавише ми. Али слуге цареве не хтеше подигнути руке своје да уложе на свештенике Господње.
Boye, mokonzi atindaki bakengeli na ye, oyo bazalaki na mopanzi na ye: « Bobaluka mpe boboma Banganga-Nzambe ya Yawe; pamba te bango mpe basungaki Davidi: bayebaki ete Davidi azalaki kokima kasi bayebisaki ngai te. » Kasi basoda oyo bakengelaka mokonzi baboyaki kosembola maboko na bango mpo na koboma Banganga-Nzambe ya Yawe.
18 Тада рече цар Доику: Окрени се ти, те уложи на свештенике. И окренувши се Доик Идумејац уложи на свештенике, и поби их онај дан осамдесет и пет, који ношаху оплећак ланени.
Mokonzi apesaki mitindo epai ya Doegi: « Yo, baluka mpe boma Banganga-Nzambe. » Boye Doegi, moto ya Edomi, abalukaki mpe abomaki bango. Na mokolo wana, abomaki bato tuku mwambe na mitano oyo balataki efode ya lino.
19 И у Нову, граду свештеничком, исече оштрим мачем и људе и жене и децу и која сисаху, и волове, и магарице и ситну стоку оштрим мачем.
Abomaki lisusu na mopanga kati na Nobi, engumba ya Banganga-Nzambe, mibali, basi, bana mpe bana mike, bangombe, ba-ane mpe bameme.
20 Али утече један син Ахимелеха, сина Ахитововог, по имену Авијатар, и побеже к Давиду.
Kaka Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki mpe koko ya Ayitubi, nde abikaki mpe akimaki mpo na kokende kosangana na Davidi.
21 И Авијатар јави Давиду да је Саул побио свештенике Господње.
Abiatari ayebisaki Davidi ete Saulo asili koboma Banganga-Nzambe ya Yawe.
22 А Давид рече Авијатару: Знао сам оног дана кад је био онде Доик Идумејац да ће зацело казати Саулу; ја сам крив за све душе дома оца твог.
Boye Davidi alobaki na Abiatari: « Mokolo wana, nayebaki malamu ete lokola Doegi, moto ya Edomi, azalaki wana, akokaki kozanga te koyebisa Saulo. Boye ezali mpo na ngai nde bato nyonso ya libota ya botata na yo bakufi!
23 Остани код мене, не бој се; јер ко тражи моју душу тражиће и твоју; код мене ћеш бити сачуван.
Sik’oyo, vanda awa elongo na ngai, kobanga te. Pamba te moto oyo azali koluka bomoi na yo azali koluka mpe bomoi na ngai. Okobatelama malamu epai na ngai. »