< 1 Књига о царевима 11 >
1 Али цар Соломун љубљаше многе жене туђинке осим кћери Фараонове, Моавке, Амонке, Едомке, Сидонке и Хетејке,
Mokonzi Salomo abalaki mwana mwasi ya Faraon; kasi pembeni na ye, abalaki basi mosusu ebele ya bikolo ya bapaya: basi ya Moabi, ya Amoni, ya Edomi, ya Sidoni mpe ya Iti.
2 Од ових народа за које беше рекао Господ синовима Израиљевим: Не идите к њима и они да не долазе к вама, јер ће занети срце ваше за својим боговима. За њих приону Соломун љубећи их.
Basi yango bawutaki na bikolo oyo, na tina na bango, Yawe alobaki na bana ya Isalaele: « Bosengeli te kobalana na bango, noki te bakopengwisa bino mpe bakotindika mitema na bino na kosambela banzambe na bango. » Nzokande, Salomo akangamaki na basi ya bikolo ya bapaya na bolingo makasi.
3 Те имаше жена царица седам стотина, и три стотина иноча; и жене његове занесоше срце његово.
Azalaki na basi nkama sambo oyo bazalaki bana ya bakonzi, mpe bamakangu nkama misato. Boye, basi na ye nyonso bapengwisaki ye.
4 И кад остаре Соломун, жене занесоше срце његово за туђим боговима; и срце његово не би цело према Господу Богу његовом као што је било срце Давида, оца његовог.
Tango Salomo akomaki mobange, basi na ye batindikaki motema na ye na kogumbamela banzambe mosusu; mpe atikaki kolinga Yawe, Nzambe na ye, na motema na ye mobimba ndenge ezalaki motema ya Davidi, tata na ye.
5 И Соломун хођаше за Астаротом, богињом сидонском, и за Мелхомом, гадом амонским.
Salomo akomaki kosambela ekeko ya Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni; Moloki, nzambe ya mbindo ya bato ya Amoni.
6 И чињаше Соломун шта беше зло пред Господом, и не хођаше сасвим за Господом као Давид, отац његов.
Boye, Salomo asalaki penza makambo mabe na miso ya Yawe mpe atambolaki na boyengebene te liboso ya Yawe ndenge Davidi, tata na ye, atambolaki.
7 Тада сагради Соломун висину Хемосу, гаду моавском, на гори према Јерусалиму, и Молоху гаду амонском.
Na ngomba oyo etalani na Yelusalemi, Salomo atongaki esambelo ya likolo ya ngomba mpo na Kemoshi, nzambe ya mbindo ya Moabi; mpe mpo na Moloki, nzambe ya mbindo ya bato ya Amoni.
8 Тако учини свим женама туђинкама, те кађаху и приношаху жртве својим боговима.
Asalaki mpe bongo mpo na banzambe ya basi na ye nyonso ya bikolo ya bapaya mpo ete batumbelaka yango malasi mpe babonzelaka yango mbeka.
9 А Господ се разгневи на Соломуна што се одврати срце његово од Господа Бога Израиљевог, који му се беше јавио два пута,
Yawe atombokelaki Salomo mpo ete motema na ye epengwaki mosika na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo amimonisaki epai na ye mbala mibale.
10 И беше му заповедио да не иде за другим боговима, а он не одржа шта му Господ заповеди.
Nzokande, Yawe apekisaki Salomo kosambela banzambe mosusu; kasi Salomo atosaki te mitindo ya Yawe.
11 И рече Господ Соломуну: Што се то нађе на теби, и ниси држао завет мој ни уредбе моје, које сам ти заповедио, зато ћу отргнути од тебе царство и даћу га слузи твом.
Boye, Yawe alobaki na Salomo: « Lokola oponi kotambola bongo mpe obateli te boyokani na Ngai mpe mitindo oyo napesaki yo, nakobotola yo bokonzi mpe nakopesa yango na moko kati na basali na yo.
12 Али за твог века нећу то учинити ради Давида оца твог; него ћу га отргнути из руке сина твог.
Nzokande, mpo na Davidi, tata na yo, nakosala yango te na tango oyo ozali nanu na bomoi; nakobotola yango nde na maboko ya mwana na yo ya mobali.
13 Али нећу отргнути сво царство; једно ћу племе дати сину твом ради Давида слуге свог и ради Јерусалима, који изабрах.
Kasi nakobotola ye bokonzi nyonso te; nakotikela ye etuka moko mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, mpe mpo na Yelusalemi, engumba oyo napona. »
14 И подиже Господ противника Соломуну, Адада Идумејца, који беше од царског рода у Идумеји.
Yawe abimisaki monguna moko mpo na kobundisa Salomo: Adadi, moto ya Edomi, mwana kati na libota ya bokonzi ya Edomi.
15 Јер кад Давид беше у Идумеји и Јоав војвода дође да покопа побијене, поби све мушкиње у Идумеји.
Na kala, na tango oyo Davidi abundisaki mokili ya Edomi, Joabi mokonzi ya mampinga, oyo akendeki mpo na kokunda bibembe, abomaki mibali nyonso ya Edomi.
16 Јер Јоав оста онде шест месеци са свим Израиљем докле не поби све мушкиње у Идумеји.
Joabi mpe bato nyonso ya Isalaele batikalaki kuna basanza motoba kino tango basilisaki koboma mibali nyonso ya Edomi.
17 Тада утече Адад с неколико Идумејаца, слуга оца свог, и отиде у Мисир; а Адад беше тада дете.
Kasi Adadi oyo azalaki nanu elenge na tango wana akimaki na Ejipito elongo na ndambo ya bato ya Edomi oyo bazalaki basali ya tata na ye.
18 И отишавши из Мадијана дођоше у Фаран; и узевши са собом људи из Фарана дођоше у Мисир к Фараону, цару мисирском, који му даде кућу и одреди му храну, и даде му и земље.
Balongwaki na Madiani mpe bakendeki na Parani. Wuta na Parani, bazwaki bato mpe bakendeki elongo na bango na Ejipito epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Faraon apesaki Adadi ndako, eteni ya mabele mpe bilei.
19 И Адад нађе велику милост у Фараона, те га ожени сестром жене своје, сестром царице Тахпенесе.
Lokola Faraon asepelaki na Adadi mingi, abalisaki ye semeki na ye ya mwasi, ndeko mwasi ya Takipenesi, mwasi ya mokonzi.
20 И сестра Тахпенесина роди му сина Генувата, ког отхрани Тахпенеса на двору Фараоновом, и беше Генуват на двору Фараоновом међу синовима Фараоновим.
Ndeko mwasi ya Takipenesi abotelaki Adadi mwana moko ya mobali mpe apesaki ye kombo « Genubati. » Takipenesi abokolaki ye kati na ndako ya Faraon. Genubati avandaki kuna elongo na bana ya Faraon.
21 А кад Адад чу у Мисиру да је Давид починуо код отаца својих и да је умро Јоав војвода, рече Адад Фараону: Пусти ме да идем у своју земљу.
Wana Adadi azalaki na Ejipito, ayokaki ete Davidi mpe Joabi, mokonzi ya mampinga, bakufi. Boye, Adadi alobaki na Faraon: — Pesa ngai nzela ete nazonga na mokili na ngai.
22 А Фараон му рече: А шта ти је мало код мене, те хоћеш да идеш у своју земљу? А он рече: Ништа; али ме пусти.
Faraon atunaki ye: — Ozangi eloko nini awa mpo ete oluka kozonga na mokili na yo? Adadi azongisaki: — Eloko moko te. Kasi tika ngai ete nakende kaka.
23 Подиже му Бог још једног противника, Резона сина Елијадиног, који беше побегао од господара свог Адад-Езера, цара совског.
Nzambe abimisaki monguna mosusu mpo na kobundisa Salomo; kombo na ye: Rezoni. Rezoni Azalaki mwana mobali ya Eliyada, oyo akimaki nkolo na ye, Adadezeri, mokonzi ya Tsoba.
24 И скупивши к себи људе поста старешина од чете кад их Давид уби; потом отишавши у Дамаск осташе онде и овладаше Дамаском.
Rezoni asangisaki mibali pene na ye mpe akomaki mokambi ya lisanga ya batomboki tango Davidi abomaki mampinga ya Tsoba. Bongo batomboki bakendeki na Damasi epai wapi bavandaki mpe bakomaki kokonza.
25 И беше противник Израиљев свега века Соломуновог, и то осим зла које чињаше Адад; и мржаше на Израиља царујући у Сирији.
Rezoni azalaki monguna ya Isalaele na tango nyonso oyo Salomo azalaki na bokonzi. Wana Adadi azalaki kotia Isalaele mobulu, Rezoni akomaki mokonzi ya Siri mpe akomaki kokanela Isalaele.
26 И Јеровоам син Наватов, Ефраћанин из Сариде, чија мати беше по имену Серуја жена удовица, слуга Соломунов, подиже се на цара.
Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, moto ya Efrayimi ya Tsereda, moko kati na basali ya Salomo, atombokelaki mokonzi. Mama na ye azalaki mwasi akufisa mobali, mpe kombo na ye: Tseruya.
27 А ово би узрок зашто се подиже на цара: Соломун грађаше Милон и зазиђиваше пролом града Давида, оца свог;
Tala ndenge atombokelaki mokonzi: na tango oyo Salomo azalaki kotonga Milo mpe kokanga madusu ya mir ya engumba ya Davidi, tata na ye,
28 А Јеровоам беше крепак и храбар; зато видећи Соломун младића да настаје за послом постави га над свим поданицима дома Јосифовог.
Jeroboami azalaki elenge mobali ya makasi mpe ya mpiko; lokola Salomo amonaki ndenge elenge mobali oyo azalaki kosala mosala na ye malamu, atiaki ye motambolisi misala nyonso ya makasi mpo na libota ya Jozefi.
29 Па у то време кад Јеровоам отиде из Јерусалима, нађе га на путу Ахија Силомљанин, пророк имајући на себи нову хаљину, и беху њих двојица сами у пољу.
Mokolo moko, wana Jeroboami azalaki kobima na Yelusalemi, Ayiya, mosakoli ya Silo, akutanaki na ye na nzela mpe alataki kazaka ya sika. Bazalaki kaka bango mibale na libanda ya mboka, kati na esobe.
30 И Ахија узе нову хаљину која беше на њему, и раздре је на дванаест комада.
Ayiya azwaki kazaka na ye ya sika oyo alataki, akataki yango na biteni zomi na mibale
31 И рече Јеровоаму: Узми десет комада; јер овако вели Господ Бог Израиљев: Ево истргнућу царство из руке Соломунове, и даћу теби десет племена.
mpe alobaki na Jeroboami: « Kamata biteni zomi mpo na yo, pamba te tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Nakobotola bokonzi na maboko ya Salomo mpe nakopesa yo bikolo zomi.
32 Само ће једно племе остати њему ради слуге мог Давида и ради града Јерусалима, који изабрах између свих племена Израиљевих.
Kasi mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, mpe mpo na engumba Yelusalemi oyo napona kati na mabota nyonso ya Isalaele, Salomo akozwa kaka libota moko.
33 Јер оставише мене и поклонише се Астароти, богињи сидонској и Хемосу богу моавском и Мелхому богу синова Амонових, и не ходише путевима мојим чинећи што је право преда мном, уредбе моје и законе моје, као Давид отац његов.
Nakosala bongo, pamba te basundolaki Ngai mpe bagumbamelaki Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni; Kemoshi, nzambe ya bato ya Moabi; mpe Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, batambolaki te na banzela na Ngai mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai, kobatela malako mpe mibeko na Ngai, ndenge Davidi, tata ya Salomo, asalaki.
34 Али нећу узети царство из руку његових, него ћу га оставити нека влада докле је год жив Давида ради слуге свог, ког изабрах, који је држао заповести моје и уредбе моје.
Kasi nakobotola te bokonzi nyonso na maboko ya Salomo, nakotika ye nanu kokonza na mikolo nyonso oyo akozala na bomoi, mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, oyo naponaki mpe abatelaki mitindo mpe malako na Ngai.
35 Него ћу узети царство из руку сина његовог, и даћу теби од њега десет племена.
Kasi nakobotola bokonzi na maboko ya mwana na ye ya mobali mpe nakopesa yo mabota zomi.
36 А сину ћу његовом дати једно племе да буде видело Давиду слузи мом вазда преда мном у граду Јерусалиму, који изабрах да у њему наместим име своје.
Nakopesa libota moko epai ya mwana na ye ya mobali mpo ete Davidi, mowumbu na Ngai, azala tango nyonso na mokitani liboso na Ngai kati na Yelusalemi, engumba oyo napona mpo na kotia Kombo na Ngai kati na yango.
37 Тебе ћу, дакле, узети да царујеш над свим шта ти душа жели, и бићеш цар над Израиљем.
Kasi mpo na yo, Jeroboami, nakozwa yo, mpe okokonza nyonso oyo motema na yo ekolinga mpe okozala mokonzi ya Isalaele.
38 И ако узаслушаш све што ти заповедим, и узидеш мојим путевима и ушчиниш што је право преда мном, држећи уредбе моје и заповести моје, као што је чинио Давид слуга мој, бићу с тобом и сазидаћу ти тврд дом, као што сам сазидао Давиду, и даћу ти Израиља.
Soki osali nyonso oyo Ngai nazali kotinda yo, soki otamboli na banzela na Ngai mpe osali makambo ya sembo na miso na Ngai, na kobatelaka mibeko mpe malako na Ngai ndenge Davidi, mowumbu na Ngai, asalaki, wana nakozala na yo elongo, nakosala ete bokonzi kati na libota na yo elendisama ndenge nasalaki epai ya Davidi, mpe nakopesa yo Isalaele.
39 И мучићу семе Давидово зато, али не свагда.
Na bongo, nakoyokisa ndako ya Davidi soni, kasi mpo na libela te. › »
40 Зато тражаше Соломун да убије Јеровоама; али се Јеровоам подиже и побеже у Мисир к Сисаку, цару мисирском, и би у Мисиру докле не умре Соломун.
Salomo alukaki koboma Jeroboami, kasi Jeroboami akimaki na Ejipito epai ya Shishaki, mokonzi ya Ejipito, avandaki kuna kino na kufa ya Salomo.
41 А остала дела Соломунова и шта је год чинио, и мудрост његова, није ли то записано у књизи дела Соломунових?
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Salomo, misala na ye nyonso mpe bwanya na ye, ekomama kati na buku ya misala ya Salomo.
42 А царова Соломун у Јерусалиму над свим Израиљем четрдесет година.
Salomo akonzaki Isalaele mobimba mibu tuku minei, na Yelusalemi.
43 И почину Соломун код отаца својих, и би погребен у граду Давида, оца свог; а Ровоам, син његов, зацари се на његово место.
Sima na yango, Salomo akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Mwana na ye, Roboami, akitanaki na ye na bokonzi.