< 1 Књига дневника 22 >

1 И рече Давид: Ово је кућа Господа Бога и ово је олтар за жртву паљеницу Израиљу.
Davidi alobaki: « Tempelo ya Yawe Nzambe mpe etumbelo ya mbeka ya kotumba mpo na Isalaele ekozala na esika oyo. »
2 И заповеди Давид да се скупе иностранци који беху у земљи Израиљевој, и одреди каменаре да тешу камен да се гради дом Божји.
Boye, Davidi apesaki mitindo ya kosangisa bapaya oyo bazalaki kovanda na Isalaele. Mpe kati na bango, aponaki bato oyo bakataka mabanga mpo na kotonga Ndako ya Nzambe.
3 И гвожђа много за клине на крила вратима и на саставке приправи Давид, и бронзе много без мере,
Davidi apesaki bibende ebele mpo na kosala basete mpe bibende oyo esimbaka bikuke. Apesaki lisusu bronze ebele oyo bakoki kotanga te,
4 И дрва кедрових без броја; јер довожаху Сидонци и Тирци много дрва кедрових Давиду.
banzete ebele ya sedele oyo bakoki kotanga te, pamba te bato ya Tiri mpe ya Sidoni bamemelaki Davidi banzete yango ebele.
5 Јер Давид говораше: Соломун је син мој дете младо, а дом који треба зидати Господу треба да буде врло велик за славу и дику по свим земљама; зато ћу му приправити шта треба. И приправи Давид мноштво пре смрти своје.
Davidi alobaki: « Salomo, mwana na ngai ya mobali, azali nanu elenge mpe ayebi nanu makambo malamu te. Nzokande, Ndako oyo esengeli kotongama mpo na Yawe esengeli kozala monene, kitoko mpe na lokumu mingi na miso ya bikolo nyonso. Yango wana, nakobongisa biloko mpo na Ndako yango. » Boye Davidi abongisaki biloko ebele liboso ete akufa.
6 Потом дозва сина свог Соломуна и заповеди му да сазида дом Господу Богу Израиљевом.
Davidi abengisaki Salomo, mwana na ye ya mobali, mpe apesaki ye mokumba ya kotonga Ndako mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele.
7 И рече Давид Соломуну: Сине! Био сам наумио да сазидам дом имену Господа Бога свог.
Davidi alobaki na Salomo: « Mwana na ngai, nazwaki likanisi ya kotonga Ndako mpo na Kombo na Yawe, Nzambe na ngai;
8 Али ми дође реч Господња говорећи: Много си крви пролио и велике си ратове водио; нећеш ти сазидати дом имену мом, јер си много крви пролио на земљу преда мном.
kasi tala maloba oyo Yawe alobaki na ngai: ‹ Osopaki makila ebele mpe obundaki bitumba ebele. Okoki te kotonga ndako mpo na Kombo na Ngai; pamba te kati na mokili, osopaki makila ebele na miso na Ngai.
9 Ево, родиће ти се син, он ће бити миран човек и смирићу га од свих непријатеља његових унаоколо; зато ће му бити име Соломун; и мир и покој даћу Израиљу за његовог времена.
Kasi okozala na mwana moko ya mobali oyo akozala moto ya kimia mpe ya boboto. Nakopesa ye bopemi liboso ya banguna na ye nyonso oyo bazingeli ye. Kombo na ye ekozala Salomo; mpe na mikolo nyonso oyo ye akozala mokonzi, nakopesa kimia mpe bopemi na Isalaele.
10 Он ће сазидати дом имену мом, и он ће ми бити син, а ја њему Отац, и утврдићу престо царства његовог над Израиљем довека.
Ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai. Akozala mwana mpo na Ngai, mpe Ngai nakozala Tata mpo na ye, nakolendisa kiti na ye ya bokonzi kati na Isalaele mpo na libela. ›
11 Зато, сине, Господ ће бити с тобом, и бићеш срећан, те ћеш сазидати дом Господа Бога свог као што је говорио за те.
Sik’oyo, mwana na ngai, tika ete Yawe azala elongo na yo mpo ete otonga Ndako mpo na Yawe, Nzambe na yo, ndenge alobaki na tina na yo!
12 Само да ти да Господ разум и мудрост кад те постави над Израиљем да држиш закон Господа Бога свог.
Tika ete apesa yo bwanya mpe mayele, mpo ete tango okokoma mokonzi ya Isalaele, okoka kobatela mobeko ya Yawe Nzambe na yo!
13 Тада ћеш бити срећан, ако уздржиш и уствориш уредбе и законе које је заповедио Господ преко Мојсија Израиљу. Буди слободан и храбар, не бој се и не плаши се.
Boye, okolonga soki obateli malamu bikateli mpe mibeko oyo Yawe apesaki na Moyize mpo na Isalaele. Zala makasi mpe yika mpiko! Kobanga te mpe kozonga sima te!
14 И ево у невољи својој приправио сам за дом Господњи, сто хиљада таланата злата и хиљаду хиљада таланата сребра; а бронзе и гвожђа без мере, јер га има много, такође и дрва и камења приправио сам; а ти додај још.
Tala, namonaki pasi mpo na kosangisa mpo na Tempelo ya Yawe, minkoko misato ya kilo ya wolo, minkoko tuku misato ya kilo ya palata, bronze mpe bibende ebele oyo bakoki kotanga te, mabaya mpe mabanga. Boye yo mpe okoki kobakisa mosusu.
15 А имаш и посленика много, каменара и зидара и дрводеља, и свакојаких људи вештих сваком послу.
Ozali na bato ebele ya misala ya maboko: bato oyo bakataka mabanga, bato oyo basalaka misala ya mabaya mpe bato oyo basalaka misala nyonso ya maboko.
16 Има злата, сребра, и бронзе и гвожђа без мере; настани дакле и ради, и Господ ће бити с тобом.
Ozali na wolo, palata, bronze mpe bibende ebele oyo bakoki kotanga te. Sik’oyo, banda mosala; mpe tika ete Yawe azala na yo elongo! »
17 Потом заповеди Давид свим кнезовима Израиљевим да помажу Соломуну, сину његовом:
Mpe Davidi apesaki mitindo epai ya bakambi nyonso ya Isalaele ete basunga mwana na ye Salomo.
18 Није ли с вама Господ Бог ваш, који вам је дао мир од свуда? Јер је дао у руке моје становнике ове земље, и земља је покорена Господу и народу Његовом.
Alobaki na bango: « Boni, Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino te? Apesaki bino bopemi na ngambo nyonso te? Pamba te akabaki na maboko na ngai bato ya mokili oyo. Mokili yango ezali na se ya bokonzi ya Yawe mpe ya bato na Ye.
19 Сада, дакле, управите срце своје и душу своју да тражите Господа Бога свог; настаните и зидајте светињу Господу Богу да унесете ковчег завета Господњег и свето посуђе Божије у дом који ће се сазидати имену Господњем.
Sik’oyo, bobongisa mitema mpe milimo na bino mpo na koluka Yawe, Nzambe na bino. Bobanda kotonga Esika ya bule ya Yawe Nzambe mpo ete boyeisa Sanduku ya Boyokani ya Yawe mpe biloko ya bule ya Nzambe, na Tempelo oyo ekotongama mpo na Kombo na Yawe. »

< 1 Књига дневника 22 >