< Psalmi 47 >
1 Svi narodi, zaplještite rukama, pokliknite Bogu glasom radosnijem.
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko! Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.
2 Jer je višnji Gospod strašan, car veliki nad svom zemljom.
Tala ndenge nini Yawe, Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo! Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba.
3 Pokori nam narode i plemena pod noge naše.
Atiaki bikolo na se na biso, mpe mabota na se ya bokonzi na biso.
4 Izbra nam dostojanje naše, krasotu Jakova, koji mu omilje.
Aponelaki biso libula na biso, oyo ezali lokumu ya Jakobi, molingami na Ye.
5 Ide Bog uz podvikivanje, Gospod uz glas trubni.
Nzambe amataki kati na koganga ya esengo; Yawe ayaka kati na lokito ya kelelo.
6 Pojte Bogu, pojte; pojte caru našemu, pojte;
Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe, boyemba mpo na lokumu na Ye. Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso, boyemba mpo na lokumu na Ye.
7 Jer je Bog car od sve zemlje, pojte pjesmu.
Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba; boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye.
8 Bog caruje nad narodima; Bog sjedi na svetom prijestolu svom.
Nzambe akonzaka bikolo nyonso; Nzambe avandi na Kiti na Ye ya bule.
9 Knezovi narodni sastavljaju se s narodom Boga Avramova. Jer su štitovi zemaljski Božiji. Da je uzvišen!
Bato minene ya bikolo basangani, lokola bato ya Nzambe ya Abrayami, pamba te bilombe ya mokili bazali ya Nzambe; atombwama makasi.