< Psalmi 22 >
1 Bože, Bože moj! zašto si me ostavio udaljivši se od spasenja mojega, od rijeèi vike moje?
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, ya koyemba lokola nzembo na kombo « Mboloko ya tongo. » Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai? Mpo na nini otelemi mosika? Mpo na nini ozali kobikisa ngai te? Mpo na nini ozali koyoka te koganga na ngai?
2 Bože moj! vièem danju, a ti me ne slušaš, i noæu, ali nemam mira.
Nzambe na ngai, na moyi, nabeleli Yo, kasi oyanoli ngai te; na butu, nabeleli lisusu, mpe natikali kovanda nye te.
3 Sveti, koji živiš u pohvalama Izrailjevim!
Nzokande, ozali Mosantu, ovandaka na Kiti na Yo ya Bokonzi, kati na masanzoli ya Isalaele.
4 U tebe se uzdaše oci naši, uzdaše se, i ti si ih izbavljao.
Batata na biso batiaki elikya na bango kati na Yo, bamipesaki epai na Yo, mpe okangolaki bango.
5 Tebe prizivaše, i spasavaše se; u tebe se uzdaše, i ne ostajaše u sramoti.
Bagangaki epai na Yo, mpe Yo okangolaki bango; batiaki elikya na bango kati na Yo mpe bayokisamaki soni te.
6 A ja sam crv, a ne èovjek; potsmijeh ljudima i rug narodu.
Nazali lisusu moto te, kasi mutsopi; bato nyonso bazali kofinga mpe kotiola ngai.
7 Koji me vide, svi mi se rugaju, razvaljuju usta, mašu glavom,
Bato nyonso oyo bazali komona ngai bazali koseka ngai, bazali kokamwa, koningisa mito mpe koloba:
8 I govore: oslonio se na Gospoda, neka mu pomože, neka ga izbavi, ako ga miluje.
« Atiaka motema na ye epai na Yawe; tika ete Yawe abikisa ye! Tika ete Yawe akangola ye, pamba te asepelaka na Ye! »
9 Ta, ti si me izvadio iz utrobe; ti si me umirio na sisi matere moje.
Solo, Yawe, obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai, obatelaki ngai na kimia na tolo na ye.
10 Za tobom pristajem od roðenja, od utrobe matere moje ti si Bog moj.
Wuta mbotama na ngai, batikaki ngai na maboko na Yo; wuta libumu ya mama na ngai, ozali Nzambe na ngai.
11 Ne udaljuj se od mene; jer je nevolja blizu, a nema pomoænika.
Kozala mosika na ngai te, pamba te pasi ekomi pene mpe nazangi moto oyo akosunga ngai.
12 Opteèe me mnoštvo telaca; jaki volovi Vasanski opkoliše me;
Banguna na ngai bazingeli ngai lokola lisanga ya bangombe ya mibali, bazingeli ngai lokola banyama mabe oyo ezalaka na Bashani;
13 Razvališe na me usta svoja. Lav je gladan lova i rièe.
mpe bafungoleli ngai makasi minoko na bango lokola nkosi oyo etomboki mpe ezali kolia nyama.
14 Kao voda razlih se; rasuše se sve kosti moje; srce moje posta kao vosak, rastopilo se u meni.
Nakomi lokola mayi oyo ezali kosopana, mpe mikuwa na ngai nyonso ekabwani; motema na ngai ekomi lokola mafuta oyo ezali konyangwama kati na ngai.
15 Sasuši se kao crijep krjepost moja, i jezik moj prionu za grlo, i u prah smrtni meæeš me.
Makasi na ngai ekawuki lokola potopoto, mpe nazali kokoka lisusu koloba te; otie ngai pembeni ya lilita.
16 Opkoliše me psi mnogi; èeta zlikovaca ide oko mene, probodoše ruke moje i noge moje.
Bambwa ezingeli ngai, ngulupa ya bato mabe bayei kobundisa ngai, bazali kotambola zingazinga na ngai; bakangi maboko mpe makolo na ngai na basinga.
17 Mogao bih izbrojiti sve kosti svoje. Oni gledaju, i od mene naèiniše stvar za gledanje.
Nakoki sik’oyo kotanga ata mikuwa na ngai nyonso; kasi bato bazali kotala mpe koseka ngai,
18 Dijele haljine moje meðu sobom, i za dolamu moju bacaju ždrijeb.
bazali kokabola bilamba na ngai mpe kobeta zeke mpo na nzambala na ngai.
19 Ali ti, Gospode, ne udaljuj se. Silo moja, pohitaj mi u pomoæ.
Kasi Yo, Yawe, kozala mosika te! Ozali makasi na ngai; yaka noki kosunga ngai.
20 Izbavi od maèa dušu moju, od psa jedinicu moju.
Bikisa bomoi na ngai liboso ya mopanga, mpe kangola yango wuta na manzaka ya bambwa.
21 Saèuvaj me od usta lavovijeh, i od rogova bivolovih, èuvši, izbavi me.
Bikisa ngai wuta na monoko ya nkosi mpe na maseke ya mpakasa.
22 Kazujem ime tvoje braæi; usred skupštine hvaliæu te.
Nakotatola Kombo na Yo epai ya bandeko na ngai, mpe nakokumisa Yo kati na mayangani.
23 Koji se bojite Gospoda, hvalite ga. Sve sjeme Jakovljevo! poštuj ga. Boj ga se, sve sjeme Izrailjevo!
Bino bato oyo botosaka Yawe, bosanzola Ye! Bino nyonso bana ya Jakobi, bopesa Ye lokumu! Bino nyonso bana ya Isalaele, botosa Ye!
24 Jer se ne ogluši molitve ništega niti je odbi; ne odvrati od njega lica svojega, nego ga usliši kad ga zazva.
Pamba te Yawe atiolaki te mpe abwakaki te mobola; apesaka ye mokongo te mpe ayokaka ye tango asengaka lisungi.
25 Tebe æu hvaliti na skupštini velikoj; zavjete svoje svršiæu pred onima koji se njega boje.
Na ngolu na Yo, nakumisaka Yo kati na mayangani, nakokisaka bandayi na ngai na miso ya bato oyo batosaka Yo.
26 Neka jedu ubogi i nasite se, i neka hvale Gospoda koji ga traže; živo da bude srce vaše dovijeka.
Babola bakolia mpe bakotonda; bato oyo balukaka Yawe bakosanzola Ye. Tika ete bozala na bomoi libela na libela.
27 Opomenuæe se i obratiæe se ka Gospodu svi krajevi zemaljski, i pokloniæe se pred njim sva plemena neznabožaèka.
Mokili mobimba ekokanisa Yawe, ekomipesa epai na Ye; mpe bituka nyonso ya bikolo ekogumbama liboso na Ye.
28 Jer je Gospodnje carstvo; on vlada narodima.
Pamba te Yawe azali Mokonzi, azali kokonza bikolo.
29 Ješæe i pokloniæe se svi pretili na zemlji; pred njim æe pasti svi koji slaze u prah, koji ne mogu saèuvati duše svoje u životu.
Bazwi nyonso ya mokili bakolia mpe bakogumbamela Ye; bato nyonso oyo bazali kokende na kunda, ba-oyo bakoki te komibatela na bomoi, bakogumbama liboso na Ye.
30 Sjeme æe njihovo služiti njemu. Kazivaæe se za Gospoda rodu potonjemu.
Bakitani na bango bakosalela Yawe mpe bakopanza sango na Ye epai ya ekeke oyo ekoya na sima;
31 Doæi æe, i kazivaæe pravdu njegovu ljudima njegovijem, koji æe se roditi; jer je on uèinio ovo.
bakosakola misala ya bosembo na Ye, epai ya bato oyo bakobotama.