< Jovanu 20 >
1 A u prvi dan nedjelje doðe Marija Magdalina na grob rano, još dok se ne bješe rasvanulo, i vidje da je kamen odvaljen od groba.
Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, wana molili ezalaki nanu, Mari, moto ya mboka Magidala, akendeki na kunda mpe amonaki ete libanga esilaki kolongolama na ekotelo ya kunda.
2 Onda otrèa, i doðe k Simonu Petru i k drugom uèeniku koga ljubljaše Isus, i reèe im: uzeše Gospoda iz groba; i ne znamo gdje ga metnuše.
Apotaki mbangu mpo na kokende kokutana na Simona Petelo mpe moyekoli mosusu, ye oyo Yesu azalaki kolinga; alobaki na bango: — Balongoli Nkolo wuta na kunda, mpe toyebi te soki batie Ye wapi!
3 A Petar iziðe i drugi uèenik, i poðoše ka grobu.
Petelo elongo na moyekoli wana bakendeki na kunda.
4 Trèahu pak oba zajedno, i drugi uèenik trèaše brže od Petra, i doðe prije ka grobu.
Bango mibale bazalaki kopota mbangu nzela moko; kasi lokola moyekoli wana azalaki mbangu koleka Petelo, akomaki moto ya liboso na kunda.
5 I nadvirivši se vidje haljine gdje leže; ali ne uðe.
Agunzamaki mpo na kotala mpe amonaki, na mabele, maputa oyo bakundaki na yango Yesu; kasi akotaki te.
6 Doðe pak Simon Petar za njim, i uðe u grob, i vidje haljine same gdje leže,
Simona Petelo oyo azalaki kolanda ye akomaki mpe akotaki kati na kunda, amonaki maputa oyo ezalaki na mabele
7 I ubrus koji bješe na glavi njegovoj ne s haljinama da leži nego osobito savit na jednom mjestu.
mpe elamba oyo balingaki na moto ya Yesu; elamba ezalaki esika moko te na maputa oyo balingaki na yango nzoto ya Yesu, kasi ezalaki ya kolingama na esika na yango moko.
8 Tada dakle uðe i drugi uèenik koji najprije doðe ka grobu, i vidje i vjerova.
Bongo moyekoli oyo akomaki moto ya liboso kuna na kunda, ye mpe akotaki kati na kunda; amonaki mpe andimaki.
9 Jer još ne znadijahu pisma da njemu valja ustati iz mrtvijeh.
Kasi kino na tango wana, basosolaki nanu te ete Yesu asengelaki kosekwa kati na bakufi, kolanda ndenge Makomi ezali koloba.
10 Onda otidoše opet uèenici doma.
Sima na yango, bayekoli nyonso mibale bazongaki na esika oyo bazalaki kovanda.
11 A Marija stajaše napolju kod groba i plakaše. I kad plakaše nadviri se nad grob,
Nzokande, Mari atelemaki na libanda, pene ya kunda, mpe azalaki kolela. Mpe wana azalaki kolela, agunzamaki mpo na kotala kati na kunda;
12 I vidje dva anðela u bijelijem haljinama gdje sjede jedan èelo glave a jedan èelo nogu gdje bješe ležalo tijelo Isusovo.
amonaki ba-anjelu mibale balata bilamba ya pembe mpe bavanda na esika oyo nzoto ya Yesu ezalaki: moko na ngambo ya moto, mpe mosusu, na ngambo ya makolo.
13 I rekoše joj oni: ženo! što plaèeš? Reèe im: uzeše Gospoda mojega, i ne znam gdje ga metnuše.
Ba-anjelu batunaki ye: — Mwasi, mpo na nini ozali kolela? Azongisaki: — Nazali kolela mpo ete balongoli Nkolo na ngai mpe nayebi te soki batie Ye wapi?
14 I ovo rekavši obazre se natrag, i vidje Isusa gdje stoji, i ne znadijaše da je Isus.
Tango alobaki bongo, abalukaki mpe amonaki Yesu atelemi wana, kasi ayebaki te ete ezali Yesu.
15 Isus joj reèe: ženo! što plaèeš? koga tražiš? A ona misleæi da je vrtar reèe mu: gospodine! ako si ga ti uzeo kaži mi gdje si ga metnuo, i ja æu ga uzeti.
Yesu atunaki ye: — Mwasi, mpo na nini ozali kolela? Ozali koluka nani? Mari akanisaki ete azali mosali elanga; alobaki na ye: — Tata, soki yo nde moto olongolaki Ye, yebisa ngai esika nini otie Ye mpo ete nakende kokamata Ye.
16 Isus joj reèe: Marija! A ona obazrevši se reèe mu: Ravuni! koje znaèi uèitelju.
Yesu alobaki na ye: — Mari! Mari abalukaki mpe alobaki na lokota ya Ebre: — Rabuni!
17 Reèe joj Isus: ne dohvataj se do mene, jer se još ne vratih k ocu svojemu; nego idi k braæi mojoj, i kaži im: vraæam se k ocu svojemu i ocu vašemu, i Bogu svojemu i Bogu vašemu.
Yesu alobaki na ye: — Kosimba Ngai te, pamba te nanu namati te epai ya Tata na Ngai. Kende nde epai ya bandeko na Ngai mpe yebisa bango ete nakeyi epai ya Tata na Ngai, oyo azali mpe Tata na bino; epai ya Nzambe na Ngai, oyo azali mpe Nzambe na bino.
18 A Marija Magdalina otide, i javi uèenicima da vidje Gospoda i kaza joj ovo.
Mari, moto ya mboka Magidala, akendeki koyebisa bayekoli ete awuti komona Nkolo; ayebisaki bango lisusu makambo oyo Nkolo alobaki na ye.
19 A kad bi uveèe onaj prvi dan nedjelje, i vrata bijahu zatvorena gdje se bijahu uèenici njegovi skupili od straha Jevrejskoga, doðe Isus i stade na srijedu i reèe im: mir vam.
Na pokwa ya mokolo wana ya liboso ya poso, wana bayekoli basanganaki esika moko kati na ndako mpe bakangaki malamu bikuke mpo ete bazalaki kobanga bakonzi ya Bayuda, Yesu ayaki, atelemaki na kati-kati na bango mpe alobaki: — Tika ete kimia ezala na bino!
20 I ovo rekavši pokaza im ruke i rebra svoja. Onda se uèenici obradovaše vidjevši Gospoda.
Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko na Ye mpe mopanzi na Ye. Bayekoli batondaki na esengo tango bamonaki Nkolo.
21 A Isus im reèe opet: mir vam; kao što otac posla mene, i ja šaljem vas.
Yesu alobaki na bango lisusu: — Tika ete kimia ezala na bino! Ndenge Tata atindaki Ngai, Ngai mpe nazali kotinda bino.
22 I ovo rekavši dunu, i reèe im: primite Duh sveti.
Sima na Yesu koloba makambo wana, afulaki bango mopepe mpe alobaki na bango: — Boyamba Molimo Mosantu!
23 Kojima oprostite grijehe, oprostiæe im se; i kojima zadržite, zadržaæe se.
Bato oyo bokolimbisa masumu na bango, masumu na bango ekolimbisama; kasi ba-oyo bokolimbisa te, bakozwa mpe bolimbisi te.
24 A Toma koji se zove Blizanac, jedan od dvanaestorice, ne bješe ondje s njima kad doðe Isus.
Toma, moko kati na bayekoli zomi na mibale, oyo babengaka Lipasa, azalaki te elongo na bayekoli tango Yesu ayaki.
25 A drugi mu uèenici govorahu: vidjesmo Gospoda. A on im reèe: dok ne vidim na rukama njegovijem rana od klina, i ne metnem prsta svojega u rane od klina, i ne metnem ruke svoje u rebra njegova; neæu vjerovati.
Bayekoli mosusu balobaki na ye: — Towuti komona Nkolo! Kasi Toma azongiselaki bango: — Soki ngai namoni te bilembo ya basete na maboko na Ye, soki natie mosapi na ngai te kati na bisika oyo basete etobolaki Ye, mpe soki natie te loboko na ngai kati na mopanzi na Ye, nakotikala kondima te.
26 I poslije osam dana opet bijahu uèenici njegovi unutra, i Toma s njima. Doðe Isus kad bijahu vrata zatvorena, i stade meðu njima i reèe: mir vam.
Sima na mikolo mwambe, bayekoli ya Yesu basanganaki lisusu kati na ndako. Na mbala oyo, Toma mpe azalaki elongo na bango, mpe bikuke ezalaki ya kokangama. Yesu ayaki, atelemaki kati na bango mpe alobaki: — Tika ete kimia ezala na bino!
27 Potom reèe Tomi: pruži prst svoj amo i viði ruke moje; i pruži ruku svoju i metni u rebra moja, i ne budi nevjeran nego vjeran.
Bongo, alobaki na Toma: — Tia mosapi na yo awa, tala maboko na Ngai; sembola loboko na yo mpe tia yango na mopanzi na Ngai. Kozala te moto oyo azangi kondima, kasi moto na kondima!
28 I odgovori Toma i reèe mu: Gospod moj i Bog moj.
Toma azongiselaki Yesu: — Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai!
29 Isus mu reèe: pošto me vidje vjerovao si; blago onima koji ne vidješe i vjerovaše.
Yesu alobaki na ye: — Ondimi mpo ete omoni Ngai! Esengo na bato oyo bamoni te, kasi bandimi!
30 A i mnoga druga èudesa uèini Isus pred uèenicima svojijem koja nijesu pisana u knjizi ovoj.
Yesu asalaki lisusu, na miso ya bayekoli na Ye, bikamwa mosusu mingi oyo ekomami te kati na buku oyo.
31 A ova se napisaše, da vjerujete da Isus jest Hristos sin Božij, i da vjerujuæi imate život u ime njegovo.
Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.