< Jeremija 37 >

1 Potom carova Sedekija sin Josijin mjesto Honije sina Joakimova, kojega postavi carem u zemlji Judinoj Navuhodonosor car Vavilonski.
Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akomisaki Sedesiasi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda na esika ya Konia, mwana mobali ya Yeoyakimi.
2 Ali ni on ni sluge njegove ni narod zemaljski ne slušahu rijeèi Gospodnjih koje govoraše preko Jeremije proroka.
Ezala ye, bakalaka na ye ya lokumu mpe bato ya mokili, moko te ayokaki na bokebi maloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi.
3 I posla car Sedekija Jeuhala sina Selemijina, i Sofoniju sina Masijina sveštenika k Jeremiji proroku, te mu rekoše: pomoli se za nas Gospodu Bogu našemu.
Mokonzi Sedesiasi atindaki Yewukali, mwana mobali ya Shelemia, mpe Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, epai ya mosakoli Jeremi mpo ete bayebisa ye maloba oyo: « Nabondeli yo, bondela Yawe, Nzambe na biso, mpo na biso! »
4 I Jeremija iðaše meðu narod i još ga ne bjehu metnuli u tamnicu.
Na tango wana, Jeremi azalaki na bonsomi ya kotambola na esika oyo alingi kati na bato, pamba te batiaki ye nanu na boloko te.
5 I vojska Faraonova izide iz Misira, a Haldejci koji bijahu Jerusalim èuvši glas o njoj otidoše od Jerusalima.
Tango basoda ya Babiloni, oyo bazingelaki engumba Yelusalemi bayokaki sango ete basoda ya Faraon babimi na Ejipito, batikaki kozingela Yelusalemi.
6 A rijeè Gospodnja doðe Jeremiji proroku govoreæi:
Bongo tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi:
7 Ovako veli Gospod Bog Izrailjev: ovako recite caru Judinu, koji vas je poslao k meni da me pitate: evo vojska Faraonova koja poðe vama u pomoæ, vratiæe se u svoju zemlju, u Misir.
« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: Yebisa mokonzi ya Yuda oyo atindi yo kotuna toli epai na Ngai: ‹ Basoda ya Faraon oyo babimaki na mokili na bango mpo na koya kosunga yo bakozonga na mokili na bango, na Ejipito;
8 A Haldejci æe opet doæi i opkoliæe taj grad i uzeæe ga i spaliæe ga ognjem.
mpe basoda ya Babiloni bakozonga mpe bakobundisa engumba oyo; bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. ›
9 Ovako veli Gospod: ne varajte se govoreæi: otiæi æe od nas Haldejci; jer neæe otiæi.
Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Bokanisa te ete bato ya Babiloni bakolongwa na mokili na bino. Te! Bakolongwa te. ›
10 I da pobijete svu vojsku Haldejsku, koja æe se biti s vama, i da ih ostane nekoliko ranjenika, i oni æe ustati iz svojih šatora i spaliti taj grad ognjem.
Ezala soki bolongi basoda nyonso ya Babiloni, oyo bazali kobundisa bino mpe etikali kaka ndambo ya bato oyo bazoki-zoki bapota, bakolonga kotelema kati na bandako na bango ya kapo mpe kobima mpo na kobebisa engumba oyo na moto. »
11 A kad otide vojska Haldejska od Jerusalima radi vojske Faraonove,
Sima na basoda ya Babiloni kotika kozingela Yelusalemi likolo ya basoda ya Faraon, oyo bazalaki kopusana,
12 Izide Jeremija iz Jerusalima da bi otišao u zemlju Venijaminovu i uklonio se odande meðu narod.
Jeremi alingaki kobima na Yelusalemi mpo ete akende kozwa, kati na etuka ya Benjame, libula na ye ya mabele kati na bato ya kuna.
13 Ali kad bijaše na vratima Venijaminovijem, ondje bijaše starješina stražarski po imenu Jereja sin Selemije sina Ananijina, te uhvati Jeremiju proroka govoreæi: ti bježiš ka Haldejcima.
Kasi tango akomaki na Ekuke ya Benjame, mokambi ya bakengeli ya mokonzi, oyo kombo na ye ezalaki Iriya, mwana mobali ya Shelemia, mwana mobali ya Anania, akangaki mosakoli Jeremi mpe atunaki ye: — Boni, ozali kokende na ngambo ya bato ya Babiloni?
14 A Jeremija reèe: nije istina, ne bježim ka Haldejcima. Ali ga ne htje slušati, nego uhvati Jereja Jeremiju i odvede ka knezovima.
Jeremi azongisaki: — Te! Ezali lokuta, nazali kokende na ngambo ya bato ya Babiloni te! Kasi Iriya aboyaki koyoka ye, akangaki ye kaka mpe amemaki ye epai ya bakambi.
15 A knezovi se razgnjeviše na Jeremiju, i izbiše ga, i metnuše ga u tamnicu u kuæi Jonatana pisara, jer od nje bijahu naèinili tamnicu.
Bakambi batombokelaki Jeremi makasi, babetaki ye mpe batiaki ye na ndako ya Jonatan, mokomi mikanda, ndako oyo bakomisaki boloko.
16 A kad Jeremija uljeze u jamu, u tamnicu, osta ondje dugo vremena.
Babwakaki Jeremi kati na boloko ya se ya mabele epai wapi awumelaki tango molayi.
17 Potom posla car Sedekija, te ga izvadi, i upita ga u svojoj kuæi nasamo, i reèe mu govoreæi: ima li rijeè od Gospoda? A Jeremija reèe: ima. Još reèe: biæeš predan u ruke caru Vavilonskomu.
Mokolo moko, mokonzi Sedesiasi atindaki ete bakende kozwa ye mpe bamema ye na ndako ya mokonzi epai wapi atunaki ye na nkuku: — Boni, ozali ata na liloba moko te kowuta epai na Yawe? Jeremi azongisaki: — Solo, liloba ezali! Okokweya na maboko ya mokonzi ya Babiloni.
18 Potom reèe Jeremija caru Sedekiji: šta sam ti skrivio ili slugama tvojim ili tomu narodu, te me metnuste u tamnicu?
Bongo Jeremi alobaki lisusu na mokonzi Sedesiasi: — Mabe nini penza ngai nasali yo to bakalaka na yo to mpe bato na yo mpo ete bobwaka ngai kati na boloko oyo?
19 I gdje su vaši proroci koji vam prorokuju govoreæi: neæe doæi car Vavilonski na vas ni na ovu zemlju?
Wapi basakoli na bino oyo bazalaki koloba ete mokonzi ya Babiloni akoya te kobundisa bino mpe mokili na bino?
20 Sada dakle poslušaj, care gospodaru moj, pusti preda se molbu moju, nemoj me vraæati u kuæu Jonatana pisara, da ne umrem ondje.
Kasi sik’oyo mokonzi, nkolo na ngai, nabondeli yo: yoka ngai! Tika ete mabondeli na ngai ekoma liboso na yo: kozongisa ngai te kati na ndako ya Jonatan, mokomi mikanda, noki te nakokufa kuna!
21 Tada zapovjedi car Sedekija da zatvore Jeremiju u trijem od tamnice i da mu daju svaki dan po hljeb s ulice hljebarske, dokle traje hljeba u gradu. Tako sjeðaše Jeremija u trijemu od tamnice.
Mokonzi Sedesiasi apesaki mitindo ete batia Jeremi kati na lopango ya bakengeli mpe bapesaka ye, mokolo na mokolo, lipa moko oyo ekobanda kowuta na balabala ya bato oyo basalaka mapa, kino tango mapa ekosila kati na engumba. Boye, Jeremi avandaki kati na lopango ya bakengeli.

< Jeremija 37 >