< Postanak 37 >
1 A Jakov življaše u zemlji gdje mu je otac bio došljak, u zemlji Hananskoj.
Jakobi avandaki na mokili ya Kanana epai wapi tata na ye azalaki kovanda.
2 Ovo su dogaðaji Jakovljevi. Josif kad bješe momak od sedamnaest godina, pasijaše stoku s braæom svojom, koju rodiše Vala i Zelfa žene oca njegova; i donošaše Josif zle glasove o njima ocu svojemu.
Tala molongo ya libota ya Jakobi. Elenge mobali Jozefi azalaki na mibu zomi na sambo ya mbotama mpe azalaki kobatela bibwele. Azalaki kosala mosala yango elongo na bandeko na ye ya mibali, bana ya Bila mpe ya Zilipa, basi ya tata na ye. Jozefi azalaki koyebisa tata na bango makambo mabe ya bandeko na ye.
3 A Izrailj ljubljaše Josifa najveæma izmeðu svijeh sinova svojih, jer mu se rodio pod starost; i naèini mu šarenu haljinu.
Isalaele azalaki kolinga Jozefi mingi koleka bana na ye nyonso, pamba te abotaki ye na kimobange. Asalelaki ye elamba ya kitoko mpe ya talo.
4 A braæa videæi gdje ga otac ljubi najveæma izmeðu sve braæe njegove, stadoše mrziti na nj tako da mu ne mogahu lijepe rijeèi progovoriti.
Tango bandeko na ye ya mibali bamonaki ete tata na bango azali kolinga ye koleka bango nyonso, bayinaki ye mpe bakokaki lisusu te koloba na ye na motema malamu.
5 Uz to usni Josif san i pripovjedi braæi svojoj, te oni još veæma omrznu na nj.
Jozefi alotaki ndoto mpe tango ayebisaki yango epai ya bandeko na ye ya mibali, bayinaki ye lisusu makasi.
6 Jer im reèe: da èujete san što sam snio:
Alobaki na bango: — Boyoka ndoto oyo nalotaki:
7 Vezasmo snoplje u polju, pa moj snop usta i ispravi se, a vaši snopovi iðahu unaokolo i klanjahu se snopu mojemu.
« Tozalaki kokanga maboke ya ble kati na bilanga. Mbala moko, liboke na ngai elamuki mpe etelemi ngwi; bongo maboke na bino, oyo ezalaki zingazinga ya liboke na ngai, egumbamaki liboso ya liboke na ngai. »
8 Tada mu braæa rekoše: da neæeš još biti car nad nama i zapovijedati nam? Stoga još veæma stadoše mrziti na nj radi sanova njegovijeh i radi rijeèi njegovijeh.
Bandeko na ye ya mibali balobaki na ye: — Okanisi ete okokoma mokonzi na biso mpe okokonza biso? Bongo bayinaki ye lisusu koleka likolo ya ndoto na ye mpe likolo ya makambo oyo alobaki.
9 Poslije opet usni drugi san, i pripovjedi braæi svojoj govoreæi: usnih opet san, a to se sunce i mjesec i jedanaest zvijezda klanjahu meni.
Alotaki lisusu ndoto mosusu mpe ayebisaki yango epai ya bandeko na ye ya mibali. Alobaki: — Boyoka, naloti lisusu ndoto mosusu: « Namonaki moyi, sanza mpe minzoto zomi na moko kogumbama liboso na ngai. »
10 A pripovjedi i ocu svojemu i braæi svojoj; ali ga otac prekori i reèe mu: kakav je to san što si snio? eda li æemo doæi ja i mati tvoja i braæa tvoja da se klanjamo tebi do zemlje?
Tango ayebisaki tata na ye ndenge ayebisaki bandeko na ye ya mibali, tata na ye agangelaki ye mpe alobaki: — Ndoto nini wana yo osili kolota? Okanisi ete ngai, mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali, tokoya mpe tokogumbama na mabele liboso na yo?
11 I zaviðahu mu braæa; ali otac njegov èuvaše ove rijeèi.
Bandeko na ye ya mibali bakomaki na motema likunya epai na ye, kasi tata na ye abombaki kaka likambo yango na motema.
12 A kad braæa njegova otidoše da pasu stoku oca svojega kod Sihema,
Bandeko mibali ya Jozefi bakendeki koleisa bibwele ya tata na bango pembeni ya Sishemi.
13 Reèe Izrailj Josifu: ne pasu li braæa tvoja stoku kod Sihema? hajde da te pošljem k njima. A on reèe: evo me.
Isalaele alobaki na Jozefi: — Oyebi ete bandeko na yo bazali koleisa bibwele pembeni ya Sishemi; yaka, pamba te nalingi kotinda yo epai na bango. Jozefi azongisaki: — Malamu!
14 A on mu reèe: idi, vidi kako su braæa tvoja i kako je stoka, pa doði da mi javiš. I opravi ga iz doline Hevronske, i on otide put Sihema.
Tata na ye alobaki na ye: — Kende mpe tala soki makambo nyonso ezali kotambola malamu mpo na bandeko na yo mpe mpo na bibwele, bongo omemela ngai sango. Boye, atindaki ye wuta na lubwaku ya Ebron. Wana Jozefi akomaki na Sishemi,
15 I èovjek jedan naðe ga a on luta po polju, te ga zapita govoreæi: šta tražiš?
moto moko amonaki ye tango azalaki koyengayenga na bilanga. Atunaki ye: — Ozali koluka nini?
16 A on reèe: tražim braæu svoju; kaži mi, molim te, gdje su sa stokom?
Jozefi azongisaki: — Nazali koluka bandeko na ngai. Okoki koyebisa ngai esika nini bazali koleisa bibwele na bango?
17 A èovjek reèe: otišli su odavde, jer èuh gdje rekoše: hajdemo u Dotaim. I otide Josif za braæom svojom, i naðe ih u Dotaimu.
Moto yango azongisaki: — Balongwaki awa mpe nayokaki bango koloba: « Tokende na Dotani. » Boye Jozefi alandaki bandeko na ye mpe amonaki bango pembeni ya Dotani.
18 A oni ga ugledaše izdaleka; i dok još ne doðe blizu njih, stadoše se dogovarati da ga ubiju,
Tango bango bamonaki ye na mosika liboso ete akoma pene na bango, bayokanaki mpo ete baboma ye.
19 I rekoše meðu sobom: gle, evo onoga što sne sanja.
Balobanaki bango na bango: — Tala moloti bandoto azali koya.
20 Hajde sada da ga ubijemo i da ga bacimo u koju od ovijeh jama, pa æemo kazati: ljuta ga je zvjerka izjela. Onda æemo vidjeti šta æe biti od njegovijeh sanova.
Sik’oyo, boya mpo ete toboma ye mpe tobwaka ye na moko kati na mabulu oyo. Tokoloba ete nyama mabe eliaki ye. Bongo tokotala oyo ekoya sima na bandoto na ye.
21 Ali Ruvim kad èu to, izbavi ga iz ruku njihovijeh rekav: nemojte da ga ubijemo.
Tango Ribeni ayokaki bongo, alukaki nzela ya kokangola ye na maboko na bango. Alobaki: — Toboma ye te!
22 I još im reèe Ruvim: nemojte krvi proljevati; bacite ga u ovu jamu u pustinji, a ne dižite ruke na nj. A on ga šæaše izbaviti iz ruku njihovijeh i odvesti k ocu.
Bosopa makila na ye te! Bobwaka ye kaka na libulu oyo ezali kati na esobe, kasi bosala ye mabe te. Ribeni alobaki bongo pamba te azalaki na makanisi ya kokangola ye na maboko na bango mpe kozongisa ye na maboko ya tata na ye.
23 I kad Josif doðe k braæi svojoj, svukoše s njega haljinu njegovu, haljinu šarenu, koju imaše na sebi.
Tango kaka Jozefi akomaki epai ya bandeko na ye ya mibali, balongolaki ye elamba na ye ya kitoko mpe ya talo oyo alataki.
24 I uhvativši ga baciše ga u jamu; a jama bješe prazna, ne bješe vode u njoj.
Bakangaki ye mpe babwakaki ye na libulu. Libulu yango ezalaki na eloko te, ezalaki mpe na mayi te na kati.
25 Poslije sjedoše da jedu. I podigavši oèi ugledaše, a to gomila Ismailjaca iðaše od Galada s kamilama natovarenim mirisavoga korijenja i tamjana i smirne, te nošahu u Misir.
Wana bavandaki mpo na kolia, batombolaki miso mpe bamonaki bato ya libota ya Isimaeli elongo na bashamo na bango koya wuta na Galadi. Bashamo na bango ezalaki komema na Ejipito: biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mafuta ya solo kitoko mpe mire.
26 I reèe Juda braæi svojoj: kaka æe biti korist što æemo ubiti brata svojega i zatajiti krv njegovu?
Boye Yuda alobaki na bandeko na ye ya mibali: « Litomba nini tokozwa soki tobomi ndeko na biso mpe tozipi makila na ye?
27 Hajde da ga prodamo ovijem Ismailjcima pa da ne dižemo ruke svoje na nj, jer nam je brat, naše je tijelo. I poslušaše ga braæa njegova.
Malamu toteka ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, kasi toboma ye te; pamba te azali kaka ndeko na biso mpe tozali na ye makila moko. » Boye bandeko na ye bandimaki.
28 Pa kad trgovci Madijamski bijahu pored njih, oni izvukoše i izvadiše Josifa iz jame, i prodadoše Josifa Ismailjcima za dvadeset srebrnika; i oni odvedoše Josifa u Misir.
Nzokande tango bato ya mombongo ya mokili ya Madiani balekaki wana, babimisaki Jozefi wuta na libulu mpe batekaki ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, na motuya ya mbongo ya bibende, tuku mibale; mpe bango bamemaki ye na Ejipito.
29 A kad se Ruvim vrati k jami, a to nema Josifa u jami; tada razdrije haljine svoje,
Tango Ribeni azongaki na libulu mpe amonaki ete Jozefi azali lisusu kuna te, apasolaki bilamba na ye,
30 Pa se vrati k braæi svojoj, i reèe: nema djeteta; a ja kuda æu?
azongaki epai ya bandeko na ye mpe alobaki: « Elenge mobali azali lisusu kuna te! Sik’oyo ngai, nakosuka wapi? »
31 Tada uzeše haljinu Josifovu, i zaklavši jare zamoèiše haljinu u krv,
Boye babomaki ntaba, bazwaki elamba ya Jozefi mpe bazindisaki yango na makila ya ntaba.
32 Pa onda poslaše šarenu haljinu ocu njegovu poruèivši: naðosmo ovu haljinu, vidi je li haljina sina tvojega ili nije.
Sima, bazongisaki elamba yango ya kitoko mpe ya talo epai ya tata na bango. Balobaki: — Tala eloko oyo tomoni; tala yango malamu soki ezali penza elamba ya mwana na yo to te!
33 A on je pozna i reèe: sina je mojega haljina; ljuta ga je zvjerka izjela; Josif je doista raskinut.
Jakobi asosolaki ete ezali elamba ya Jozefi mpe agangaki: — Ezali elamba ya mwana na ngai! Nyama moko ya mabe elie ye! Solo, bakati-kati Jozefi na biteni!
34 I razdrije Jakov haljine svoje, i veza kostrijet oko sebe; i tužaše za sinom svojim dugo vremena.
Jakobi apasolaki bilamba na ye, alataki saki mpe asalaki matanga mpo na mwana na ye mikolo ebele.
35 I svi sinovi njegovi i sve kæeri njegove ustadoše oko njega tješeæi ga, ali se on ne dadijaše utješiti, nego govoraše: s tugom æu u grob leæi za sinom svojim. Pa i njegov otac plakaše za njim. (Sheol )
Bana na ye nyonso ya mibali mpe ya basi bayaki kobondisa ye; kasi aboyaki kobondisama. Alobaki: « Te; nakozala na matanga kino nakolanda mwana na ngai na mboka ya bakufi epai wapi mwana na ngai azali. » Boye, tata na ye alelaki ye. (Sheol )
36 A Madijanci prodadoše ga u Misir Petefriju, dvoraninu Faraonovu, zapovjedniku stražarskom.
Bato ya mokili ya Madiani batekaki Jozefi na Ejipito epai ya Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi.