< Ponovljeni Zakon 4 >
1 A sada, Izrailju, èuj uredbe i zakone, koje vas uèim da tvorite, da biste poživjeli i ušli u zemlju koju vam daje Gospod Bog otaca vaših i da biste je naslijedili.
Sik’oyo Isalaele, yoka malamu mitindo mpe mibeko oyo nalingi koteya yo. Salela yango mpo ete ozala na bomoi mpe okamata mokili oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na yo, apesi yo.
2 Ništa ne dodajte k rijeèi koju vam ja zapovijedam, niti oduzmite od nje, da biste saèuvali zapovijesti Gospoda Boga svojega koje vam ja zapovijedam.
Kobakisa eloko moko te na oyo natindi yo mpe kolongola eloko moko te kati na yango, kasi tosa mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo.
3 Oèi su vaše vidjele šta uèini Gospod s Velfegora; jer svakoga èovjeka koji poðe za Velfegorom istrijebi Gospod Bog tvoj izmeðu tebe.
Bomonaki bino moko makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki na Bala ya Peori: abomaki kati na bino bato nyonso oyo bamipesaki na kosalela Bala ya Peori.
4 A vi koji se držaste Gospoda Boga svojega, vi ste svi živi danas.
Kasi bino oyo bokangamaki na Yawe, Nzambe na bino, bino nyonso bozali na bomoi na mokolo ya lelo.
5 Gle, uèio sam vas uredbama i zakonima, kao što mi zapovjedi Gospod Bog moj, da biste tako tvorili u zemlji u koju idete da je naslijedite.
Tala, nateyaki bino mitindo mpe mibeko ndenge Yawe, Nzambe na ngai, atindaki ngai, mpo ete bokoka kotosa yango na mokili oyo bokokota mpo na kozwa yango.
6 Držite dakle i izvršujte ih, jer je to mudrost vaša i razum vaš pred narodima, koji æe kad èuju sve ove uredbe reæi: samo je ovaj veliki narod narod mudar i razuman.
Botosa yango mpe bosalela yango na bokebi; yango nde ekokomisa bino bato ya bwanya mpe ya mayele na miso ya bikolo oyo bakoyoka sango ya mitindo mpe mibeko yango; mpe bakoganga: « Solo, libota monene oyo ezali na bato ya bwanya mpe na bato ya mayele. »
7 Jer koji je veliki narod kojemu je Bog blizu kao što je Gospod Bog naš kad ga god zazovemo?
Pamba te ekolo nini lisusu ya monene, oyo banzambe na yango ezali pembeni na yango ndenge Yawe, Nzambe na biso, azalaka pembeni na biso tango nyonso oyo tobelelaka Ye?
8 I koji je narod veliki koji ima uredbe i zakone pravedne kao što je sav ovaj zakon koji iznosim danas pred vas?
Mpe ekolo nini mosusu ya monene, oyo ekoki kozala na mitindo mpe mibeko ya sembo lokola Mobeko oyo natie lelo liboso na bino?
9 Samo pazi na se i dobro èuvaj dušu svoju, da ne zaboraviš onijeh stvari koje su vidjele oèi tvoje, i da ne izidu iz srca tvojega dokle si god živ; nego da ih obznaniš sinovima svojim i sinovima sinova svojih.
Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango.
10 Onaj dan kad stajaste pred Gospodom Bogom svojim kod Horiva, kad mi Gospod reèe: saberi mi narod da im kažem rijeèi svoje, kojima æe se nauèiti da me se boje dok su živi na zemlji, i da uèe tome i sinove svoje;
Kanisa mokolo oyo otelemaki liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na Orebi tango Yawe alobaki na ngai: « Sangisa bato oyo liboso na Ngai mpo na koyoka maloba na Ngai, mpo ete bakoka koyeba kopesa Ngai lokumu tango nyonso bakozala na mokili oyo mpe bakoka koteya yango na bana na bango. »
11 Kad pristupiste i stajaste pod gorom, a gora ognjem goraše do samoga neba i bješe na njoj tama i oblak i mrak;
Yango wana, bino bopusanaki mpe botelemaki na ebandeli ya ngomba tango ezalaki kopela moto oyo ekomaki kino na likolo elongo na mapata ya mwindo mpe molili makasi.
12 I progovori Gospod k vama isred ognja; glas od rijeèi èuste, ali osim glasa lika ne vidjeste;
Yawe alobelaki bino wuta na moto; boyokaki lokito ya maloba na ye kasi bomonaki ata nzoto te; mongongo kaka nde ezalaki koyokana.
13 I objavi vam zavjet svoj, koji vam zapovjedi da držite, deset rijeèi, koje napisa na dvije ploèe kamene.
Atalisaki bino boyokani na Ye, mibeko zomi oyo bosengeli kosalela, mpe akomaki yango na bitando mibale ya mabanga.
14 I meni zapovjedi onda Gospod da vas uèim uredbama i zakonima da ih tvorite u zemlji u koju idete da je naslijedite.
Na tango wana kaka, Yawe atindaki ngai koteya bino bikateli mpe mibeko oyo bosengeli kosalela na mokili oyo bokokende mpo na kozwa yango.
15 Zato èuvajte dobro duše svoje; jer ne vidjeste nikakoga lika u onaj dan kad vam govori Gospod na Horivu isred ognja,
Bongo, bomisenzela malamu, pamba te bomonaki nzoto te na mokolo oyo Yawe alobelaki bino na ngomba Orebi wuta na moto.
16 Da se ne biste pokvarili i naèinili sebi lik rezan ili kaku god sliku od èovjeka ili od žene,
Bomibebisa te na kosala ekeko, elilingi ya mwasi to ya mobali,
17 Sliku od kakoga živinèeta koje je na zemlji, ili sliku od kake ptice krilate koja leti ispod neba;
ya nyama nyonso ya mokili to ya ndeke nyonso oyo epumbwaka na likolo,
18 Sliku od èega što puže po zemlji, ili sliku od kake ribe koja je u vodi pod zemljom;
ya ekelamu nyonso oyo etambolaka na libumu to ya mbisi nyonso oyo etiolaka na se ya mayi.
19 I da ne bi podigavši oèi svoje k nebu i vidjevši sunce i mjesec i zvijezde, svu vojsku nebesku, prevario se i klanjao im se i služio im; jer ih Gospod Bog tvoj dade svijem narodima pod cijelijem nebom;
Mpe tango botalaka na mapata mpe bomonaka moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu oyo ezali na likolo, bokosama te mpo na kofukamela mpe kogumbamela biloko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesa na bikolo nyonso oyo ezali na mokili.
20 A vas uze Gospod i izvede vas iz peæi gvozdene, iz Misira, da mu budete narod našljedni, kao što se vidi danas.
Kasi mpo na bino, Yawe azwaki bino mpe abimisaki bino na fulu ya moto ya bibende, oyo ezalaki Ejipito, mpo ete bozala bato ya libula na Ye ndenge bozali sik’oyo.
21 Ali se Gospod razgnjevi na me za vaše rijeèi, i zakle se da neæu prijeæi preko Jordana ni uæi u dobru zemlju, koju ti Gospod Bog tvoj daje u našljedstvo.
Yawe asilikelaki ngai likolo na bino mpe alapaki ndayi na makasi nyonso ete nakoki te kokatisa Yordani mpe kokota na mokili kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula.
22 I ja æu umrijeti u ovoj zemlji i neæu prijeæi preko Jordana; a vi æete prijeæi i naslijediti onu dobru zemlju.
Nakokufa na mokili oyo mpe nakokatisa Yordani te; kasi bino, etikali moke bokatisa mpe bokamata mokili oyo ya kitoko.
23 Pazite da ne zaboravite zavjeta Gospoda Boga svojega, koji uèini s vama, i da ne gradite sebi lika rezanoga, slike od koje god tvari, kao što ti je zabranio Gospod Bog tvoj.
Bozala na bokebi mpe bobosana te boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki elongo na bino. Mpe bomisalela ekeko te na lolenge nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, apekisaki.
24 Jer je Gospod Bog tvoj oganj koji spaljuje i Bog koji revnuje.
Pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali moto oyo ezikisaka, azali Nzambe na zuwa.
25 Kad izrodiš sinove i unuke, i ostarite u onoj zemlji, ako se pokvarite i naèinite sliku rezanu od kake tvari i uèinite što nije ugodno Gospodu Bogu vašemu, dražeæi ga,
Tango bokozala na bana mpe bakoko, mpe bokowumela tango molayi na mokili, soki bokosami mpe bosali ekeko ya lolenge nyonso, soki bosali mabe na miso ya Yawe, Nzambe na bino, soki botumboli kanda na Ye,
26 Svjedoèim vam danas nebom i zemljom da æe vas brzo nestati sa zemlje u koju idete preko Jordana da je naslijedite, neæete biti dugo u njoj, nego æete se istrijebiti.
soki bosali makambo wana, likolo mpe se ekozala motatoli kati na ngai mpe bino: bokolimwa noki na mokili oyo bokokende kozwa sima na bino kokatisa Yordani. Bokowumela kuna tango molayi te, kasi bokobebisama solo;
27 Ili æe vas rasijati Gospod meðu narode, i malo æe vas ostati meðu narodima u koje vas odvede Gospod;
Yawe akopanza bino kati na bato. Kasi ndambo kaka ya bato kati na bino nde bakowumela kati na bikolo epai wapi Yawe akomema bino.
28 I služiæete ondje bogovima koje su naèinile ruke èovjeèije, od drveta i od kamena, koji ne vide ni èuju, niti jedu ni mirišu.
Kuna, bokogumbamela banzambe oyo esalemi na maboko ya bato, banzambe ya banzete to ya mabanga, oyo ekoki komona te, koyoka te, kolia te mpe koyoka solo te.
29 Ali ako i ondje potražiš Gospoda Boga svojega, naæi æeš ga, ako ga potražiš svijem srcem svojim i svom dušom svojom.
Kasi soki, wuta na mokili wana, boluki Yawe, Nzambe na bino, bokomona Ye soki boluki Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba.
30 Kad budeš u nevolji i sve te to snaðe, ako se u pošljednje vrijeme obratiš ka Gospodu Bogu svojemu, i poslušaš glas njegov,
Tango bokozala na mawa mpe pasi nyonso oyo ekokomela bino, sima na mikolo, bokozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokotosa Ye.
31 Gospod je Bog tvoj milostiv Bog, neæe te ostaviti ni istrijebiti, jer neæe zaboraviti zavjeta s ocima tvojim, za koji im se zakleo.
Pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya mawa, akosundola bino te, akobebisa bino te mpe akobosana te boyokani oyo asala na bakoko na bino tango alapaki ndayi.
32 Jer zapitaj sada za stara vremena, koja su bila prije tebe, od onoga dana kad stvori Bog èovjeka na zemlji, i od jednoga kraja neba do drugoga, je li kad bila ovaka stvar velika, i je li se kad èulo što tako?
Luka koyeba makambo oyo esalema na mikolo ya liboso, liboso ete yo obotama, wuta mokolo oyo Nzambe asala moto na mokili; luka oyeba makambo oyo esalema kati na mokili banda na suka moko kino na suka mosusu, soki likambo ya monene boye esila kosalema, soki likambo ya boye esila koyokana.
33 Je li kad èuo koji narod glas Božji gdje govori isred ognja, kao što si ti èuo i ostao živ?
Boni, ezali na bato bayoka mongongo ya Nzambe kolobela bango kati na moto ndenge bino boyokaki mpe botikali na bomoi?
34 Ili, je li Bog pokušao da doðe te uzme sebi narod iz drugoga naroda kušanjem, znacima i èudesima i ratom i rukom krjepkom i mišicom podignutom i strahotama velikim, kao što je uèinio sve to za vas Gospod Bog naš u Misiru na vaše oèi?
Boni, ezali na nzambe oyo ameka kobimisa mpo na ye ekolo moko wuta na ekolo mosusu na nzela ya komekama, ya bilembo, ya bikamwa, ya bitumba, ya maboko na ye ya nguya, mpe na kosembola loboko to na nzela ya misala minene ya somo lokola makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asala mpo na bino kati na Ejipito na miso na bino?
35 Tebi je to pokazano da poznaš da je Gospod Bog, i da nema drugoga osim njega.
Omonaki makambo nyonso wana mpo oyeba ete Yawe kaka nde azali Nzambe, mosusu azali te.
36 Dao ti je da èuješ glas njegov s neba da bi te nauèio, i pokazao ti je na zemlji oganj svoj veliki, i rijeèi njegove èuo si isred ognja.
Wuta na likolo, ayebisaki yo na mongongo na Ye mpo na koteya yo; na se, Yawe alakisaki yo moto na ye ya monene mpe oyokaki mongongo na Ye kobima kati na moto.
37 I što mu mili bijahu oci tvoji, zato izabra sjeme njihovo nakon njih, i izvede te sam velikom silom svojom iz Misira,
Lokola alingaki bakoko na yo mpe aponaki bakitani na bango, abimisaki yo na Ejipito na nguya na Ye mpe na makasi na Ye ya monene
38 Da otjera ispred tebe narode veæe i jaèe od tebe, i da tebe uvede u njihovu zemlju i dade ti je u našljedstvo, kao što se vidi danas.
mpo na kobengana liboso na yo bikolo minene mpe ya makasi koleka yo mpe kokotisa yo na bamboka na bango mpo na kopesa yo yango lokola libula ndenge yango ezali na mokolo ya lelo.
39 Znaj dakle i pamti u srcu svojem da je Gospod Bog, gore na nebu i dolje na zemlji, nema drugoga.
Yeba yango lelo mpe tia yango na motema na yo ete Yawe kaka nde azali Nzambe na likolo mpe na se, mosusu azali te.
40 I drži uredbe njegove i zapovijesti njegove, koje ti ja danas zapovijedam, da bi dobro bilo tebi i sinovima tvojim nakon tebe, da bi ti se produljili dani na zemlji koju ti Gospod Bog tvoj daje zasvagda.
Batela bikateli mpe mitindo na Ye, oyo nazali kopesa yo lelo mpo ete ozala moto ya esengo, yo mpe bana na yo sima na yo, mpe mpo ete owumela tango molayi na mokili oyo Yawe, Nzambe, na yo apesi yo mpo na libela.
41 Tada odijeli Mojsije tri grada s ovu stranu Jordana prema istoku,
Moyize aponaki bingumba misato na ngambo ya este ya Yordani,
42 Da bi utjecao u njih krvnik koji ubije bližnjega svojega nehotice ne mrzivši prije na nj, i kad uteèe u koji od tijeh gradova, da bi ostao živ:
mpo ete moto nyonso oyo akoboma moninga na ye na nko te, na kozanga koyina ye liboso, akoka kokimela na moko kati na bingumba yango mpe akoka kobikisa bomoi na ye.
43 Vosor u pustinji, na ravnici u zemlji plemena Ruvimova, i Ramot u Galadu u plemenu Gadovu, Golan u Vasanskoj u plemenu Manasijinu.
Tala bingumba yango: Mpo na libota ya Ribeni, engumba Betseri kati na etando ya esobe; mpo na libota ya Gadi, engumba Ramoti ya Galadi, mpe mpo na libota ya Manase, engumba Golani kati na Bashani.
44 Ovo je zakon koji postavi Mojsije sinovima Izrailjevijem.
Tala Mobeko oyo Moyize atiaki liboso ya bana ya Isalaele:
45 Ovo su svjedoèanstva i uredbe i zakoni, koje kaza Mojsije sinovima Izrailjevijem kad izidoše iz Misira,
Tala malako, bikateli mpe mibeko oyo Moyize apesaki na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito;
46 S ovu stranu Jordana u dolini prema Vet-Fegoru u zemlji Siona cara Amorejskoga, koji življaše u Esevonu, kojega ubi Mojsije i sinovi Izrailjevi kad izidoše iz Misira,
mpe tango bazalaki na lubwaku etalana na Beti-Peori, na ngambo ya este ya Yordani, kati na mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni oyo Moyize mpe bana ya Isalaele balongaki tango babimaki na Ejipito.
47 I osvojiše zemlju njegovu i zemlju Oga cara Vasanskoga, dva cara Amorejska, koja je s ovu stranu Jordana prema istoku,
Bazwaki mokili na ye mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani. Bakonzi nyonso mibale bazalaki bato ya Amori mpe bakonzaki na ngambo ya este ya Yordani.
48 Od Aroira, koji je na potoku Arnonu, do gore Siona, a to je Ermon,
Bana ya Isalaele bavandaki na etando oyo ebandaki na Aroeri, na ngomba Arinoni kino na ngomba Sirioni oyo babengi Erimoni;
49 I sve polje s ovu stranu Jordana prema istoku do mora uz ravnicu pod Azdot-Fazgom.
bakisa Araba nyonso na este ya Yordani kino na ebale monene ya Araba, na ebandeli ya ngomba Pisiga.