< 2 Samuelova 21 >
1 I bi glad za vremena Davidova tri godine zasopce. I David potraži lice Gospodnje; a Gospod mu reèe: to je sa Saula i s doma njegova krvnièkoga, što pogubi Gavaonjane.
Tango Davidi azalaki mokonzi, nzala makasi ekotaki mpe esalaki mibu misato. Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe alobaki na ye: « Ezali mpo na Saulo mpe libota na ye oyo esopaki makila, pamba te babomaki bato ya Gabaoni. »
2 Tada car sazva Gavaonjane i govori im. A Gavaonjani ne bjehu od sinova Izrailjevijeh, nego ostatak od Amoreja, kojima se bjehu zakleli sinovi Izrailjevi, ali Saul gledaše da ih pobije revnujuæi za sinove Izrailjeve i Judine.
Mokonzi abengisaki bato ya Gabaoni mpo na kosolola na bango. Nzokande bato ya Gabaoni bazalaki kotangama te kati na bato ya Isalaele, kasi bakanganaki na batikali kati na bato ya Amori; bongo bato ya Isalaele bakanganaki na bato ya Amori, na nzela ya ndayi, mpo na kotika bango na bomoi. Kasi Saulo, na bolingo na ye oyo eleka ndelo mpo na Isalaele mpe Yuda, alukaki kosilisa koboma bango.
3 I reèe David Gavaonjanima: šta da vam uèinim i èim da vas namirim, da blagoslovite dostojanje Gospodnje?
Davidi atunaki bato ya Gabaoni: — Eloko nini nakoki kosala mpo na bino? Na mabe oyo basalaki bino, ndenge nini nakoki kobongisa makambo mpo ete bopambola libula na Yawe?
4 A Gavaonjani mu rekoše: ne tražimo ni srebra ni zlata od Saula ili od doma njegova, niti da se ko pogubi u Izrailju. A on reèe: šta dakle velite da vam uèinim?
Bato ya Gabaoni bazongiselaki ye: — Mpo na kobongisa makambo na biso elongo na Saulo mpe libota na ye, tozali na posa te ya palata to ya wolo; tokoki mpe te koboma ata moto moko kati na Isalaele. Davidi atunaki lisusu: — Bolingi ete ngai nasala nini mpo na bino?
5 Tada rekoše caru: ko nas je potro i radio da nas istrijebi, da nas ne bude nigdje u meðama Izrailjevijem,
Bazongiselaki mokonzi: — Lokola tata wana alingaki kosilisa koboma biso mpe asalaki mabongisi ya kobebisa biso mpo ete tolimwa kati na mokili mobimba ya Isalaele,
6 Od njegovijeh sinova neka nam se da sedam ljudi da ih objesimo Gospodu u Gavaji Saula izbranika Gospodnjega. I reèe car: ja æu dati.
tika ete mokonzi akaba na maboko na biso mibali sambo kati na bakitani ya Saulo mpo ete todiembika banzoto na bango liboso ya Yawe, na Gibea, engumba ya Saulo, moponami na Yawe. Mokonzi alobaki: — Nakopesa bino bango.
7 Ali car poštjede Mefivosteja sina Jonatana sina Saulova radi zakletve Gospodnje, koja bi meðu njima, meðu Davidom i Jonatanom sinom Saulovijem.
Mokonzi atikaki na bomoi Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, mpo na boyokani oyo ezalaki kati na bango mibale, Davidi mpe Jonatan, mwana mobali ya Saulo, tango Davidi alapaki ndayi na Kombo na Yawe.
8 I uze car dva sina Resfe kæeri Ajine, koje rodi Saulu, Armonija i Mefivosteja, i pet sinova Mihale kæeri Saulove, koje rodi Adrilu sinu Varzelaja Meolaæanina.
Kasi mokonzi akangaki Arimoni mpe Mefibosheti, bana mibali oyo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, abotelaki Saulo; akangaki lisusu bana mibali mitano oyo Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abotelaki Adriyeli, mwana mobali ya Barizilayi, moto ya Meola;
9 I dade ih u ruke Gavaonjanima, a oni ih objesiše na gori pred Gospodom; i sva sedmorica pogiboše zajedno; a biše ubijeni prvijeh dana žetve, u poèetku jeèmene žetve.
akabaki bango na maboko ya bato ya Gabaoni. Bongo bato ya Gabaoni babomaki bango mpe badiembikaki banzoto na bango na ngomba liboso ya Yawe. Bango nyonso sambo bakufaki elongo. Babomaki bango na mikolo ya liboso ya tango ya kobuka bambuma, kaka na ebandeli ya tango oyo babukaki bambuma ya orje.
10 A Resfa kæi Ajina uze vreæu, i prostrije po stijeni u poèetku žetve dokle ne pade na njih dažd s neba, i ne dadijaše pticama nebeskim da padaju na njih danju ni zvjerima poljskim noæu.
Bongo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, alongolaki elamba ya saki oyo alataki mpe atandaki yango na libanga; avandaki wana, wuta na ebandeli ya tango ya kobuka bambuma ya orje kino na eleko oyo mvula enokelaki bibembe. Na moyi, apekisaki bandeke ya likolo kokita na likolo ya bibembe yango; mpe na butu, abenganaki banyama ya zamba.
11 I javiše Davidu šta uèini Resfa kæi Ajina, inoèa Saulova.
Davidi ayokaki makambo oyo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, makangu ya Saulo, asalaki.
12 I David otide te uze kosti Saulove i kosti Jonatana sina njegova od graðana u Javisu Galadovu, koji ih bijahu ukrali s ulice Vet-Sanske, gdje ih objesiše Filisteji kad ubiše Filisteji Saula na Gelvuji.
Bongo Davidi akendeki kozwa mikuwa ya Saulo mpe ya Jonatan, mwana na ye ya mobali, epai ya bakambi ya Yabeshi ya Galadi, oyo bayibaki yango na libanda ya Beti-Sheani epai wapi bato ya Filisitia badiembikaki yango mokolo oyo babomaki Saulo, na Giliboa.
13 I odnese odande kosti Saulove i kosti Jonatana sina njegova, pa skupiše i kosti obješenijeh.
Wuta kuna, Davidi amemaki mikuwa ya Saulo mpe ya Jonatan, mwana na ye ya mobali; asangisaki mpe mikuwa ya bato sambo oyo babomaki mpe badiembikaki.
14 I pogreboše ih s kostima Saulovijem i Jonatana sina njegova u zemlji Venijaminovoj u Sili u grobu Kisa oca njegova, i uèiniše sve kako zapovjedi car. Tako se poslije toga umilostivi Gospod zemlji.
Bakundaki mikuwa ya Saulo mpe ya mwana na ye ya mobali, Jonatan, kati na kunda ya Kishi, tata ya Saulo, na Tsela kati na etuka ya Benjame. Basalaki makambo nyonso oyo mokonzi atindaki. Sima na yango, Nzambe ayanolaki losambo mpo na mokili ya Isalaele.
15 I nasta opet rat izmeðu Filisteja i Izrailja, i David otide sa slugama svojim, i biše se s Filistejima tako da David susta.
Bitumba ezalaki lisusu kati ya bato ya Filisitia mpe bato ya Isalaele. Davidi akitaki elongo na basoda na ye mpo na kobundisa bato ya Filisitia; mpe Davidi alembaki.
16 Tada Jesvi-Venov, koji bješe od sinova Rafajevijeh, i u koplju mu bješe trista sikala mjedi, i imaše novo oružje, šæaše da ubije Davida.
Yishibi-Benobi, mokitani ya Rafa, azalaki na mopanga ya sika, likonga oyo songe na yango ezalaki ya bronze mpe ezalaki ya bakilo koleka misato; mpe abetaki tolo ete akoboma Davidi.
17 Ali mu pomože Avisaj sin Serujin, i udari Filistejina i ubi ga. Tada se zakleše ljudi Davidovi rekavši mu: neæeš više iæi s nama u boj da ne ugasiš vidjela Izrailjeva.
Kasi Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, ayaki kosunga Davidi, abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye. Boye bato ya Davidi bakataki seleka epai ya mokonzi, balobaki: « Okobima lisusu te elongo na biso na bitumba mpo ete mwinda ya Isalaele ekufa te. »
18 Poslije toga nasta opet rat s Filistejima u Govu; i tada Sivehaj Husaæanin ubi Safa, koji bijaše od sinova Rafajevih.
Sima na mwa tango, ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na mboka Gobi. Ezalaki na tango yango nde Sibekayi, moto ya Usha, abomaki Safi, moko kati na bakitani ya Rafa.
19 I opet nasta drugi rat u Govu s Filistejima; i tada Elhanan sin Jare-Oregimov Vitlejemac ubi brata Golijata Getejina, kojemu kopljaèa bješe kao vratilo.
Ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na Gobi; mpe Elanani, mwana mobali ya Yare-Oregimi, moto ya Beteleemi, abomaki Goliati, moto ya Gati, oyo nzete ya likonga na ye ezalaki monene lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka.
20 I opet nasta rat u Gatu, gdje bijaše jedan èovjek vrlo visok, koji imaše po šest prsta na rukama i na nogama, svega dvadeset i èetiri, i on bijaše takoðer roda Rafajeva.
Ezalaki lisusu na bitumba oyo esalemaki kuna na Gati; mpe ezalaki kuna na mbinga mobali moko, mokitani ya Rafa, oyo azalaki na misapi motoba na loboko moko na moko, mpe misapi motoba na lokolo moko na moko. Na kosangisa, azalaki na misapi tuku mibale na minei.
21 I ružaše Izrailja, te ga ubi Jonatan sin Same brata Davidova.
Atiolaki Isalaele; mpe Jonatan, mwana mobali ya Shimea mpe ndeko mobali ya Davidi, abomaki ye.
22 Ta èetvorica bijahu sinovi istoga Rafaja iz Gata, i pogiboše od ruke Davidove i od ruke sluga njegovijeh.
Bango minei bazalaki bakitani ya Rafa, babotama na Gati mpe bakufaki liboso ya Davidi mpe ya basoda na ye.