< 2 Kraljevima 16 >
1 Godine sedamnaeste Fekaja sina Remalijina zacari se Ahaz sin Jotamov car Judin.
Na mobu ya zomi na sambo ya bokonzi ya Peka, mwana mobali ya Remalia, Akazi, mwana mobali ya Yotami, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
2 Dvadeset godina bijaše Ahazu kad poèe carovati, i carova šesnaest godina u Jerusalimu, ali ne èinjaše što je pravo pred Gospodom Bogom njegovijem kao David otac njegov.
Akazi azalaki na mibu tuku mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye; nzokande, Davidi, koko na ye, asalaki makambo ya sembo.
3 Jer hoðaše putem careva Izrailjevijeh, pa i sina svojega pusti kroz oganj po gadnijem djelima naroda koje odagna Gospod ispred sinova Izrailjevijeh.
Alandaki banzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango, atumbaki ata mwana na ye ya mobali na moto lokola mbeka, kolanda misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bana ya Isalaele.
4 I prinošaše žrtve i kaðaše na visinama i po humovima i pod svakim zelenijem drvetom.
Abonzaki bambeka mpe atumbaki mbeka ya malasi, na bisambelo ya likolo ya bangomba, na bangomba mike mpe na se ya banzete ya mibesu.
5 Tada doðe Resin car Sirski i Fekaj sin Remalijin car Izrailjev, doðoše da biju Jerusalim, i opkoliše Ahaza; ali ga ne mogoše osvojiti.
Bongo Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, bamataki mpo na kobundisa Yelusalemi mpe bazingelaki Akazi, kasi bakokaki kolonga ye te.
6 U to vrijeme Resin car Sirski povrati Sircima Elat, i izagna Judeje iz Elata, i doðoše Sirci u Elat i ostaše ondje do danas.
Na tango wana, Retsini, mokonzi ya Siri, azongisaki Eyilati na se ya bokonzi ya Siri. Abenganaki bato ya Yuda oyo bazalaki na Efrate, mpe bato ya Edomi bayaki kovanda kuna kino lelo.
7 Ali Ahaz posla poslanike k Teglat-Felasaru caru Asirskom i poruèi mu: sluga sam tvoj, hodi i izbavi me iz ruku cara Sirskoga i iz ruku cara Izrailjeva, koji se podigoše na me.
Akazi atindaki bantoma epai ya Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, mpo na koloba na ye: « Nazali mosali na yo mpe mwana na yo; yaka kokangola ngai na maboko ya mokonzi ya Siri mpe mokonzi ya Isalaele oyo bayei kobundisa ngai. »
8 I uze Ahaz zlato i srebro što se naðe u domu Gospodnjem i u riznicama doma carskoga, i posla na dar caru Asirskom.
Akazi azwaki palata mpe wolo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi; bongo atindaki yango lokola kado epai ya mokonzi ya Asiri.
9 I posluša ga car Asirski, i doðe na Damasak i uze ga, i preseli narod odande u Kir, a Resina pogubi.
Mokonzi ya Asiri ayokaki ye, akendeki kobundisa Damasi mpe abotolaki yango. Amemaki bato ya Damasi na bowumbu na Kiri mpe abomaki Retsini.
10 Tada car Ahaz otide na susret Teglat-Felasaru caru Asirskom u Damasak; i vidje car Ahaz oltar koji bijaše u Damasku, pa posla svešteniku Uriji sliku od toga oltara i od sve naprave njegove.
Bongo mokonzi Akazi akendeki na Damasi mpo na kokutana na Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri; amonaki etumbelo oyo ezalaki na Damasi mpe atindaki epai ya Nganga-Nzambe Uri elilingi na yango ndenge batongaki yango.
11 I naèini sveštenik Urija oltar sasvijem kako posla car Ahaz iz Damaska, onako naèini Urija sveštenik, dokle se vrati car Ahaz iz Damaska.
Boye Nganga-Nzambe Uri atongaki etumbelo kolanda elilingi oyo mokonzi Akazi atindaki wuta na Damasi, mpe asilisaki kotonga yango liboso ete mokonzi Akazi azonga wuta na Damasi.
12 Pa kad se car vrati iz Damaska i vidje oltar, pristupi k njemu i prinese žrtvu na njemu.
Tango mokonzi Akazi azongaki wuta na Damasi, amonaki etumbelo, apusanaki pene na yango mpe abonzaki bambeka na likolo na yango.
13 I zapali žrtvu svoju paljenicu i dar svoj, i izli naljev svoj, i pokropi oltar krvlju zahvalnijeh žrtava svojih.
Atumbaki mbeka na ye mpe likabo ya gato, asopaki likabo ya masanga mpe abwakaki makila ya bambeka ya boyokani na likolo ya etumbelo.
14 A mjedeni oltar što bješe pred Gospodom prenese s prednje strane doma da ne stoji izmeðu njegova oltara i doma Gospodnjega, i namjesti ga pokraj svoga oltara k sjeveru.
Kasi mpo na oyo etali etumbelo ya bronze oyo ezalaki liboso ya Yawe, alongolaki yango na esika na yango liboso ya Ndako ya Nzambe, kati na etumbelo ya sika mpe Tempelo ya Yawe, mpe atiaki yango pembeni ya etumbelo ya sika, na ngambo ya nor.
15 I zapovjedi car Ahaz Uriji svešteniku govoreæi: na velikom oltaru pali žrtvu paljenicu jutrenju i dar veèernji i žrtvu paljenicu carevu s darom njezinijem i žrtvu paljenicu svega naroda zemaljskoga s darovima njihovijem i naljevima njihovijem; i po njemu kropi svakom krvlju od žrtava paljenica i svakom krvlju od drugih žrtava. A za oltar mjedeni promisliæu.
Mokonzi Akazi apesaki mitindo epai ya Nganga-Nzambe Uri: « Na likolo ya etumbelo monene ya sika, okobanda kobonza mbeka ya kotumba na tongo mpe likabo ya gato na pokwa, mbeka ya kotumba ya mokonzi elongo na likabo na yango ya gato, mpe mbeka ya kotumba ya bato nyonso ya mokili elongo na likabo na bango ya masanga. Okobwaka na etumbelo makila ya bambeka nyonso ya kotumba mpe ya bambeka mosusu. Kasi mpo na oyo etali etumbelo ya bronze, nakokanisa mosala nini nakosala na yango. »
16 I uèini sveštenik Urija sve kako mu zapovjedi car Ahaz.
Nganga-Nzambe Uri asalaki ndenge kaka mokonzi Akazi atindaki.
17 I oplate s podnožja skide car Ahaz i uze s njih umivaonice, i more skide s volova mjedenijeh koji bijahu pod njim, i metnu ga na pod kameni.
Mokonzi Akazi alongolaki mabaya oyo esimbaka bamesa, mpe alongolaki basani ya minene na likolo na yango; akitisaki nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki na likolo ya bikeko ya bangombe mpe atiaki yango na likolo ya mabanga babongisa malamu.
18 I strehu subotnu, koju bijahu naèinili u domu, i ulazak carski, koji bijaše spolja, ukloni takoðer od doma Gospodnjega, bojeæi se cara Asirskoga.
Abongolaki shambre ya Saba ya kokotela oyo batongaki na kati ya Ndako ya Nzambe; abongolaki lisusu ekuke ya mokonzi oyo batongaki na libanda ya Tempelo ya Yawe mpo na kosepelisa mokonzi ya Asiri.
19 A ostala djela Ahazova što je èinio, nijesu li zapisana u dnevniku careva Judinijeh?
Makambo mosusu oyo etali mokonzi Akazi mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
20 I poèinu Ahaz kod otaca svojih, i bi pogreben kod otaca svojih u gradu Davidovu; a na njegovo se mjesto zacari Jezekija sin njegov.
Akazi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Ezekiasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.