< ကလသိနး 2 >

1 ယုၐ္မာကံ လာယဒိကေယာသ္ထဘြာတၖဏာဉ္စ ကၖတေ ယာဝန္တော ဘြာတရၑ္စ မမ ၑာရီရိကမုခံ န ဒၖၐ္ဋဝန္တသ္တေၐာံ ကၖတေ မမ ကိယာန် ယတ္နော ဘဝတိ တဒ် ယုၐ္မာန် ဇ္ဉာပယိတုမ် ဣစ္ဆာမိ၊
Nalingi boyeba ete nazali kobunda etumba makasi mpo na bino, mpo na bandeko ya Laodise mpe mpo na bandeko nyonso oyo bamoni ngai nanu te.
2 ဖလတး ပူရ္ဏဗုဒ္ဓိရူပဓနဘောဂါယ ပြေမ္နာ သံယုက္တာနာံ တေၐာံ မနာံသိ ယတ် ပိတုရီၑွရသျ ခြီၐ္ဋသျ စ နိဂူဎဝါကျသျ ဇ္ဉာနာရ္ထံ သာန္တွနာံ ပြာပ္နုယုရိတျရ္ထမဟံ ယတေ၊
Nazali kosala bongo mpo ete balendisama, bazala moko kati na bolingo, batonda na elikya oyo ewutaka na bososoli ya mabombami ya Nzambe, mpe batonda na boyebi ya mabombami yango; mabombami yango ezali Klisto.
3 ယတော ဝိဒျာဇ္ဉာနယေား သရွွေ နိဓယး ခြီၐ္ဋေ ဂုပ္တား သန္တိ၊
Ezali kati Klisto nde bomengo nyonso ya bwanya mpe ya boyebi ya Nzambe ebombami.
4 ကော'ပိ ယုၐ္မာန် ဝိနယဝါကျေန ယန္န ဝဉ္စယေတ် တဒရ္ထမ် ဧတာနိ မယာ ကထျန္တေ၊
Nalobi na bino bongo mpo ete moko te akosa bino na nzela ya maloba ya lokuta.
5 ယုၐ္မတ္သန္နိဓော် မမ ၑရီရေ'ဝရ္တ္တမာနေ'ပိ မမာတ္မာ ဝရ္တ္တတေ တေန ယုၐ္မာကံ သုရီတိံ ခြီၐ္ဋဝိၑွာသေ သ္ထိရတွဉ္စ ဒၖၐ္ဋွာဟမ် အာနန္ဒာမိ၊
Pamba te, atako na nzoto, nazali mosika na bino, kasi na molimo, nazali elongo na bino; mpe nazali kosepela komona ete bozali kotambola na botosi mpe bozali kobatela kondima na bino kati na Klisto.
6 အတော ယူယံ ပြဘုံ ယီၑုခြီၐ္ဋံ ယာဒၖဂ် ဂၖဟီတဝန္တသ္တာဒၖက် တမ် အနုစရတ၊
Yango wana, lokola bosilaki koyamba Yesu-Klisto lokola Nkolo, botambolaka lokola bato oyo bazali moko na Ye:
7 တသ္မိန် ဗဒ္ဓမူလား သ္ထာပိတာၑ္စ ဘဝတ ယာ စ ၑိက္ၐာ ယုၐ္မာဘိ ရ္လဗ္ဓာ တဒနုသာရာဒ် ဝိၑွာသေ သုသ္ထိရား သန္တသ္တေနဲဝ နိတျံ ဓနျဝါဒံ ကုရုတ၊
bomilendisaka mpe botongaka bomoi na bino kati na Ye, bokangamaka na kondima ndenge bateyaki bino, mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe.
8 သာဝဓာနာ ဘဝတ မာနုၐိကၑိက္ၐာတ ဣဟလောကသျ ဝရ္ဏမာလာတၑ္စောတ္ပန္နာ ခြီၐ္ဋသျ ဝိပက္ၐာ ယာ ဒရ္ၑနဝိဒျာ မိထျာပြတာရဏာ စ တယာ ကော'ပိ ယုၐ္မာကံ က္ၐတိံ န ဇနယတု၊
Bosalaka keba ete moko te akanga bino na motambo ya mayele ya lokuta mpe ezanga tina, kolanda bokoko ya bato mpe etamboli ya mokili oyo, pamba te ewutaka na Klisto te.
9 ယတ ဤၑွရသျ ကၖတ္သ္နာ ပူရ္ဏတာ မူရ္တ္တိမတီ ခြီၐ္ဋေ ဝသတိ၊
Ezali kati na Klisto, kati na nzoto na Ye, nde mobimba ya nyonso oyo ezali kati na Nzambe evandi.
10 ယူယဉ္စ တေန ပူရ္ဏာ ဘဝထ ယတး သ သရွွေၐာံ ရာဇတွကရ္တ္တၖတွပဒါနာံ မူရ္ဒ္ဓါသ္တိ,
Ezali mpe kati na Ye nde bino botondisamaki, pamba te azali Mokonzi ya milimo nyonso mpe ya nguya nyonso.
11 တေန စ ယူယမ် အဟသ္တကၖတတွက္ဆေဒေနာရ္ထတော ယေန ၑာရီရပါပါနာံ ဝိဂြသတျဇျတေ တေန ခြီၐ္ဋသျ တွက္ဆေဒေန ဆိန္နတွစော ဇာတာ
Ezali lisusu kati na Ye nde bakataki bino ngenga, na nzela ya maboko ya bato te kasi na lolenge ya Klisto: balongolaki kati na bino nzoto ya bomoto mpe ya masumu,
12 မဇ္ဇနေ စ တေန သာရ္ဒ္ဓံ ၑ္မၑာနံ ပြာပ္တား ပုန ရ္မၖတာနာံ မဓျာတ် တသျောတ္ထာပယိတုရီၑွရသျ ၑက္တေး ဖလံ ယော ဝိၑွာသသ္တဒွါရာ တသ္မိန္နေဝ မဇ္ဇနေ တေန သာရ္ဒ္ဓမ် ဥတ္ထာပိတာ အဘဝတ၊
bakundaki bino elongo na Klisto na nzela ya libatisi; mpe, kati na Ye, bosekwaki elongo na Ye na nzela ya kondima kati na nguya ya Nzambe oyo asekwisaki Ye kati na bakufi.
13 သ စ ယုၐ္မာန် အပရာဓဲး ၑာရီရိကာတွက္ဆေဒေန စ မၖတာန် ဒၖၐ္ဋွာ တေန သာရ္ဒ္ဓံ ဇီဝိတဝါန် ယုၐ္မာကံ သရွွာန် အပရာဓာန် က္ၐမိတဝါန်,
Bino oyo bozalaki bakufi kati na masumu na bino mpe kati na bozangi kokatisa ngenga ya nzoto na bino, Nzambe akomisaki bino bato ya bomoi elongo na Klisto. Alimbisaki masumu na biso nyonso,
14 ယစ္စ ဒဏ္ဍာဇ္ဉာရူပံ ၒဏပတြမ် အသ္မာကံ ဝိရုဒ္ဓမ် အာသီတ် တတ် ပြမာရ္ဇ္ဇိတဝါန် ၑလာကာဘိး ကြုၑေ ဗဒ္ဓွာ ဒူရီကၖတဝါံၑ္စ၊
apasolaki mokanda oyo mibeko na yango ekatelaki biso etumbu, asilisaki bokonzi ya mibeko yango, wana abakaki yango na ekulusu.
15 ကိဉ္စ တေန ရာဇတွကရ္တ္တၖတွပဒါနိ နိသ္တေဇာံသိ ကၖတွာ ပရာဇိတာန် ရိပူနိဝ ပြဂလ္ဘတယာ သရွွေၐာံ ဒၖၐ္ဋိဂေါစရေ ဟြေပိတဝါန်၊
Asilisaki makasi ya milimo mabe mpe ya nguya ya bakonzi ya molili, asambwisaki yango na miso ya bato nyonso mpe atambolisaki yango lokola bakangami ya etumba tango alongaki yango na ekulusu.
16 အတော ဟေတေား ခါဒျာခါဒျေ ပေယာပေယေ ဥတ္သဝး ပြတိပဒ် ဝိၑြာမဝါရၑ္စဲတေၐု သရွွေၐု ယုၐ္မာကံ နျာယာဓိပတိရူပံ ကမပိ မာ ဂၖဟ္လီတ၊
Yango wana, bopesaka na moto moko te nzela ya kosambisa bino na tina na biloko ya kolia to ya komela to mpe na tina na mokolo ya feti lokola feti ya ebandeli ya sanza to ya Saba.
17 ယတ ဧတာနိ ဆာယာသွရူပါဏိ ကိန္တု သတျာ မူရ္တ္တိး ခြီၐ္ဋး၊
Nyonso wana ezalaki kaka elilingi ya makambo oyo esengelaki koya, kasi bosolo na yango ezali penza kati na Klisto.
18 အပရဉ္စ နမြတာ သွရ္ဂဒူတာနာံ သေဝါ စဲတာဒၖၑမ် ဣၐ္ဋကရ္မ္မာစရန် ယး ကၑ္စိတ် ပရောက္ၐဝိၐယာန် ပြဝိၑတိ သွကီယၑာရီရိကဘာဝေန စ မုဓာ ဂရွွိတး သန္
Botelemelaka bato oyo bamisepelisaka na komikitisa ya lokuta to na kosambela ba-anjelu, bopesaka bango nzela te ya kozangisa bino elonga. Bamipesaka na bimoniseli ya makanisi na bango, batondi na lolendo ezanga tina,
19 သန္ဓိဘိး ၑိရာဘိၑ္စောပကၖတံ သံယုက္တဉ္စ ကၖတ္သ္နံ ၑရီရံ ယသ္မာတ် မူရ္ဒ္ဓတ ဤၑွရီယဝၖဒ္ဓိံ ပြာပ္နောတိ တံ မူရ္ဒ္ဓါနံ န ဓာရယတိ တေန မာနဝေန ယုၐ္မတ္တး ဖလာပဟရဏံ နာနုဇာနီတ၊
baboyaka kokangama na Klisto oyo azali Mokonzi, Moto. Ezali Klisto nde asalaka ete nzoto mobimba ekola malamu kolanda mokano ya Nzambe mpe ekangana na nzela ya misisa mpe misuni.
20 ယဒိ ယူယံ ခြီၐ္ဋေန သာရ္ဒ္ဓံ သံသာရသျ ဝရ္ဏမာလာယဲ မၖတာ အဘဝတ တရှိ ယဲ ရ္ဒြဝျဲ ရ္ဘောဂေန က္ၐယံ ဂန္တဝျံ
Bokufaki elongo na Klisto mpe bokangolamaki longwa na bowumbu ya milimo mabe ya mokili oyo. Boye mpo na nini, lokola nde bozali nanu bato ya mokili oyo, bozali lisusu kondima mibeko na yango lokola:
21 တာနိ မာ သ္ပၖၑ မာ ဘုံက္ၐွ မာ ဂၖဟာဏေတိ မာနဝဲရာဒိၐ္ဋာန် ၑိက္ၐိတာံၑ္စ ဝိဓီန္
« kozwa te, komeka elengi te, kosimba te? »
22 အာစရန္တော ယူယံ ကုတး သံသာရေ ဇီဝန္တ ဣဝ ဘဝထ?
Boni, biloko oyo nyonso ebongisami te mpo na kobebisama sima na kosalela yango? Tala, ezali na yango kaka mibeko mpe malakisi ya bomoto!
23 တေ ဝိဓယး သွေစ္ဆာဘက္တျာ နမြတယာ ၑရီရက္လေၑနေန စ ဇ္ဉာနဝိဓိဝတ် ပြကာၑန္တေ တထာပိ တေ'ဂဏျား ၑာရီရိကဘာဝဝရ္ဒ္ဓကာၑ္စ သန္တိ၊
Solo, mibeko ya bongo emonanaka lokola nde etondi na bwanya, pamba te esengaka na bato ete basambelaka ndenge balingi, bamilakisaka lokola bato ya komikitisa mpe bamipesaka pasi na nzoto; nzokande ezali na tina moko te, soki kaka te kokokisa baposa ya nzoto.

< ကလသိနး 2 >