< ၁ တီမထိယး 3 >

1 ယဒိ ကၑ္စိဒ် အဓျက္ၐပဒမ် အာကာင်္က္ၐတေ တရှိ သ ဥတ္တမံ ကရ္မ္မ လိပ္သတ ဣတိ သတျံ၊
Tala liloba oyo ezali penza ya solo: Moto nyonso oyo alingi kozala mokambi kati na Lingomba aponi mosala ya kitoko.
2 အတော'ဓျက္ၐေဏာနိန္ဒိတေနဲကသျာ ယောၐိတော ဘရ္တြာ ပရိမိတဘောဂေန သံယတမနသာ သဘျေနာတိထိသေဝကေန ၑိက္ၐဏေ နိပုဏေန
Boye, mokambi ya Lingomba asengeli kozala: moto azanga pamela, mobali ya mwasi moko, moto oyo alekisaka ndelo te na ezaleli na ye, moto oyo ayebi komikanga, moto ya lokumu, moto oyo ayambaka malamu bapaya kati na ndako na ye, moto oyo azali na makoki ya koteya,
3 န မဒျပေန န ပြဟာရကေဏ ကိန္တု မၖဒုဘာဝေန နိရွွိဝါဒေန နိရ္လောဘေန
molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na boboto, moto oyo aswanaka te, moto na lokoso ya mbongo te,
4 သွပရိဝါရာဏာမ် ဥတ္တမၑာသကေန ပူရ္ဏဝိနီတတွာဒ် ဝၑျာနာံ သန္တာနာနာံ နိယန္တြာ စ ဘဝိတဝျံ၊
moto oyo akambaka malamu libota na ye moko, asenzelaka ete bana na ye batosa ye mpe asalaka bongo na lolenge oyo ebongi na limemia ya kokoka.
5 ယတ အာတ္မပရိဝါရာန် ၑာသိတုံ ယော န ၑက္နောတိ တေနေၑွရသျ သမိတေသ္တတ္တွာဝဓာရဏံ ကထံ ကာရိၐျတေ?
Moto oyo ayebi te kokamba malamu libota na ye akokoka ndenge nini kobatela Lingomba ya Nzambe?
6 အပရံ သ ဂရွွိတော ဘူတွာ ယတ် ၑယတာန ဣဝ ဒဏ္ဍယောဂျော န ဘဝေတ် တဒရ္ထံ တေန နဝၑိၐျေဏ န ဘဝိတဝျံ၊
Mokambi ya Lingomba asengeli te kozala moto oyo abongoli motema sika, noki te akotonda na lolendo mpe akozwa etumbu lokola Satana.
7 ယစ္စ နိန္ဒာယာံ ၑယတာနသျ ဇာလေ စ န ပတေတ် တဒရ္ထံ တေန ဗဟိးသ္ထလောကာနာမပိ မဓျေ သုချာတိယုက္တေန ဘဝိတဝျံ၊
Mokambi ya Lingomba asengeli mpe kozala moto oyo akenda sango ya malamu kati na bato oyo bazali bandimi te mpo ete abatela lokumu na ye mpe akweya te na mitambo ya Satana.
8 တဒွတ် ပရိစာရကဲရပိ ဝိနီတဲ ရ္ဒွိဝိဓဝါကျရဟိတဲ ရ္ဗဟုမဒျပါနေ 'နာသက္တဲ ရ္နိရ္လောဘဲၑ္စ ဘဝိတဝျံ,
Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona. Basengeli kozala: bato oyo babongi na limemia, bato ya maloba mibale te, balangwi masanga te mpe bato oyo balukaka mbongo te na banzela ya mabe.
9 နိရ္မ္မလသံဝေဒေန စ ဝိၑွာသသျ နိဂူဎဝါကျံ ဓာတိဝျဉ္စ၊
Basengeli koyeba kobatela mabombami ya kondima kati na motema ya peto.
10 အဂြေ တေၐာံ ပရီက္ၐာ ကြိယတာံ တတး ပရမ် အနိန္ဒိတာ ဘူတွာ တေ ပရိစရျျာံ ကုရွွန္တု၊
Esengeli komeka bango liboso; bongo soki emonani ete bazangi pamela, wana nde bakoki kosala lokola badiakona.
11 အပရံ ယောၐိဒ္ဘိရပိ ဝိနီတာဘိရနပဝါဒိကာဘိး သတရ္ကာဘိး သရွွတြ ဝိၑွာသျာဘိၑ္စ ဘဝိတဝျံ၊
Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona ya basi. Basengeli kozala: basi oyo babongi na limemia, basi oyo batongaka bato te, basi oyo balekisaka ndelo te na bizaleli na bango mpe basi ya sembo na makambo nyonso.
12 ပရိစာရကာ ဧကဲကယောၐိတော ဘရ္တ္တာရော ဘဝေယုး, နိဇသန္တာနာနာံ ပရိဇနာနာဉ္စ သုၑာသနံ ကုရျျုၑ္စ၊
Diakona asengeli kozala mobali ya mwasi moko mpe asengeli kokamba malamu bana na ye mpe ndako na ye.
13 ယတး သာ ပရိစရျျာ ယဲ ရ္ဘဒြရူပေဏ သာဓျတေ တေ ၑြေၐ္ဌပဒံ ပြာပ္နုဝန္တိ ခြီၐ္ဋေ ယီၑော် ဝိၑွာသေန မဟောတ္သုကာ ဘဝန္တိ စ၊
Pamba te badiakona oyo basalaka mosala na bango malamu bazwaka esika ya lokumu mpe bakomaka na elikya makasi kati na kondima na bango epai na Yesu-Klisto.
14 တွာံ ပြတျေတတ္ပတြလေခနသမယေ ၑီဃြံ တွတ္သမီပဂမနသျ ပြတျာၑာ မမ ဝိဒျတေ၊
Atako nazali na elikya ya kokutana na yo kala mingi te, kasi nakomeli yo kaka malako oyo
15 ယဒိ ဝါ ဝိလမ္ဗေယ တရှီၑွရသျ ဂၖဟေ 'ရ္ထတး သတျဓရ္မ္မသျ သ္တမ္ဘဘိတ္တိမူလသွရူပါယာမ် အမရေၑွရသျ သမိတော် တွယာ ကီဒၖၑ အာစာရး ကရ္တ္တဝျသ္တတ် ဇ္ဉာတုံ ၑက္ၐျတေ၊
mpo ete, soki nawumeli mpo na koya, oyeba ndenge nini bato basengeli kotambola kati na Ndako ya Nzambe, oyo ezali Lingomba ya Nzambe na bomoi, likonzi mpe moboko ya bosolo.
16 အပရံ ယသျ မဟတ္တွံ သရွွသွီကၖတမ် ဤၑွရဘက္တေသ္တတ် နိဂူဎဝါကျမိဒမ် ဤၑွရော မာနဝဒေဟေ ပြကာၑိတ အာတ္မနာ သပုဏျီကၖတော ဒူတဲး သန္ဒၖၐ္ဋး သရွွဇာတီယာနာံ နိကဋေ ဃောၐိတော ဇဂတော ဝိၑွာသပါတြီဘူတသ္တေဇးပြာပ္တယေ သွရ္ဂံ နီတၑ္စေတိ၊
Tala makambo oyo tondimaka elongo: Mabombami ya kosambela Nzambe na lolenge ya solo ezali minene. Klisto amonanaki na nzoto ya bomoto, Molimo Mosantu atatolaki ete azali sembo, ba-anjelu bamonaki Ye, bato ya bikolo ya bapaya bateyamaki na tina na Ye, bato bandimelaki Ye kati na mokili mobimba, mpe amemamaki kati na nkembo.

< ၁ တီမထိယး 3 >