< Исаия 18 >

1 Горе земле, осеняющей крыльями по ту сторону рек Ефиопских,
Mawa na mokili oyo ezali na bamasuwa oyo ezalaka na bavwale lokola mabanki, bongo enanaka na ebale ya Kushi!
2 посылающей послов по морю, и в папировых суднах по водам! Идите, быстрые послы, к народу крепкому и бодрому, к народу страшному от начала и доныне, к народу рослому и все попирающему, которого землю разрезывают реки.
Mawa na yo oyo otindaka bantoma na nzela ya ebale kati na bamasuwa oyo basala na papirisi, na likolo ya ebale monene! Bino bapanzi sango ya mbangu, bokende epai ya bato ya ekolo oyo bazalaka milayi mpe baposo ya nzoto na bango engengaka, epai ya bato ya ekolo oyo babangisaka na mosika, bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango.
3 Все вы, населяющие вселенную и живущие на земле! смотрите, когда знамя поднимется на горах, и, когда загремит труба, слушайте!
Bino nyonso, bavandi ya mokili, bino oyo botondisi mabele, tango bakotombola bendele na likolo ya bangomba, bokomona; tango bakobeta kelelo, bokoyoka!
4 Ибо так Господь сказал мне: Я спокойно смотрю из жилища Моего, как светлая теплота после дождя, как облако росы во время жатвенного зноя.
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na ngai: « Nakovanda kimia mpe nakotala wuta na ndako na Ngai, lokola kongala ya moyi to lokola mapata na tango ya molunge. »
5 Ибо прежде собирания винограда, когда он отцветет, и грозд начнет созревать, Он отрежет ножом ветви и отнимет, и отрубит отрасли.
Mpo ete liboso ya kobuka bambuma, tango bafololo ya mike etikaka kobima mpe ekomaka bambuma mibesu oyo ekomi pene ya kotela, bakataka bitape na likwangola, babwakaka mpe batiaka pembeni bitape.
6 И оставят все хищным птицам на горах и зверям полевым; и птицы будут проводить там лето, а все звери полевые будут зимовать там.
Bakosundola yango epai ya bandeke oyo eliaka misuni na likolo ya bangomba mpe epai ya banyama ya zamba. Bandeke minene ekolia yango na tango ya molunge mpe banyama ya zamba ekolia yango na tango ya malili.
7 В то время будет принесен дар Господу Саваофу от народа крепкого и бодрого, от народа страшного от начала и доныне, от народа рослого и все попирающего, которого землю разрезывают реки, - к месту имени Господа Саваофа, на гору Сион.
Na tango wana, bakomema bakado epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, wuta epai ya ekolo ya bato milayi oyo poso ya nzoto na bango engengaka, wuta epai ya ekolo ya bato oyo babangisaka na mosika, bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango, bakomema bakado yango na ngomba Siona, esika oyo Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaka.

< Исаия 18 >