< 1-е Тимофею 4 >
1 Дух же ясно говорит, что в последние времена отступят некоторые от веры, внимая духам-обольстителям и учениям бесовским,
Molimo alobi polele ete, na tango ya suka, ebele bakosundola kondima, pamba te bakolanda milimo ya lokuta mpe mateya oyo ewuti na milimo mabe.
2 через лицемерие лжесловесников, сожженных в совести своей,
Ezali bato ya bilongi mibale nde bakobanda kokosa bango na nzela ya mateya, pamba te mitema ya bato yango ya bilongi mibale ebeba lokola nde bazikisa yango na ebende ya moto.
3 запрещающих вступать в брак и употреблять в пищу то, что Бог сотворил, дабы верные и познавшие истину вкушали с благодарением.
Bakopekisa libala mpe bakopesa na bato mitindo ete balia biloko mosusu te; nzokande Nzambe akela nyonso mpo ete bandimi oyo bayebi solo basungama na yango na kozongiselaka Ye matondi.
4 Ибо всякое творение Божие хорошо, и ничто не предосудительно, если принимается с благодарением,
Solo, nyonso oyo Nzambe akela ezali malamu, eloko moko te ezali ya kobwaka soki kaka tokozongiselaka Ye matondi tango tozwi yango,
5 потому что освящается словом Божиим и молитвою.
pamba te ebulisamaka na nzela ya Liloba na Nzambe mpe libondeli.
6 Внушая сие братиям, будешь добрый служитель Иисуса Христа, питаемый словами веры и добрым учением, которому ты последовал.
Soki oteyi makambo oyo epai ya bandeko, okozala mosali malamu ya Yesu-Klisto, mosali oyo alendisami na maloba ya kondima mpe na malakisi ya kitoko oyo olandi na bosembo.
7 Негодных же и бабьих басен отвращайся, а упражняй себя в благочестии,
Boye, boya masolo ya bozoba, oyo etiolaka Nzambe; boya mpe bilobaloba ya mibange basi. Mipesa nde na botosi kati makambo ya Nzambe;
8 ибо телесное упражнение мало полезно, а благочестие на все полезно, имея обетование жизни настоящей и будущей.
pamba te masano ya nzoto ezali na tina mpo na ndambo ya makambo, kasi botosi kati na makambo ya Nzambe ezali na tina mpo na nyonso, pamba te ezali na elaka ya bomoi mpo na tango oyo mpe mpo na tango oyo ezali koya.
9 Слово сие верно и всякого принятия достойно.
Yango nde liloba ya solo, liloba oyo ekoki na kondimama mpe koyambama na mobimba na yango.
10 Ибо мы для того и трудимся и поношения терпим, что уповаем на Бога живаго, Который есть Спаситель всех человеков, а наипаче верных.
Tala mpo na nini tosalaka mpe tobundaka makasi: ezali mpo ete tosili kotia elikya na biso kati na Nzambe na bomoi oyo azali Mobikisi ya bato nyonso mpe mingi-mingi ya bandimi na Ye.
Teya makambo yango mpe tinda bato kosalela yango.
12 Никто да не пренебрегает юностью твоею; но будь образцом для верных в слове, в житии, в любви, в духе, в вере, в чистоте.
Kopesa na moto moko te nzela ya kotiola bolenge na yo, kasi zala ndakisa mpo na bandimi na nzela ya maloba, bizaleli, bolingo, kondima mpe bopeto.
13 Доколе не приду, занимайся чтением, наставлением, учением.
Kino tango nakoya, zala na molende ya kotanga Makomi, ya koteya mpe ya kopesa malakisi.
14 Не неради о пребывающем в тебе даровании, которое дано тебе по пророчеству с возложением рук священства.
Kozwa na pamba te likabo oyo Nzambe apesaki yo na nzela ya lisakoli, tango lisanga ya bakambi ya Lingomba batielaki yo maboko.
15 О сем заботься, в сем пребывай, дабы успех твой для всех был очевиден.
Zwa makambo yango na motuya mpe mipesa na yango mpo ete bato nyonso bamona ete ozali kokende liboso.
16 Вникай в себя и в учение; занимайся сим постоянно: ибо, так поступая, и себя спасешь и слушающих тебя
Misenzela malamu, sala keba na mateya na yo, mpe tikala ngwi kati na yango. Soki osali bongo, okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bakoyoka yo.