< Apocalipse 15 >

1 Vi outro grande e maravilhoso sinal no céu: sete anjos tendo as sete últimas pragas, pois nelas a ira de Deus está terminada.
Bongo namonaki elembo mosusu ya monene mpe ya kokamwa kati na Lola: ba-anjelu sambo bamemaki bitumbu sambo ya suka, pamba te ezali na nzela na yango nde kanda ya Nzambe ekokokisama.
2 Vi algo como um mar de vidro misturado com fogo, e aqueles que superaram a besta, sua imagem e o número de seu nome, de pé sobre o mar de vidro, tendo harpas de Deus.
Namonaki mpe eloko moko lokola etando: ezalaki lokola talatala, mpe monene lokola molayi ya ebale monene; ezalaki kongala lokola libanga ya talo oyo babengaka krisitali esangana na moto. Namonaki lisusu ba-oyo balongaki nyama, ekeko na yango mpe motango ya kombo na yango; bazalaki ya kotelema na likolo ya ebale monene oyo ezalaki lokola talatala mpe basimbaki mandanda oyo Nzambe apesaki bango.
3 Eles cantaram o canto de Moisés, o servo de Deus, e o canto do Cordeiro, dizendo, “Grandes e maravilhosas são suas obras, Senhor Deus, o Todo-Poderoso! Justos e verdadeiros são seus caminhos, seu rei das nações.
Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate: Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa! Mokonzi ya bikolo nyonso, banzela na Yo ezali sembo mpe solo.
4 Quem não temeria você, Senhor, e glorificar seu nome? Pois você só é santo. Pois todas as nações virão e adorarão diante de vocês. Pois seus atos justos foram revelados”.
Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo? Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. Bikolo nyonso ekoya mpe ekogumbama liboso na Yo, pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.
5 Depois destas coisas eu olhei, e o templo do tabernáculo do testemunho no céu foi aberto.
Sima na yango, natalaki mpe namonaki Tempelo kofungwama kati na Lola; mpe kati na yango, ezalaki na Mongombo ya Litatoli.
6 Os sete anjos que tinham as sete pragas saíram, vestidos com linho puro e brilhante, e usando faixas douradas ao redor de seu peito.
Ba-anjelu sambo oyo bamemaki bitumbu sambo babimaki wuta na Tempelo. Balataki banzambala basala na lino ya peto; banzambala yango ezalaki kongenga makasi, mpe bakangaki mikaba ya wolo na batolo na bango.
7 Um dos quatro seres vivos deu aos sete anjos sete taças de ouro cheias da ira de Deus, que vive para todo o sempre. (aiōn g165)
Moko kati na bikelamu minei ya bomoi apesaki na ba-anjelu sambo bakopo sambo oyo basala na wolo mpe etonda na kanda ya Nzambe oyo azali na bomoi seko na seko. (aiōn g165)
8 O templo estava cheio de fumaça da glória de Deus e de seu poder. Ninguém pôde entrar no templo até que as sete pragas dos sete anjos estivessem terminadas.
Bongo lokola Tempelo etondaki na milinga kowuta na nkembo mpe na nguya ya Nzambe, moto moko te akokaki kokota kati na Tempelo yango kino bitumbu sambo oyo ba-anjelu sambo bamemaki esilaki.

< Apocalipse 15 >