< Levítico 23 >

1 Depois falou o Senhor a Moisés, dizendo:
Yawe alobaki na Moyize:
2 Fala aos filhos de Israel, e dize-lhes: As solenidades do Senhor, que convocareis, serão santas convocações: estas são as minhas solenidades:
« Yebisa bana ya Isalaele: ‹ Tango bokobanda kosangana mpo na kosala bafeti mpo na lokumu na Ngai, bokobanda kobengisa bato mpo na kogumbamela Ngai Yawe, pamba te ezali mayangani ya bule.
3 Seis dias obra se fará, mas ao sétimo dia será o sábado do descanço, santa convocação; nenhuma obra fareis; sábado do Senhor é em todas as vossas habitações.
Bokosala mikolo motoba, kasi mokolo ya sambo ezali Saba, mokolo ya kopema; mokolo ya mayangani ya bule. Na esika nyonso oyo bokozala, bokosala ata mosala moko te: ezali mokolo ya Saba ya Yawe.
4 Estas são as solenidades do Senhor, as santas convocações, que convocareis ao seu tempo determinado;
Tala bafeti mosusu ya Yawe, mayangani ya bule oyo bokobengisela bato na mikolo oyo ekatama mpo na kopesa Ngai lokumu.
5 No mês primeiro, aos quatorze do mes, pela tarde, é a pascoa do Senhor.
Pasika ya Yawe ekobanda na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso.
6 E aos quinze dias deste mês é a festa dos asmos do Senhor: sete dias comereis asmos.
Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza wana nde feti ya Mapa ezanga levire mpo na Yawe ekobanda. Bokolia mapa ezanga levire mikolo sambo.
7 No primeiro dia tereis santa convocação: nenhuma obra servil fareis;
Na mokolo ya liboso, bokozala na mayangani ya bule; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo.
8 Mas sete dias oferecereis oferta queimada ao Senhor: ao sétimo dia haverá santa convocação: nenhuma obra servil fareis.
Mikolo sambo, bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. Mpe na mokolo oyo ya sambo, bokozala na mayangani ya bule; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. › »
9 E falou o Senhor a Moisés, dizendo:
Yawe alobaki na Moyize:
10 Fala aos filhos de Israel, e dize-lhes: Quando houverdes entrado na terra, que vos hei de dar, e segardes a sua sega, então trareis um molho das primícias da vossa sega ao sacerdote:
« Yebisa bana ya Isalaele: ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino mpe tango bokobuka bambuma kati na mokili yango, bokomema epai ya Nganga-Nzambe liboke ya liboso ya bambuma oyo bokobuka.
11 E ele moverá o molho perante o Senhor, para que sejais aceitos: ao seguinte dia do sábado o moverá o sacerdote.
Na mokolo oyo ekolanda Saba, Nganga-Nzambe akobonza liboke yango na kotombola liboso ya Yawe mpo ete Ngai nandima yango.
12 E no dia em que moverdes o molho, preparareís um cordeiro sem mancha, de um ano, em holocausto ao Senhor,
Na mokolo yango, bakobonza liboke yango na kotombola, bokobonzela Yawe mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka ya kotumba.
13 E a sua oferta de manjares, duas dizimas de flor de farinha, amassada com azeite, para oferta queimada em cheiro suave ao Senhor, e a sua libação de vinho, o quarto de um hin.
Bokobakisa bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, mpe bokobakisa lisusu litele moko na ndambo ya vino lokola likabo na yango ya masanga.
14 E não comereis pão, nem trigo tostado, nem espigas verdes, até aquele mesmo dia em que trouxerdes a oferta do vosso Deus: estatuto perpétuo é por vossas gerações, em todas as vossas habitações.
Bokoki kolia ata lipa moko te, ezala bambuma bakalinga to bambuma ya sika, kino na mokolo oyo bokobonza likabo yango epai ya Nzambe na bino. Oyo mpe ezali mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino na bisika nyonso oyo bokozala.
15 Depois para vós contareis desde o dia seguinte ao sábado, desde o dia em que trouxerdes o molho da oferta movida: sete semanas inteiras serão.
Bosengeli kotanga baposo sambo, kobanda na mokolo oyo elandi mokolo ya Saba, mokolo oyo bokomema liboke ya bambuma mpo ete batombola yango; baposo nyonso sambo esengeli kozala ya kokoka.
16 Até ao dia seguinte, ao sétimo sábado, contareis cincoênta dias: então oferecereis nova oferta de manjares ao Senhor.
Bokotanga mikolo tuku mitano kino na mokolo oyo ekolanda mokolo ya Saba. Na mokolo wana ya Saba, bokobonza epai na Yawe likabo ya bambuma ya sika.
17 Das vossas habitações trareis dois pães de movimento: de duas dizimas de farinha serão, levedados se cozerão: primícias são ao Senhor.
Bokomema, wuta na bisika nyonso oyo bokozala, mapa mibale mpo na kobonza yango na kotombola; bakosala moko na moko kati na yango na bakilo motoba ya farine basangisa na levire mpe batumba na moto. Ekozala likabo ya bambuma na bino ya liboso mpo na Yawe.
18 Também com o pão oferecereis sete cordeiros sem mancha, de um ano, e um novilho, e dois carneiros; holocausto serão ao Senhor, com a sua oferta de manjares, e as suas libações, por oferta queimada de cheiro suave ao Senhor.
Elongo na mapa wana, bokobonza lokola mbeka ya kotumba: bana meme sambo ya mibali ya mobu moko mpe ezanga mbeba, ngombe moko ya mobali mpe bameme mibale ya mibali. Bokobonza yango mpo na Yawe, elongo na makabo na yango ya bambuma mpe ya masanga, lokola likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
19 Também oferecereis um bode para expiação do pecado, e dois cordeiros de um ano por sacrifício pacífico.
Bokobonzela Ngai lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe bana meme mibale ya mobu moko lokola mbeka ya boyokani.
20 Então o sacerdote os moverá com o pão das primícias por oferta movida perante o Senhor, com os dois cordeiros: santidade serão ao Senhor para o sacerdote.
Nganga-Nzambe akobonza na kotombola, liboso ya Yawe, bana meme yango mibale elongo na mapa ya bambuma ya liboso. Ekozala makabo ya bule mpo na Ngai Yawe mpe ekozala ya Nganga-Nzambe.
21 E naquele mesmo dia apregoareis que tereis santa convocação: nenhuma obra servil fareis: estatuto perpétuo é em todas as vossas habitações pelas vossas gerações.
Kaka na mokolo wana, bokobengisa bato na mayangani mpo na lokumu na Ngai. Ekozala mayangani ya bule, mpe bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. Na bisika nyonso oyo bokovanda, ekozala mitindo ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino.
22 E, quando segardes a sega da vossa terra, não acabarás de segar os cantos do teu campo, nem colhereis as espigas caídas da tua sega; para o pobre e para o estrangeiro as deixarás: Eu sou o Senhor vosso Deus.
Tango bokobuka bambuma na mboka na bino, bobuka te kino na bandelo ya bilanga na bino mpe bolokota te oyo ekobanda kokweya. Botika yango mpo na mobola to mopaya. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › »
23 E falou o Senhor a Moisés, dizendo:
Yawe alobaki na Moyize:
24 Fala aos filhos de Israel, dizendo: No mês sétimo, ao primeiro do mes, tereis descanço, memória da jubilação, santa convocação.
« Yebisa bana ya Isalaele: ‹ Mokolo ya liboso ya sanza ya sambo ekozala mpo na bino mokolo ya kopema, mokolo ya ekaniseli mpe ya kobeta kelelo, mokolo ya mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai.
25 Nenhuma obra servil fareis, mas oferecereis oferta queimada ao Senhor.
Bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala, kasi bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. › »
26 Falou mais o Senhor a Moisés, dizendo:
Yawe alobaki na Moyize:
27 Mas aos dez deste mês sétimo será o dia da expiação: tereis santa convocação, e afligireis as vossas almas; e oferecereis oferta queimada ao Senhor.
« Mokolo ya zomi ya sanza ya sambo ezali mokolo ya bolimbisi masumu. Bokozala na mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai; bokomikitisa mpe bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto.
28 E naquele mesmo dia nenhuma obra fareis, porque é o dia da expiação, para fazer expiação por vós perante o Senhor vosso Deus.
Bokosala mosala moko te na mokolo wana, pamba te ezali mokolo ya kosala mosala ya bolimbisi masumu liboso na Ngai Yawe, Nzambe na bino.
29 Porque toda a alma, que naquele mesmo dia se não afligir, será extirpada do seu povo.
Moto nyonso oyo akokila bilei te na mokolo wana, bakolongola ye kati na bato na ye.
30 Também toda a alma, que naquele mesmo dia fizer alguma obra, aquela alma eu destruirei do meio do seu povo.
Nakoboma moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo wana.
31 Nenhuma obra fareis: estatuto perpétuo é pelas vossas gerações em todas as vossas habitações.
Bokoki kosala ata mosala moko te. Na bisika nyonso oyo bokozala, oyo nde ekozala mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino.
32 Sábado de descanço vos será; então afligireis as vossas almas: aos nove do mês à tarde, de uma tarde a outra tarde, celebrareis o vosso sábado.
Ekozala mpo na bino mokolo ya kopema lokola mokolo ya Saba, mokolo ya komikitisa. Bokobatela mokolo na bino ya Saba, kobanda na pokwa ya mokolo ya libwa kino na pokwa ya mokolo oyo ekolanda. »
33 E falou o Senhor a Moisés, dizendo:
Yawe alobaki na Moyize:
34 Fala aos filhos de Israel, dizendo: Aos quinze dias deste mês sétimo será a festa dos tabernáculos ao Senhor por sete dias.
« Yebisa bana ya Isalaele: ‹ Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, feti ya Bandako ya kapo esengeli kobanda, mpe bakosepela yango mikolo sambo mpo na lokumu ya Yawe.
35 Ao primeiro dia haverá santa convocação: nenhuma obra servil fareis.
Mokolo ya liboso ekozala mokolo ya mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai Yawe; bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala mokolo na mokolo.
36 Sete dias oferecereis ofertas queimadas ao Senhor: ao dia oitavo tereis santa convocação, e oferecereis ofertas queimadas ao Senhor: dia de proibição é, nenhuma obra servil fareis.
Mikolo sambo, bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. Na mokolo ya mwambe, bokozala na mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai Yawe, mpe bokobonza makabo bazikisa na moto. Ekozala mokolo ya suka ya mayangani; bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala.
37 Estas são as solenidades do Senhor, que apregoareis para santas convocações, para oferecer ao Senhor oferta queimada, holocausto e oferta de manjares, sacrifício e libações, cada qual em seu dia próprio:
Oyo nde bafeti oyo bokobanda kosala mpo na lokumu ya Yawe, mpe oyo bokobanda kobengisela bato na mayangani ya bule mpo ete basambela Yawe mpe babonzela Ye makabo bazikisa na moto, bambeka ya kotumba mpe makabo ya bagato, bambeka mpe bambeka ya masanga ya vino, kolanda ndenge ekatama mpo na mokolo na mokolo.
38 Além dos sábados do Senhor, e além dos vossos dons, e além de todos os vossos votos, e além de todas as vossas ofertas voluntárias que dareis ao Senhor.
Bokobakisa makabo oyo na likolo ya makabo oyo bokobonzela Ngai na mikolo ya Saba ya Yawe, na likolo ya bakado na bino, na likolo ya makabo na bino mpo na kokokisa ndayi to na likolo ya makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko.
39 Porém aos quinze dias do mês sétimo, quando tiverdes recolhido a novidade da terra, celebrareis a festa do Senhor por sete dias; ao dia primeiro haverá descanço, e ao dia oitavo haverá descanço.
Kasi na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, sima na kobuka bambuma ya mabele, bokosala feti mpo na Yawe, mikolo sambo. Mokolo ya liboso mpe mokolo ya mwambe ekozala mikolo ya kopema.
40 E ao primeiro dia tomareis para vós ramos de formosas árvores, ramos de palmas, ramos de árvores espessas, e salgueiros de ribeiras; e vos alegrareis perante o Senhor vosso Deus por sete dias.
Na mokolo ya liboso, bokopona bambuma ya banzete, mandalala ya banzete ya mbila, bitape ya banzete oyo ezali na makasa ebele mpe banzete oyo babengaka sole mpe ebotaka pembeni ya mayi. Bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, mikolo sambo.
41 E celebrareis esta festa ao Senhor por sete dias cada ano: estatuto perpétuo é pelas vossas gerações; no mês sétimo a celebrareis.
Na mikolo sambo, bokobanda kosala feti oyo mibu nyonso mpo na lokumu na Yawe. Oyo ezali mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani oyo bakoya sima na bino; bokosala feti yango na sanza ya sambo.
42 Sete dias habitareis debaixo de tendas: todos os naturais em Israel habitarão em tendas:
Bokovanda na bandako ya matiti mikolo sambo; bato nyonso oyo bazali bana mboka ya Isalaele bakovanda kati na bandako yango ya matiti
43 Para que saibam as vossas gerações que eu fiz habitar os filhos de Israel em tendas, quando os tirei da terra do Egito; Eu sou o Senhor vosso Deus.
mpo ete bakitani na bino bayeba ete navandisaki bana ya Isalaele na bandako ya matiti tango nabimisaki bango na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › »
44 Assim pronunciou Moisés as solenidades do Senhor aos filhos de Israel.
Moyize ayebisaki bana ya Isalaele malako nyonso oyo etali bafeti ya Yawe.

< Levítico 23 >